< Exode 40 >

1 Yahweh parla à Moïse, en disant:
Yawe alobaki na Moyize:
2 « Le premier jour du premier mois, tu dresseras la Demeure, la tente de réunion.
— Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okotelemisa Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani;
3 Tu y placeras l’arche du témoignage, et tu couvriras l’arche avec le voile.
okotia kati na yango Sanduku ya Litatoli mpe okozipa yango na rido.
4 Tu apporteras la table et tu y disposeras ce qui doit la garnir. Tu apporteras le chandelier et tu poseras dessus ses lampes.
Okokotisa mesa mpe okotia biloko oyo esengeli kozala likolo na yango; okokotisa etelemiselo ya minda mpe okopelisa minda na yango.
5 Tu placeras l’autel d’or pour le parfum devant l’arche du témoignage, et tu mettras le voile à l’entrée de la Demeure.
Okotia etumbelo ya malasi, oyo basala na wolo liboso ya Sanduku ya Litatoli mpe okotia rido, na ekotelo ya Mongombo.
6 Tu placeras l’autel des holocaustes devant l’entrée de la Demeure, de la tente de réunion.
Okotia etumbelo ya mbeka ya kotumba liboso ya ekotelo ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani,
7 Tu placeras la cuve entre la tente de réunion et l’autel, et tu y mettras de l’eau.
mpe okotia sani mpo na komipetola na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo, mpe okotia mayi kati na yango.
8 Tu dresseras le parvis à l’entour, et tu mettras la tenture à la porte du parvis.
Okotonga lopango zingazinga na yango mpe okotia rido na ekotelo ya lopango.
9 « Tu prendras l’huile d’onction, tu en oindras la Demeure et tout ce qu’elle renferme; tu la consacreras avec tous ses ustensiles, et elle sera sainte.
Okozwa mafuta ya epakolami, okopakola Mongombo mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mpe okobulisa yango elongo na bisalelo na yango nyonso mpe yango ekozala bule.
10 Tu oindras l’autel des holocaustes et tous ses ustensiles; tu consacreras l’autel, et l’autel sera très saint.
Okopakola mafuta na etumbelo ya mbeka ya kotumba mpe bisalelo na yango nyonso; okobulisa etumbelo mpe yango ekozala bule koleka.
11 Tu oindras la cuve avec sa base, et tu la consacreras.
Okopakola mafuta na sani mpo na komipetola mpe evandelo na yango, mpe okobulisa yango.
12 « Tu feras avancer Aaron et ses fils près de l’entrée de la tente de réunion, et tu les laveras avec de l’eau.
Okomema Aron mpe bana na ye ya mibali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe okosukola bango na mayi.
13 Puis tu revêtiras Aaron des vêtements sacrés, tu l’oindras et tu le consacreras, et il sera prêtre à mon service.
Sima na yango, okolatisa Aron bilamba ya bule, okopakola ye mafuta mpe okobulisa ye mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe.
14 Tu feras approcher ses fils et, les ayant revêtus des tuniques,
Okomema mpe bana na ye ya mibali mpe okolatisa bango banzambala.
15 tu les oindras comme tu auras oint leur père, et ils seront prêtres à mon service. Cette onction leur conférera le sacerdoce à perpétuité parmi leurs descendants. »
Okopakola bango mafuta ndenge opakolaki tata na bango, mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe: epakolami na bango ekopesa bango nzela mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe libela na libela kati na bakitani na bango.
16 Moïse fit tout ce que Yahweh lui avait ordonné; il fit ainsi.
Moyize asalaki nyonso oyo Yawe atindaki ye.
17 Le premier jour du premier mois de la seconde année, la Demeure fut dressée.
Boye, Mongombo etelemisamaki na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso na mobu ya mibale.
18 Moïse dressa la Demeure; il en posa les socles, il en plaça les planches et les traverses, en dressa les colonnes.
Tango Moyize atelemisaki Mongombo, atiaki bivandelo na esika na yango, atiaki bakadre, akotisaki mabaya mpe atelemisaki makonzi;
19 Il étendit la tente sur la Demeure, et mit par-dessus la couverture de la tente, comme Yahweh l’avait ordonné à Moïse.
atandaki ndako ya kapo na likolo ya Mongombo mpe atiaki ezipelo na likolo ya ndako ya kapo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
20 Il prit le témoignage et le plaça dans l’arche; il mit les barres à l’arche et posa le propitiatoire au-dessus de l’arche.
