< Isaïe 15 >

1 Oracle sur Moab. Oui, dans la nuit où elle a été saccagée, Ar-Moab a été ruinée! Dans la nuit où elle a été saccagée, Kir-Moab a été ruinée!
Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi: Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki, Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki, solo, ebebisamaki kaka na butu moko! Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki; solo, ebebisamaki kaka na butu moko!
2 On monte au temple de Chamos et à Dibon, aux hauts-lieux, pour pleurer; sur Nebo et Médéba, Moab se lamente, Toute tête est rasée, toute barbe est coupée.
Bato ya Diboni bazali komata na bisika na bango ya bule, na bisambelo na bango ya likolo ya bangomba, mpo na kolela; Moabi akomi koganga mpo na Nebo mpe Medeba. Bakokoli mito nyonso mpe bakati mandefu nyonso.
3 Dans ses rues, ils se revêtent de sacs; sur ses toits et sur ses places publiques; tous poussent des hurlements, fondent en larmes.
Balati-lati basaki na babalabala, bato nyonso bazali kolela na likolo ya mitondo ya bandako mpe na bisika oyo bato ebele bakutanaka; bazali penza kosopa mpinzoli ebele.
4 Hésebon et Eléalé jettent des cris; on entend leur voix jusqu’à Jahas. C’est pourquoi les guerriers de Moab se lamentent, et son âme est tremblante.
Eshiboni mpe Eleale ezali koganga makasi, mingongo ya bato na yango ezali koyokana kino na Yakatsi; yango wana, mampinga ya Moabi bazali mpe koganga mpe mitema na bango ebukani.
5 Mon cœur gémit sur Moab; ses défenseurs sont déjà à Ségor, à Eglath-Schelischiah. Oui, la montée de Luhith, on la gravit en pleurant; et sur le chemin de Horonaïm, on pousse des cris de détresse.
Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, kino na Egilati-Shelishiya; bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela; mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga mpo na kobebisama na bango.
6 Car les eaux de Nimrim sont taries, l’herbe est desséchée, le gazon est détruit, il n’y a plus de verdure.
Mayi ya Nimirimi ekawuki, bongo matiti mpe esili kokawuka, matiti ya mobesu eziki-ziki nyonso mpe matiti ya kitoko ezali lisusu te.
7 Ce qu’ils ont pu sauver et leurs provisions, ils les transportent au delà du torrent des Saules.
Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwaki mpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye.
8 Car les cris ont fait le tour du territoire de Moab; ses hurlements retentissent jusqu’à Eglaïm, ses hurlements jusqu’à Béer-Élim;
Kolela na bango etamboli na mokili mobimba ya Moabi; koganga na bango eyokanaki kino na Egilayimi, mpe kino na mabulu ya mayi ya Elimi.
9 car les eaux de Dimon sont pleines de sang. Car je ferai venir sur Dimon un surcroît de malheur, un lion aux réchappés de Moab, à ce qui sera resté dans le pays.
Mayi ya Dimoni etondi na makila, kasi nakotinda lisusu pasi makasi na Dimoni: nkosi moko ekobimela bato ya Moabi oyo bakobika.

< Isaïe 15 >