< Daniel 11 >

1 « Quant à moi, la première année de Darius le Mède, je me suis levé pour le confirmer et le renforcer.
Na mobu ya liboso ya bokonzi ya Dariusi, moto ya Medi, nazalaki wana mpo na kosunga mpe kobatela ye.
2 « Maintenant, je vais te montrer la vérité. Voici que trois autres rois vont se lever en Perse. Le quatrième sera beaucoup plus riche que tous les autres. Quand il sera devenu fort par ses richesses, il soulèvera tout contre le royaume de Grèce.
Sik’oyo, nakoloba na yo solo ya likambo: « Bakonzi misato bakobima lisusu mpo na Persi; bongo mokonzi ya minei akobima lisusu, kasi akoleka bakonzi nyonso oyo bayaki liboso na ye na bomengo. Tango bomengo na ye ekopesa ye nguya, akosala ete bato nyonso batombokela Grese.
3 Un roi puissant se lèvera, qui dominera avec une grande autorité, et fera ce qu'il voudra.
Kasi mokonzi moko ya nguya koleka akobima mpe akokamba na nguya nyonso, akosala makambo oyo alingi.
4 Quand il se lèvera, son royaume sera brisé et partagé aux quatre vents du ciel, mais non pas pour sa postérité, ni selon la domination avec laquelle il a régné; car son royaume sera arraché, même pour d'autres que ceux-là.
Sima na kolendisama ya bokonzi na ye, mokili na ye ekobebisama mpe ekopanzana bipai na bipai; bakitani na ye bakozwa lisusu bokonzi te mpe mokili yango ekozala lisusu na nguya te, pamba te bakobotola yango mpe bakokaba yango na bato mosusu.
5 « Le roi du midi sera puissant. L'un de ses princes deviendra plus fort que lui et dominera. Sa domination sera une grande domination.
Mokonzi ya sude akokoma makasi koleka, kasi moko ya bakonzi na ye ya basoda akokoma lisusu makasi koleka ye mpe akotambolisa mokili na nguya makasi koleka.
6 A la fin des années, ils s'uniront; et la fille du roi du midi ira vers le roi du nord pour conclure une alliance, mais elle ne conservera pas la force de son bras. Lui aussi ne tiendra pas, et son bras non plus; mais elle sera livrée, avec ceux qui l'ont amenée, et celui qui l'a engendrée, et celui qui l'a fortifiée en ces temps-là.
Sima na mibu ebele, akosala boyokani elongo na bakonzi mosusu. Mwana mwasi ya mokonzi ya sude akokende kosala boyokani elongo na mokonzi ya nor, kasi akobatela bokonzi na ye te, mpe bakitani na ye bakowumela te. Na mikolo wana, akokufa, ye elongo na bato oyo bamemaki ye na bokonzi, tata na ye mpe mosungi na ye.
7 « Mais d'un rejeton sorti de ses racines se lèvera un homme à sa place, qui ira à l'armée et entrera dans la forteresse du roi du nord; il traitera avec eux et sera vainqueur.
Moko kati na bakitani na ye akobima mpe akozwa esika na ye; akobundisa mampinga ya mokonzi ya nor mpe akokota kati na engumba na ye, oyo batonga makasi; akobundisa bango mpe akolonga bango.
8 Il emmènera aussi en captivité en Égypte leurs dieux, avec leurs images en fonte, et leurs vases d'argent et d'or. Il s'abstiendra quelques années du roi du nord.
Akozwa banzambe na bango ya bikeko, bikeko na bango oyo basala na bibende, biloko na bango ya motuya oyo basala na wolo mpe na palata mpe akomema yango na Ejipito. Akozala mosika ya mokonzi ya nor na mwa mibu.
9 Il entrera dans le royaume du roi du midi, mais il retournera dans son pays.
Mokonzi ya nor akokota na makasi kati na mokili ya mokonzi ya sude, kasi akozonga na mokili na ye.
10 Ses fils feront la guerre et rassembleront une multitude de grandes forces qui arriveront, déborderont et passeront. Ils reviendront et feront la guerre, jusqu'à sa forteresse.
Bana ya mokonzi ya nor bokobongama mpo na bitumba mpe bakosangisa mampinga ya basoda ebele, bongo bakomema lokola mpela biloko nyonso oyo bakomona na nzela; bakobunda bitumba makasi kino na ndako batonga makasi ya mokonzi ya sude.
11 « Le roi du Midi sera irrité et sortira pour le combattre, même le roi du Nord. Il enverra une grande multitude, et la multitude sera livrée entre ses mains.