Moyize azwaki bitando nyonso mibale ya mabanga ya Boyokani mpe atiaki yango kati na Sanduku, akangisaki mabaya na Sanduku mpe atiaki esika ya bolimbisi masumu na likolo na yango.
21 Il porta l’arche dans la Demeure; et, ayant mis le voile de séparation, il en couvrit l’arche du témoignage, comme Yahweh l’avait ordonné à Moïse.
Moyize akotisaki Sanduku kati na Mongombo mpe atiaki rido mpo na kokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo ete bato bakoka komona Sanduku ya Litatoli te, ndenge kaka Yawe atindaki ye.
22 Il plaça la table dans la tente de réunion, au côté septentrional de la Demeure, en dehors du voile,
Moyize atiaki mesa kati na Ndako ya kapo ya Bokutani na ngambo ya nor ya Mongombo libanda ya rido;
23 et il y disposa les pains devant Yahweh, comme Yahweh l’avait ordonné à Moïse.
mpe atiaki mapa na molongo, liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
24 Il plaça le chandelier dans la tente de réunion, vis-à-vis de la table, au côté méridional de la Demeure,
Atiaki etelemiselo ya minda kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, etalana na mesa, na ngambo ya sude ya Mongombo.
25 et il y posa les lampes devant Yahweh, comme Yahweh l’avait ordonné à Moïse.
Apelisaki minda liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
26 Il plaça l’autel d’or dans la tente de réunion, devant le voile,
Atiaki etumbelo ya wolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya rido,
27 et il y fit brûler l’encens, comme Yahweh l’avait ordonné à Moïse.
mpe atumbaki likolo na yango ansa ya solo kitoko, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
28 Il plaça le rideau à l’entrée de la Demeure.
Bongo atiaki rido na ekotelo ya Mongombo.
29 Il plaça l’autel des holocaustes à l’entrée de la Demeure, de la tente de réunion, et il y offrit l’holocauste et l’oblation, comme Yahweh l’avait ordonné à Moïse.
Atiaki etumbelo ya mbeka ya kotumba pembeni ya ekuke ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, abonzaki likolo na yango bambeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
30 Il plaça la cuve entre la tente de réunion et l’autel, et il y mit de l’eau pour les ablutions;
Atiaki sani mpo na komipetola na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo mpe atiaki kati na yango mayi ya kosukola.
31 Moïse, Aaron et ses fils s’y lavèrent les mains et les pieds.
Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron basalelaki yango mpo na kosukola maboko mpe makolo na bango.
32 Lorsqu’ils entraient dans la tente de réunion et qu’ils s’approchaient de l’autel, ils se lavaient, comme Yahweh l’avait ordonné à Moïse.
Bazalaki komisukola tango nyonso bazalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
33 Il dressa le parvis autour de la Demeure et de l’autel, et il mit la tenture à la porte du parvis. Ce fut ainsi que Moïse acheva cette œuvre.
Moyize atelemisaki lopango pembeni-pembeni ya Mongombo mpe ya etumbelo, mpe atiaki rido na ekuke ya lopango. Ezali boye nde Moyize asilisaki mosala.
34 Alors la nuée couvrit la tente de réunion, et la gloire de Yahweh remplit la Demeure.
Lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Bokutani mpe nkembo na Yawe etondaki kati na Mongombo.
35 Et Moïse ne pouvait plus entrer dans la tente de réunion, parce que la nuée restait dessus, et que la gloire de Yahweh remplissait la Demeure.
Moyize akokaki lisusu te kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, pamba te lipata evandaki likolo na yango mpe nkembo na Yawe etondaki kati na Mongombo.
36 Tant que durèrent leurs marches, les enfants d’Israël partaient lorsque la nuée s’élevait de dessus la Demeure;
Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, bana ya Isalaele bazalaki kotelema mpo na kokende na mobembo na bango.
37 et si la nuée ne s’élevait pas, ils ne partaient pas, jusqu’au jour où elle s’élevait.
Kasi soki lipata elongwe te, bango mpe bazalaki kolongwa te, bazalaki kozela kino na mokolo oyo lipata ekolongwa.
38 Car la nuée de Yahweh reposait pendant le jour sur la Demeure, et, pendant la nuit, il y avait du feu dans la nuée, aux yeux de toute la maison d’Israël, tant que durèrent leurs marches.
Na moyi, lipata ya Yawe ezalaki na likolo ya Mongombo; bongo na butu, moto ezalaki kongala kati na lipata, mpe miso ya bana nyonso ya Isalaele ezalaki komona yango. Esalemaki bongo na mibembo na bango nyonso.

< Exode 40 >