< Esran 5 >

1 Ja prophetat Haggai ja Sakaria, Iddon poika, ennustivat Juudalaisille, jotka olivat Juudassa ja Jerusalemissa, Israelin Jumalan nimeen.
Mosakoli Aje mpe mosakoli Zakari, mwana mobali ya Ido, basakolaki mpo na bato ya Yuda oyo bazalaki kati na mokili ya Yuda mpe na engumba Yelusalemi, na Kombo ya Nzambe ya Isalaele, oyo azalaki kati na bango.
2 Silloin nousivat Serubbabel Sealtielin poika, Jesua Jotsadakin poika ja rupesivat rakentamaan Jumalan huonetta Jerusalemissa ja Jumalan prophetat heidän kanssansa, auttain heitä.
Bongo, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, bazongelaki mosala ya kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe basakoli ya Nzambe bazalaki elongo na bango mpo na kosunga bango.
3 Siihen aikaan tuli Tatnai heidän tykönsä, joka oli maaherra toisella puolella virtaa, ja Setarbosnai, ja heidän kanssaveljensä, ja sanoivat näin heille: kuka on käskenyt rakentaa tätä huonetta ja näitä muureja perustaa?
Mbala moko, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezalaki na ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batunaki bango: — Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu mir oyo?
4 Niin me sanoimme heille, mitkä niiden miesten nimet olivat, jotka tätä rakennusta rakensivat.
Batunaki lisusu: — Bato oyo bazali kotonga Ndako oyo, bakombo na bango banani?
5 Ja heidän Jumalansa silmä tuli Juudan vanhimpain päälle, ettei sitä heiltä niinkauvaksi estetty, kuin sanoma vietiin Dariuksen tykö; ja lähetyskirja tuli siitä asiasta takaperin jälleen.
Kasi liso ya Nzambe na bango ezalaki kosenzela bakambi ya Bayuda. Boye bapekisaki bango te kosala misala na bango kino tango Dariusi azwaki mokanda na tina na yango mpe kino tango bazwaki mokanda ya eyano kowuta na Dariusi.
6 Ja kirja, jonka Tatnai maaherra toisella puolella virtaa, ja Setarbosnai, ja hänen kanssaveljensä Apharsakista, jotka olivat toisella puolella virtaa, lähettivät kuningas Dariukselle,
Tala mokanda oyo Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala, bakambi ya bituka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, batindelaki mokonzi Dariusi.
7 Ja sanat, jotka he lähettivät hänelle olivat näin kirjoitetut: kuninkaalle Dariukselle (toivotetaan) kaikkea rauhaa!
Tala makambo oyo bakomaki kati na mokanda yango: « Epai ya mokonzi Dariusi. Tika ete bokonzi na yo ewumela na kimia!
8 Olkoon kuninkaalle tiettävä, että me tulimme Juudan maakuntaan, kaikkein suurimman Jumalan huoneen tykö; ja sitä rakennetaan jaloista suurista kivistä, hirret pannaan seiniin, ja työ joutuu ja menestyy heidän käsissänsä.
Tika ete mokonzi ayeba ete tokendeki na etuka ya Yuda kino na Tempelo ya Nzambe Monene. Bato bazali kotonga yango na mabanga bakata mpe bazali kotia mabaya na likolo ya bamir. Mosala yango ezali kotambola malamu mpe kokende noki kati na maboko na bango.
9 Niin me kysyimme vanhimmilta ja sanoimme heille: kuka teille antoi käskyn rakentaa tätä huonetta ja näitä muureja perustaa?
Totunaki bakambi na bango motuna oyo: ‹ Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu bamir? ›
10 Me kysyimme myös heiltä heidän nimensä, antaaksemme sinulle ne tietää, ja me kirjoitimme niiden miesten nimet, jotka heidän päämiehensä olivat.
Totunaki bango bakombo na bango mpo ete toyebisa yo yango mpe tokomela yo bakombo ya bakambi na bango.
11 Ja senkaltaisen sanan he meille vastasivat, sanoen: me olemme taivaan ja maan Jumalan palveliat, ja rakennamme tätä huonetta, joka ennen monta vuotta oli rakennettu, jonka väkevä Israelin kuningas oli rakentanut ja pannut ylös.
Kasi tala eyano oyo bapesaki biso: ‹ Tozali basali ya Nzambe ya Likolo mpe ya se; tozali kotonga lisusu Tempelo oyo etongamaki wuta mibu ebele na kala. Mokonzi moko monene ya Isalaele atongaki mpe asilisaki yango.
12 Mutta sittekuin meidän isämme vihoittivat taivaan Jumalan, antoi hän heidät Nebukadnetsarin käsiin, Kaldealaisten kuninkaan Babelista; hän jaotti tämän huoneen ja vei kansan Babeliin.
Kasi lokola batata na biso batumbolaki kanda ya Nzambe ya Likolo, akabaki bango na maboko ya Nabukodonozori, moto ya Chalide, mokonzi ya Babiloni. Ezali ye nde abukaki Tempelo oyo mpe amemaki bato na bowumbu, na Babiloni.
13 Mutta ensimäisenä Koreksen, Babelin kuninkaan vuonna, käski kuningas Kores tämän Jumalan huoneen rakentaa.
Nzokande, na mobu ya liboso ya bokonzi na ye lokola mokonzi ya Babiloni, Sirisi apesaki mitindo ya kotonga lisusu Ndako oyo ya Nzambe,
14 Ja ne kulta astiat ja hopia astiat, mitkä olivat siinä Jumalan huoneessa, jotka Nebukadnetsar otti Jerusalemin templistä ja vei Babelin templiin, ne otti kuningas Kores Babelin templistä ja antoi yhdelle Sesbatsar nimeltä, jonka hän pani heidän päämieheksensä,
alongolaki kutu na tempelo ya Babiloni biloko basala na wolo mpe na palata, oyo Nabukodonozori azwaki na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi mpe amemaki na tempelo ya Babiloni. Mokonzi Sirisi apesaki biloko yango epai ya Sheshibatsari oyo ye, Sirisi, atiaki lokola moyangeli.
15 Ja sanoi hänelle: ota nämät astiat, mene ja vie ne Jerusalemin templiin, ja anna Jumalan huone rakennettaa paikallensa.
Alobaki na ye: ‘Kamata biloko oyo mpe kende kotia yango kati na Tempelo ya Yelusalemi; mpe tika ete Tempelo ya Nzambe etongama lisusu na esika na yango ya kala.’
16 Silloin tuli se Sesbatsar ja laski Jumalan huoneen perustuksen Jerusalemissa; ja siitä ajasta niin tähän asti on sitä rakennettu, ja ei ole vielä täytetty.
Ezali bongo nde Sheshibatsari ayaki awa na Yelusalemi mpo na kotonga miboko ya Ndako ya Nzambe. Wuta mokolo wana kino na mokolo ya lelo, Tempelo ezali kotongama, kasi misala esili nanu te. ›
17 Nyt siis jos kuninkaalle kelpaa, niin antakaan etsiä kuninkaan tavarahuoneessa, joka on Babelissa, jos se on käsketty Kores kuninkaalta, heidän rakentaa tätä Jumalan huonetta, joka on Jerusalemissa, ja antakoon tästä asiasta meidän tietää kuninkaan tahdon.
Sik’oyo, soki yango esepelisi mokonzi, tika ete baluka kati na babuku ya kala ya bakonzi ya Babiloni mpo na kotala soki mokonzi Sirisi apesaki solo mitindo ya kotonga lisusu Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe tika ete mokonzi atindela biso mokano na ye na tina na likambo oyo. »

< Esran 5 >