< Exode 6 >

1 Yahweh dit à Moïse: « Tu verras bientôt ce que je ferai à Pharaon: contraint par une main puissante, il les laissera aller; contraint par une main puissante, il les chassera de son pays. »
Yawe alobaki na Moyize: — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon: na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye.
2 Dieu parla à Moïse, en disant: « Je suis Yahweh.
Nzambe alobaki lisusu na Moyize: — Nazali Yawe.
3 Je suis apparu à Abraham, à Isaac et à Jacob comme Dieu tout-puissant, mais sous mon nom de Yahweh, je ne me suis pas fait connaître à eux.
Namimonisaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi lokola Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kasi namimonisaki te epai na bango na Kombo na Ngai: Yawe.
4 J’ai aussi établi mon alliance avec eux pour leur donner le pays de Canaan, le pays de leurs pèlerinages, où ils ont séjourné en étrangers.
Nasalaki boyokani na Ngai elongo na bango mpo na kopesa bango mokili ya Kanana epai wapi bazalaki kowumela lokola bapaya.
5 J’ai entendu le gémissement des enfants d’Israël que les Égyptiens tiennent dans la servitude, et je me suis souvenu de mon alliance.
Mpe lisusu nayoki kolela ya bana ya Isalaele oyo bato ya Ejipito bakomisi bawumbu, bongo nakanisi lisusu boyokani na Ngai.
6 C’est pourquoi dis aux enfants d’Israël: Je suis Yahweh; je vous affranchirai des corvées des Égyptiens, je vous délivrerai de leur servitude, et je vous sauverai avec un bras étendu et par de grands jugements.
Yango wana, loba na bana ya Isalaele: « Nazali Yawe! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi.
7 Je vous prendrai pour mon peuple, je serai votre Dieu, et vous saurez que je suis Yahweh, votre Dieu, qui vous affranchis des corvées des Égyptiens.
Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.
8 Je vous ferai entrer dans le pays que j’ai juré de donner à Abraham, à Isaac et à Jacob; je vous le donnerai en possession: je suis Yahweh. »
Mpe nakokotisa bino na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya Abrayami, epai ya Izaki mpe epai ya Jakobi; nakopesa bino yango mpo ete ekoma ya bino. Nazali Yawe. »
9 Ainsi parla Moïse aux enfants d’Israël; mais ils n’écoutèrent pas Moïse, à cause de leur angoisse et de leur dure servitude.
Moyize alobaki makambo oyo epai ya bana ya Isalaele, kasi bayokaki ye te, pamba te misala makasi oyo bazalaki kopesa bango elembisaki mitema na bango.
10 Yahweh parla à Moïse, en disant:
Yawe alobaki na Moyize:
11 « Va parler à Pharaon, roi d’Égypte, pour qu’il laisse aller les enfants d’Israël hors de son pays. »
— Kende koyebisa Faraon, mokonzi ya Ejipito, ete abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye.
12 Moïse répondit en présence de Yahweh: « Voici, les enfants d’Israël ne m’ont pas écouté; comment Pharaon m’écoutera-t-il, moi qui ai la parole difficile? »
Kasi Moyize azongiselaki Yawe: — Soki kutu bana ya Isalaele bayoki ngai te, ndenge nini Faraon ayoka ngai moto ya likukuma?
13 Yahweh parla à Moïse et à Aaron, et leur donna des ordres au sujet des enfants d’Israël et au sujet de Pharaon, roi d’Égypte, pour faire sortir les enfants d’Israël du pays d’Égypte.
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na tina na bana ya Isalaele mpe ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo epai ya nani apesaki mitindo ete abimisa bana ya Isalaele na Ejipito.
14 Voici les chefs de leurs maisons: Fils de Ruben, premier-né d’Israël: Hénoch, Phallu, Hesron et Charmi; ce sont là les familles de Ruben.
Tala bakambi ya mabota na bango: Bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele: Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi. Wana nde mabota ya Ribeni.
15 Fils de Siméon: Jamuel, Jamin, Ahod, Jachin, Soar, et Saul, fils de la Chananéenne; ce sont là les familles de Siméon.
