< Hezekiel 43 >
1 Tete ame la kplɔm va agbo si dze ŋgɔ ɣedzeƒe la gbɔ,
Moto yango amemaki ngai kino na ekuke oyo etala na ngambo ya este,
2 eye mekpɔ Israel ƒe Mawu la ƒe ŋutikɔkɔe wògbɔna tso ɣedzeƒe. Eƒe gbe ɖi tɔsisiwo ƒe hoowɔwɔ, eye eƒe ŋutikɔkɔe na anyigba la nɔ keklẽm.
mpe namonaki nkembo na Nzambe ya Isalaele koya wuta na ngambo ya este. Mongongo na Ye ezalaki lokola makelele ya mayi minene, mpe mokili ekomaki kongenga na nkembo na Ye.
3 Ŋutega si mekpɔ la ɖi ŋutega si mekpɔ esi wòva be yeagbã du la kple ŋutega si mekpɔ le Kebar tɔsisi la to. Tete metsyɔ mo anyi.
Emoniseli oyo namonaki ezalaki ndenge moko na oyo namonaki tango ayaki kobebisa engumba, mpe ndenge moko na oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye, nakweyaki elongi kino na mabele.
4 Yehowa ƒe ŋutikɔkɔe ge ɖe gbedoxɔ la me to agbo si dze ŋgɔ ɣedzeƒe la me.
Nkembo na Yawe ekotaki kati na Tempelo na nzela ya ekuke oyo etala na ngambo ya este.
5 Tete Gbɔgbɔ la kɔm ɖe dzi heyi xɔxɔnu emetɔ, eye Yehowa ƒe ŋutikɔkɔe yɔ gbedoxɔ la me.
Bongo, Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kino na lopango ya kati, mpe nkembo na Yawe etondisaki Tempelo.
6 Esime ŋutsu la tsi tsitre ɖe axanye la, mese ame aɖe wònɔ nu ƒom nam tso gbedoxɔ la me.
Tango moto yango atelemaki pene na ngai, nayokaki mongongo ya moto koloba na ngai wuta na kati ya Tempelo.
7 Egblɔ nam be, “Ame vi, afi siae nye nye fiazikpui ƒe nɔƒe kple teƒe na nye afɔƒome. Teƒe siae nye afi si manɔ le Israelviwo dome tegbetegbe. Israel ƒe aƒe la magado gu nye ŋkɔ kɔkɔe la kple woƒe fiawo to woƒe gbolowɔwɔ kple legba siwo me agbe mele o le woƒe nuxeƒewo o.
Alobaki na ngai: « Mwana na moto, ezali awa nde kiti na Ngai ya bokonzi ezalaka, esika oyo natiaka makolo na Ngai. Ezali na esika oyo nde nakovanda mpo na libela kati na bana ya Isalaele. Libota ya Isalaele ekotikala lisusu te kokomisa Kombo na Ngai mbindo, ezala bango to bakonzi na bango, na nzela ya kindumba na bango mpe ya banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi na likolo ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba.
8 Ne wotsɔ woƒe kpuiwo ɖo nye kpui nu, woƒe ʋɔtrutiwo ɖo nye ʋɔtrutiwo nu, eye gli koe tso nye kpli wo dome la, wodo gu nye ŋkɔ kɔkɔe la to woƒe ŋukpenanuwo wɔwɔ me. Ale metsrɔ̃ wo le nye dɔmedzoe me.
Tango batiaki bikotelo na bango pene ya ekotelo na Ngai, mabaya oyo esimbaka bikuke na bango pene ya mabaya oyo esimbaka ekuke na Ngai, bongo mir moko kaka nde ekabolaki bango na Ngai, babebisaki nde bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya misala na bango ya mbindo; yango wana, Ngai mpe nabebisaki bango na kanda na Ngai.
9 Azɔ la, na woaɖe woƒe gbolowɔwɔ kple woƒe fiawo ƒe legba siwo me agbe mele o la ɖa tso gbɔnye, ekema manɔ wo dome tegbee.
Sik’oyo, tika ete balongola na miso na Ngai kindumba na bango mpe banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi, mpe Ngai nakovanda kati na bango mpo na libela.
10 “Ame vi, ƒo nu tso gbedoxɔ la ŋu na Israelviwo, ale be woƒe nu vɔ̃wo nakpe ŋu na wo. Na woabu ɖoɖo la ŋu,
Mwana na moto, lakisa epai ya libota ya Isalaele ndenge Tempelo ezali mpo ete bayoka soni mpo na masumu na bango; mpe tika ete bameka molayi mpe mokuse na yango.
