< Heprealaisille 9 >
1 Olihan tosin ensimmäiselläkin liitolla jumalanpalvelussäännöt ja maallinen pyhäkkö.
Boyokani ya liboso ezalaki na mibeko ya losambo, mpe na Esika ya bule oyo ezalaki ya mokili.
2 Sillä maja oli valmistettu niin, että siinä oli etumainen maja, jossa oli sekä lampunjalka että pöytä ja näkyleivät, ja sen nimi on "pyhä".
Batelemisaki Mongombo oyo ezalaki na biteni mibale: kati na eteni ya liboso oyo bazalaki kobenga « Esika ya bule, » ezalaki na etelemiselo ya minda, mesa mpe mapa oyo babonzi lokola makabo epai ya Nzambe.
3 Mutta toisen esiripun takana oli se maja, jonka nimi on "kaikkeinpyhin";
Sima na rido ya mibale, ezalaki na etando oyo bazalaki kobenga « Esika-Oyo-Eleki-Bule. »
4 siinä oli kultainen suitsutusalttari ja liiton arkki, yltympäri kullalla päällystetty, jossa säilytettiin kultainen mannaa sisältävä astia ja Aaronin viheriöinyt sauva ja liiton taulut,
Kati na yango, ezalaki na etumbelo ansa oyo basala na wolo; ezalaki mpe na Sanduku ya Boyokani, oyo babamba wolo na mobimba na yango. Kati na Sanduku ya Boyokani, ezalaki na sani ya wolo, oyo batia mana kati na yango; lingenda ya Aron oyo ebimisaki mito ya banzete, mpe bitando ya mabanga oyo batobolaki makomi ya mibeko ya boyokani.
5 ja arkin päällä kirkkauden kerubit varjostamassa armoistuinta. Mutta näistä nyt ei ole syytä puhua kustakin erikseen.
Na likolo ya Sanduku, ezalaki na bililingi ya basheribe ya nkembo, oyo ezipaki mofinuku ya Sanduku na nzela ya elili ya mapapu na yango. Kasi tokoki te sik’oyo kolobela biloko oyo na molayi.
6 Kun nyt kaikki on näin järjestetty, menevät papit joka aika etumaiseen majaan jumalanpalvelusta toimittamaan,
Wana biloko oyo nyonso esilaki kotiama, Banganga-Nzambe bazalaki kokota, mbala na mbala, na eteni ya liboso ya Mongombo mpo na kosala mosala na bango.
7 mutta toiseen majaan menee ainoastaan ylimmäinen pappi kerran vuodessa, ei ilman verta, jonka hän uhraa itsensä edestä ja kansan tahattomien syntien edestä.
Kasi kati na eteni ya mibale, kaka mokonzi ya Banganga-Nzambe nde azalaki kokota kuna mbala moko na mobu; mpe asengeli komema makila ya kobonzela Nzambe, mpo na ye moko mpe mpo na masumu oyo bato basalaki na kozanga koyeba.
8 Näin Pyhä Henki osoittaa, että tie kaikkeinpyhimpään vielä on ilmoittamatta, niin kauan kuin etumainen maja vielä seisoo.
Na nzela ya biloko oyo, Molimo Mosantu azalaki kotalisa polele ete, wana Mongombo ya liboso ezalaki nanu, nzela mpo na kokota kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki ya kokangama.
9 Tämä on nykyistä aikaa tarkoittava vertauskuva, ja sen mukaisesti uhrataan lahjoja ja uhreja, jotka eivät kykene tekemään täydelliseksi omassatunnossaan sitä, joka jumalanpalvelusta toimittaa,
Mpe ezali elilingi ya makambo oyo ezali kosalema na tango oyo mpo na kotalisa ete makabo mpe bambeka oyo babonzelaka Nzambe ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, mitema ya bato oyo basambelaka ndenge wana.