Mokonzi ya sude akobima na kanda, akosangisa mampinga moko monene, akobundisa mokonzi ya mokili ya nor mpe akolonga ye.
12 La multitude sera emportée, et son cœur s'élèvera. Il renversera des dizaines de milliers, mais il ne vaincra pas.
Tango bakolonga mampinga ya mokonzi ya nor, mokonzi ya mokili ya sude akotondisama na lolendo mpe akoboma bato ebele, kasi elonga na ye ekowumela te.
13 Le roi du nord reviendra, et il enverra une multitude plus nombreuse que la précédente. Il arrivera à la fin des temps, des années, avec une grande armée et des provisions abondantes.
Pamba te mokonzi ya mokili ya nor akosangisa mampinga monene ya basoda koleka oyo ya liboso mpe, sima na mibu ebele, akozonga elongo na mampinga ya basoda ebele mpe na bibundeli ebele.
14 « En ces temps-là, beaucoup se dresseront contre le roi du Midi. Les enfants des violents parmi ton peuple se lèveront aussi pour établir la vision, mais ils tomberont.
Na tango wana, bato ebele bakotombokela mokonzi ya mokili ya sude. Bato ya mobulu kati na bato na yo, Daniele, bakotomboka mpo ete emoniseli ekokokisama, kasi bakolonga te.
15 Alors le roi du nord viendra, il élèvera un monticule et prendra une ville bien fortifiée. Les forces du sud ne tiendront pas, ni ses troupes choisies, et il n'y aura pas de force pour tenir.
Mokonzi ya mokili ya nor akoya kotonga mwa bangomba ya mabele zingazinga ya engumba oyo batonga makasi mpe akobotola yango. Mampinga ya basoda ya mokonzi ya sude bakokoka kobundisa ye te. Ezala basoda na bango ya mpiko, bakozala ata na makasi ya kobunda te.
16 Mais celui qui viendra contre lui agira selon sa propre volonté, et personne ne tiendra devant lui. Il se tiendra dans le pays de la gloire, et la destruction sera dans sa main.
Mokonzi ya nor akosala makambo nyonso oyo alingi mpe moto moko te akokoka kotelema liboso na ye. Akovanda na mokili oyo eleki kitoko mpe akobebisa yango.
17 Il se préparera à venir avec la force de tout son royaume, et avec lui des conditions équitables. Il les exécutera. Il lui donnera la fille des femmes, pour détruire le royaume, mais elle ne tiendra pas, et ne sera pas pour lui.
Akozwa mokano ya koya elongo na mampinga ya mokili na ye mobimba mpe akosala boyokani elongo na mokonzi ya sude. Mokonzi ya nor akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpo ete akoka kobebisa mokili na ye, kasi mabongisi na ye ekolonga te mpe akozwa mokili yango te.
18 Après cela, il tournera sa face vers les îles, et il en prendra beaucoup, mais un prince fera cesser l'opprobre qui lui est fait. Oui, bien plus, il fera en sorte que l'opprobre se retourne contre lui.
Akokitela bisanga mpe akobotola ebele kati na yango. Kasi atako bongo, mokonzi ya mampinga moko ya basoda akosukisa lolendo na ye mpe akozongisela ye mabe mpo na lolendo na ye. Mokonzi ya nor akokoka lisusu kosala eloko moko te.
19 Puis il tournera sa face vers les forteresses de son pays; mais il trébuchera et tombera, et on ne le retrouvera pas.
Sima na yango, akozonga na bandako batonga makasi ya mokili na ye, kasi akobeta libaku mpe akokweya; bongo bakotikala komona ye lisusu te.
20 « Alors se dressera à sa place celui qui fera passer un collecteur d'impôts dans le royaume pour en maintenir la gloire; mais en peu de jours il sera détruit, non par la colère, ni par la bataille.
Mokitani na ye akotinda mofutisi mpako moko na esika oyo eleki lokumu kati na mokili. Sima na mwa mikolo, mokonzi mpe akobebisama, kasi ekozala na botomboki te mpe na bitumba te.
21 « A sa place se lèvera un homme méprisable, à qui on n'avait pas donné l'honneur du royaume; mais il viendra au temps de la sécurité, et il obtiendra le royaume par des flatteries.
Moto moko azanga ata tina mpe batikala kopesa ata lokumu ya bokonzi te akokitana na ye; akoya na tango ya kimia mpe akozwa bokonzi na nzela ya mayele mabe.
22 Les forces écrasantes seront submergées devant lui, et seront brisées. Oui, aussi le prince de l'alliance.
Mampinga ya banguna bakokweya liboso na ye, mampinga yango mpe mokonzi ya boyokani bakobebisama.