Bana mibali ya Simeoni: Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo abotamaki na mwasi ya Kanana. Wana nde mabota ya Simeoni.
16 Voici les noms des fils de Lévi avec leurs postérités: Gerson, Caath et Mérari. Les années de la vie de Lévi furent de cent trente-sept ans. —
Tala bakombo ya bana mibali ya Levi oyo awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo kolanda ndenge babotamela: Gerishoni, Keati mpe Merari.
17 Fils de Gerson: Lobni et Séméi, selon leurs familles. —
Bana mibali ya Gerishoni kolanda mabota na bango: Libini mpe Shimei.
18 Fils de Caath: Amram, Isaar, Hébron et Oziel. Les années de la vie de Caath furent de cent trente-trois ans. —
Bana mibali ya Keati oyo awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na misato: Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
19 Fils de Mérari: Moholi et Musi. — Ce sont là les familles de Lévi avec leurs postérités.
Bana mibali ya Merari: Maali mpe Mushi. Wana nde mabota ya Levi kolanda ndenge babotamela.
20 Amram prit pour femme Jochabed, sa tante, qui lui enfanta Aaron et Moïse. Les années de la vie d’Amram furent de cent trente-sept ans. —
Amirami abalaki Yokebedi, tata mwasi na ye, oyo abotelaki ye Aron mpe Moyize. Amirami awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo.
21 Fils d’Isaar: Coré, Nepheg et Zéchri.
Bana mibali ya Yitseari: Kore, Nefegi mpe Zikiri.
22 Fils d’Oziel: Misaël, Elisaphan et Séthri.
Bana mibali ya Uzieli: Mishaeli, Elitsafani mpe Sitiri.
23 Aaron prit pour femme Elisabeth, fille d’Aminadab, sœur de Naasson; et elle lui enfanta Nadab, Abiu, Eléazar et Ithamar.
Aron abalaki Elisheba, mwana mwasi ya Aminadabi mpe ndeko mwasi ya Nashoni. Elisheba abotelaki Aron: Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
24 Fils de Coré: Aser, Elcana et Abiasaph; ce sont là les familles des Corites.
Bana mibali ya Kore: Asiri, Elikana mpe Abiazafi. Wana nde mabota ya Kore.
25 Eléazar, fils d’Aaron, prit pour femme une des filles de Phuthiel, qui lui enfanta Phinées. Tels sont les chefs des maisons des Lévites, selon leurs familles.
Eleazari, mwana mobali ya Aron, abalaki moko kati na bana basi ya Putieli, oyo abotelaki ye mwana mobali: Pineasi. Wana nde bakambi ya mabota ya Levi kolanda mabota ya botata na bango.
26 Ce sont là l’Aaron et le Moïse auxquels Yahweh dit: « Faites sortir du pays d’Égypte les enfants d’Israël selon leurs armées. »
Ezali epai ya Aron mpe Moyize nde Yawe alobaki: « Bobimisa bana ya Isalaele na Ejipito lokola mampinga oyo etandami na molongo. »
27 Ce sont eux qui parlèrent à Pharaon, roi d’Égypte, pour faire sortir d’Égypte les enfants d’Israël; c’est ce Moïse et cet Aaron.
Ezali bango nde bakendeki kokutana na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpo na kobimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. Ezali nde Moyize mpe Aron wana.
28 Lorsque Yahweh parla à Moïse dans le pays d’Égypte,
Tala makambo oyo ekomaki tango Yawe alobaki na Moyize, na Ejipito:
29 Yahweh dit à Moïse: « Je suis Yahweh. Dis à Pharaon, roi d’Égypte, tout ce que je te dis. »
Yawe ayebisaki Moyize: — Nazali Yawe. Loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, makambo nyonso oyo nayebisi yo.
30 Et Moïse répondit en présence de Yahweh: « Voici, j’ai la parole difficile; comment Pharaon m’écoutera-t-il? »
Kasi Moyize azongiselaki Yawe: — Tala, nazali na likukuma; ndenge nini Faraon akoyoka ngai?

< Exode 6 >