10 vaan jotka, niinkuin ruuat ja juomat ja erilaiset pesotkin, ovat ainoastaan lihan sääntöjä, jotka ovat voimassa uuden järjestyksen aikaan asti.
Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola: mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.
11 Mutta kun Kristus tuli tulevaisen hyvän ylimmäiseksi papiksi, niin hän suuremman ja täydellisemmän majan kautta, joka ei ole käsillä tehty, se on: joka ei ole tätä luomakuntaa,
Kasi tango Klisto ayaki lokola Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na kopesa biso biloko oyo asilaki kozwa mpo na biso, akatisaki Mongombo ya monene makasi mpe ya kokoka; ezali Mongombo oyo esalema na maboko ya bato te, ezali ya mokili oyo te.
12 meni, ei kauristen ja vasikkain veren kautta, vaan oman verensä kautta kerta kaikkiaan kaikkeinpyhimpään ja sai aikaan iankaikkisen lunastuksen. (aiōnios )
Akotaki mbala moko mpo na libela kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe abonzaki kuna makila ya bantaba te mpe ya bana ngombe te, kasi abonzaki nde makila na Ye moko. Ezali ndenge wana nde azwelaki biso lisiko ya libela. (aiōnios )
13 Sillä jos kauristen ja härkäin veri ja hiehon tuhka, saastaisten päälle vihmottuna, pyhittää lihanpuhtauteen,
Pamba te makila ya bantaba, makila ya bangombe ya mibali mpe putulu ya bangombe ya basi, oyo basopelaka bato ya mbindo, epetolaka kaka libanda ya nzoto;
14 kuinka paljoa enemmän on Kristuksen veri, hänen, joka iankaikkisen Hengen kautta uhrasi itsensä viattomana Jumalalle, puhdistava meidän omantuntomme kuolleista teoista palvelemaan elävää Jumalaa! (aiōnios )
nzokande makila ya Klisto oyo, na nzela ya Molimo ya seko, amikabaki Ye moko epai ya Nzambe lokola mbeka oyo ezangi mbeba, epetolaka mitema na biso na misala oyo ememaka na kufa mpo ete tokoka kosalela Nzambe na bomoi. (aiōnios )
15 Ja sentähden hän on uuden liiton välimies, että, koska hänen kuolemansa on tapahtunut lunastukseksi ensimmäisen liiton aikuisista rikkomuksista, ne, jotka ovat kutsutut, saisivat luvatun iankaikkisen perinnön. (aiōnios )
Yango wana, Klisto azali Moyokanisi kati na Boyokani ya sika, mpo ete bato oyo Nzambe abenga bakoka kozwa libula ya seko oyo Nzambe alakaki bango. Mpe bakoki solo kozwa yango, pamba te Klisto asilaki kokufa lokola mbeka mpo na kosikola bango na masumu oyo basalaki tango bazalaki na se ya bokonzi ya boyokani ya kala. (aiōnios )
16 Sillä missä on testamentti, siinä on sen tekijän kuolema toteennäytettävä;
Pamba te soki moto akomi mokanda mpo ete moto songolo akitana na biloko na ye na mokolo oyo akokufa, asengeli liboso kokufa mpo ete biloko oyo akotika ekoma ya mokitani oyo ye asilaki kopona.
17 sillä vasta kuoleman jälkeen testamentti on pitävä, koska se ei milloinkaan ole voimassa tekijänsä eläessä.
Mokanda yango ezwaka nguya kaka soki mokomi na yango akufi; kasi soki mokomi azali nanu na bomoi, ezali na nguya ata moke te.
18 Sentähden ei myöskään ensimmäistä liittoa verettä vihitty.
Yango wana mpe, boyokani ya liboso ekokaki kozala na nguya te soki makila esopanaki te.