23 Après le traité conclu avec lui, il agira avec ruse; car il s'élèvera et deviendra fort avec peu de gens.
Atako basalaki boyokani elongo na ye, akosalela kaka mayele mabe; akobebisa boyokani oyo basalaki, akobundisa bango mpe akolonga na nzela ya bato moke kaka.
24 Au temps de la sécurité, il s'attaquera même aux lieux les plus gras de la province. Il fera ce que ses pères n'ont pas fait, ni les pères de ses pères. Il répandra parmi eux la proie, le pillage et la richesse. Oui, il élaborera ses plans contre les forteresses, mais seulement pour un temps.
Na tango ya kimia, akokota na makasi kati na bituka oyo etonda na bomengo mpe akokokisa makambo oyo ata moko te kati na batata to bakoko na ye batikala kosala: akobotola na makasi biloko mpe bomengo ya mokili, bongo akokabola yango epai na bato na ye; akosala mabongisi ya kobundisa bingumba batonga makasi, kasi nyonso wana kaka ekowumela tango moke.
25 « Il excitera sa puissance et son courage contre le roi du Midi avec une grande armée; et le roi du Midi livrera bataille avec une armée extrêmement grande et puissante, mais il ne tiendra pas, car on ourdira des plans contre lui.
Akovandisa makanisi na ye mpe akotelema na mpiko, akosangisa mampinga monene mpo na kobundisa mokonzi ya sude. Mpe mokonzi ya sude akosangisa mampinga monene mpe ya nguya mpo na kobundisa ye, kasi akolonga te mpo na likita oyo basalelaki ye.
26 Oui, ceux qui mangeront de ses mets le détruiront, et son armée sera balayée. Beaucoup tomberont tués.
Bato oyo baliaka elongo na mokonzi bakoluka koboma ye, mampinga na ye bakobebisama mpe basoda ebele bakokufa na bitumba.
27 Quant à ces deux rois, leur cœur sera porté à faire le mal, et ils diront des mensonges à une table; mais cela ne réussira pas, car la fin sera toujours au temps fixé.
Bakonzi oyo mibale, na mitema na bango ya mabe, bakovanda esika moko. Lokola batonda na mayele mabe, bakolobana lokuta kasi ekosimba te, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.
28 Puis il retournera dans son pays avec de grandes richesses. Son cœur sera contre l'alliance sainte. Il agira, et retournera dans son pays.
Mokonzi ya nor akozonga na mokili na ye na bomengo ebele, kasi makanisi ya motema na ye ekotelemela boyokani ya bule; mpe akokokisa yango liboso ete azonga na mokili na ye.
29 « Il reviendra au temps fixé et entrera dans le Midi; mais ce ne sera pas au dernier temps comme au premier.
Na tango oyo ekatama, akokota lisusu na mokili ya sude na makasi; kasi na mbala oyo, makambo ekosalema ndenge moko te na mbala oyo ya liboso.
30 Car des navires de Kittim viendront contre lui. C'est pourquoi il sera affligé, et il reviendra, et il s'indignera contre l'alliance sainte, et il agira. Il reviendra même, et aura égard à ceux qui abandonnent l'alliance sainte.
Bamasuwa oyo ekowuta na ngambo ya weste ya ebale monene Mediterane ekobundisa ye; bongo, akolemba nzoto, akosilika makasi mpe akotombokela boyokani ya bule. Tango akozonga, akotalisa ngolu epai ya bato oyo bakobebisa boyokani ya bule.
31 « Des forces de sa part profaneront le sanctuaire, la forteresse, et feront disparaître l'holocauste perpétuel. Puis ils dresseront l'abomination qui désole.
Mampinga ya basoda na ye bakotelema mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo mpe kobuka engumba batonga makasi; bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo mpe bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi.
32 Il corrompra par des flatteries les méchants de l'alliance, mais le peuple qui connaît son Dieu sera fort et agira.
Na mayele na ye ya mabe, akokosa bato oyo babukaki boyokani; kasi bato oyo bayebi Nzambe na bango bakotelemela ye makasi.
33 « Les sages parmi le peuple en instruiront beaucoup; mais ils tomberont par l'épée et par la flamme, par la captivité et par le pillage, pendant plusieurs jours.
Ba-oyo bakozala na bwanya kati na bato bakoteya bato ebele, atako bakokufa na mopanga na mwa tango moke to bakozika na moto to bakobwakama na boloko to mpe bakobotola bango biloko na makasi.
34 Lorsqu'ils tomberont, on leur portera un petit secours; mais beaucoup se joindront à eux par des flatteries.
Tango bakokweya, bakozwa kaka lisungi moke, mpe bato ebele bakoya kosangana na bango na mitema mibale.
35 Quelques-uns des sages tomberont pour les affiner, pour les purifier, pour les blanchir, jusqu'au temps de la fin, car c'est encore pour le temps fixé.
Bato mosusu kati na bato ya bwanya bakobeta mabaku, mpo ete bakomisama bato ya kokoka, bapetolama mpe bazangi mbeba, mpo na tango ya suka, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.
36 « Le roi fera ce qu'il voudra. Il s'élèvera et se glorifiera au-dessus de tout dieu, et il dira des choses merveilleuses contre le Dieu des dieux. Il prospérera jusqu'à l'accomplissement de l'indignation, car ce qui est déterminé s'accomplira.
Mokonzi akosala makambo oyo alingi, akokoma lolendo, akotombola mapeka liboso ya banzambe nyonso mpe akoloba makambo ezanga tina mpo na kotiola Nzambe ya banzambe; akolonga kino tango kanda makasi ya Nzambe ekosila, pamba te makambo nyonso oyo ekatama esengeli kokokisama.
37 Il ne tiendra pas compte des dieux de ses pères, ni du désir des femmes, ni d'aucun dieu, car il s'élèvera au-dessus de tous.
Akopesa lokumu te, ezala epai ya banzambe ya batata na ye to epai ya nzambe oyo basi balingaka to mpe epai ya banzambe nyonso mosusu; pamba te akomitombola liboso na bango nyonso.
38 Mais à leur place, il honorera le dieu des forteresses. Il honorera un dieu que ses pères n'ont pas connu, avec de l'or, de l'argent, des pierres précieuses et des choses agréables.
Na esika ya kosambela banzambe wana, akosambela nzambe ya bandako batonga makasi; akobonza wolo, palata, mabanga ya talo mpe makabo mosusu ya talo epai ya nzambe oyo bakoko na ye batikalaki koyeba te.
39 Il vaincra les forteresses les plus puissantes avec l'aide d'un dieu étranger. Il accroîtra la gloire de ceux qui le reconnaîtront. Il les fera dominer sur beaucoup de gens, et il partagera le pays à prix d'argent.
Akobundisa bandako batonga makasi na lisungi ya nzambe moko ya bapaya, mpe akopesa lokumu koleka epai ya bato oyo bakopesa nzambe yango lokumu. Akokomisa bango bakambi ya bato ebele mpe akokabolela bango mokili lokola lifuti.
40 « Au temps de la fin, le roi du midi lui fera la guerre, et le roi du nord viendra contre lui comme un tourbillon, avec des chars, des cavaliers et de nombreux navires. Il entrera dans les pays, il les débordera et les traversera.
Na tango ya suka, mokonzi ya sude akobundisa mokonzi ya nor, kasi mokonzi ya nor akobimela ye elongo na bashar, bampunda mpe bamasuwa ya bitumba. Akokota na makasi na bikolo ebele mpe akomema lokola mpela eloko nyonso oyo akomona na nzela.
41 Il entrera aussi dans le pays de la gloire, et beaucoup de pays seront renversés; mais ceux-ci seront délivrés de sa main: Édom, Moab, et le chef des enfants d'Ammon.
Akokota lisusu na makasi na mokili ya kitoko. Bikolo ebele ekokweya, kasi Edomi, Moabi mpe bakonzi ya Amoni bakokima ye.
42 Il étendra aussi sa main sur les pays. Le pays d'Égypte n'échappera pas.
Bokonzi na ye ekopanzana na bikolo ebele, ezala mokili ya Ejipito ekobika te.
43 Mais il aura le pouvoir sur les trésors d'or et d'argent, et sur tous les objets précieux de l'Égypte. Les Libyens et les Éthiopiens suivront ses traces.
Akobotola wolo, palata mpe bomengo nyonso ya mokili ya Ejipito, bongo bato ya Libi mpe ya Kushi bakosala ndenge moko kaka na ye.
44 Mais des nouvelles de l'Orient et du Nord le troubleront, et il sortira avec une grande fureur pour détruire et exterminer beaucoup de gens.
Kasi basango oyo akozwa wuta na este mpe na nor ekotungisa ye, mpe akobima na mokili na kanda makasi mpo na koboma mpe kosilisa bato ebele.
45 Il plantera les tentes de son palais entre la mer et la glorieuse montagne sainte; mais il arrivera à sa perte, et personne ne lui viendra en aide.
Akotelemisa bandako na ye ya kapo ya bokonzi na ngambo moko ya ebale monene, pembeni ya ngomba ya bule. Boye, akokoma na suka mpe moto oyo akosunga ye akozala te.

< Daniel 11 >