19 Sillä kun Mooses oli kaikelle kansalle julkilukenut kaikki käskyt, niinkuin ne laissa kuuluvat, otti hän vasikkain ja kauristen veren ynnä vettä ja purppuravillaa ja isopin ja vihmoi sekä itse kirjan että kaiken kansan,
Pamba te, tango Moyize asilisaki kotangela bato mitindo nyonso ndenge ekomami kati na Mibeko, akamataki makila ya bana ngombe, ya bantaba elongo na mayi, asopelaki buku mpe bato nyonso na nzela ya etape ya nzete ya izope, oyo balinga elamba ya lino ya motane.
20 sanoen: "Tämä on sen liiton veri, jonka Jumala on teille säätänyt".
Alobaki: « Oyo ezali makila ya boyokani oyo Nzambe atindi bino kobatela. »
21 Ja samoin hän verellä vihmoi myös majan ja kaikki palvelukseen kuuluvat esineet.
Bongo, na makila yango, asopelaki lisusu Mongombo mpe bisalelo nyonso ya losambo.
22 Niin puhdistetaan lain mukaan miltei kaikki verellä, ja ilman verenvuodatusta ei tapahdu anteeksiantamista.
Pamba te, kolanda Mibeko, nyonso epetolamaka na makila; mpe soki makila etangi te, bolimbisi masumu ezali te.
23 On siis välttämätöntä, että taivaallisten kuvat tällä tavalla puhdistetaan, mutta että taivaalliset itse puhdistetaan paremmilla uhreilla kuin nämä.
Boye, lokola bililingi ya biloko oyo ezali kati na Likolo esengelaki kopetolama ndenge wana, ezalaki na tina ete yango moko mpe biloko ya Likolo epetolama na nzela ya bambeka oyo eleki malamu.
24 Sillä Kristus ei mennyt käsillä tehtyyn kaikkeinpyhimpään, joka vain on sen oikean kuva, vaan itse taivaaseen, nyt ilmestyäkseen Jumalan kasvojen eteen meidän hyväksemme.
Pamba te Klisto akotaki te na Esika ya Bule oyo esalemaki na maboko ya bato, oyo ezalaki kaka elilingi ya Esika ya Bule ya solo; kasi akotaki nde kati na Likolo yango moko mpo ete atelema sik’oyo liboso ya Nzambe mpo na bolamu na biso.
25 Eikä hän mennyt uhratakseen itseänsä monta kertaa, niinkuin ylimmäinen pappi joka vuosi menee kaikkeinpyhimpään, vierasta verta mukanaan,
Klisto akotaki kuna te mpo ete amikabaka mbala na mbala lokola mbeka, ndenge mokonzi ya Banganga-Nzambe azalaki kokota mobu na mobu kati na Esika ya Bule elongo na makila oyo ezalaki ya ye te.
26 sillä muutoin hänen olisi pitänyt kärsimän monta kertaa maailman perustamisesta asti; mutta nyt hän on yhden ainoan kerran maailmanaikojen lopulla ilmestynyt, poistaakseen synnin uhraamalla itsensä. (aiōn )
Soki ezalaki bongo, mbele Klisto anyokwamaki mbala ebele wuta na ebandeli ya mokili. Nzokande sik’oyo, na mikolo oyo ya suka, amonani mbala kaka moko mpo na kolongola masumu na nzela ya mbeka na Ye. (aiōn )
27 Ja samoinkuin ihmisille on määrätty, että heidän kerran on kuoleminen, mutta senjälkeen tulee tuomio,
Bongo ndenge kaka ekatama ete moto nyonso asengeli kokufa mbala moko, mpe, sima na yango, kosambisama eya,
28 samoin Kristuskin, kerran uhrattuna ottaakseen pois monien synnit, on toistamiseen ilman syntiä ilmestyvä pelastukseksi niille, jotka häntä odottavat.
ndenge wana mpe Klisto, oyo amikabaki lokola mbeka mbala moko mpo na kolongola masumu ya bato ebele, akoya na mbala ya mibale, mpo na kolongola masumu ya bato te, kasi mpo na kobikisa bato oyo bazali kozela Ye na posa makasi.