11 eye ne ŋu kpe wo le nu siwo wowɔ ta la, na woanya gbedoxɔ la ƒe nɔnɔme, afi siwo woato age ɖe eme kple afi siwo woato ado go, eƒe nɔnɔme blibo la kple ɖoɖowo katã kple seawo katã. Ŋlɔ nu siawo da ɖi le woƒe ŋkume, ale be woalé woƒe ɖoɖowo kple sewo me ɖe asi.
Soki bayoki penza soni mpo na makambo nyonso oyo basalaki, lakisa bango ndenge nini Tempelo ezali: ndenge basalela yango, bikuke mpe bikotelo na yango, ndenge batambolisaka yango, mibeko nini balandaka mpe ndenge nini basalaka losambo; koma yango, na miso na bango, mpo ete bakoka kolandela yango mpe kotia yango na misala.
12 “Esiae nye gbedoxɔ la ƒe se. Teƒe siwo katã ƒo xlãe le to la dzi la anye teƒe kɔkɔe. Esiae nye gbedoxɔ la ƒe se.”
Tala mobeko oyo etali Tempelo: bisika nyonso oyo ezali zingazinga ya likolo ya ngomba ekozala bule koleka. Yango nde mobeko oyo etali Tempelo.
13 “Esiawoe nye vɔsamlekpui la ƒe dzidzeme. Eƒe tsitoƒe de eme mita afã, eye wòkeke mita afã; woɖo to nɛ si kɔ asiƒo afã. Vɔsamlekpui la ƒe kɔkɔme le ale:
Tala molayi mpe mokuse ya etumbelo na bametele: zingazinga ya se ya etumbelo ezalaki na libulu moko ya bozindo ya basantimetele pene tuku mitano, mpe ndenge moko na mokuse na yango; bazingelaki yango na eloko moko evimba ya basantimetele pene mwambe. Etumbelo ezalaki,
14 Tso tsitoƒe si le anyigba va se ɖe kɔ etetɔ ŋu le mita ɖeka, eye wòkeke mita afã. Tso kɔ suetɔ gbɔ va se ɖe kɔ gãtɔ gbɔ la kɔ mita eve, eye wòkeke mita afã.
longwa na se ya mabele kino na moboko, na metele pene moko na bosanda mpe basantimetele pene tuku mitano na mokuse; kobanda na moboko ya moke kino na moboko ya monene, bametele pene mibale na bosanda mpe basantimetele pene tuku mitano na mokuse.
15 Vɔsamlekpui la ƒe dzodoƒe kɔ mita eve, eye lãdzo eve tso dzodoƒe la ŋu do ɖe yame.
Etumbelo ezalaki na bametele pene mibale na bosanda, mpe maseke minei ezalaki likolo na yango.
16 Vɔsamlekpui la ƒe dzodoƒe sɔ le didime kple kekeme siaa, eye ɖe sia ɖe nye mita ade.
Likolo ya etumbelo ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, na bangambo na yango nyonso: bametele pene motoba.
17 Kɔ yametɔ hã sɔ le didime kple kekeme me, eye ɖe sia ɖe didi mita adre, woɖo to nɛ ƒo xlã wòkɔ mita afã ƒe afã. Tsitoƒe la de eme mita afã ƒo xlã va kpe. Vɔsamlekpui la ƒe atrakpuiwo dze ŋgɔ ɣedzeƒe.”
Moboko ya monene ezalaki ekokana na molayi mpe na mokuse, na bangambo na yango nyonso: bametele pene sambo. Eloko moko evimba ya basantimetele pene tuku mibale na mitano ezalaki zingazinga na yango. Mpe libulu moko ya basantimetele pene tuku mitano na bozindo ezalaki zingazinga na yango; mpe binyatelo ya etumbelo ezalaki na ngambo ya este. »
18 Tete wògblɔ nam be, “Ame vi, nya si Aƒetɔ Yehowa gblɔe nye esi: ‘Esiawoe anye ɖoɖowo na numevɔsawo kple ʋuhehlẽ ɖe vɔsamlekpui la ŋu ne wotui.
Bongo alobaki na ngai: « Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Tala mibeko ya etumbelo, oyo bakosalela tango bakotonga yango mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo mpe kosopela yango makila.
19 Ele na wò be nàtsɔ nyitsu fɛ̃ ɖeka abe nuvɔ̃ŋutivɔsa ene na nunɔlawo, ame siwo nye Levitɔwo tso Zadok ƒe ƒome me, ame siwo va subɔna le nye ŋkume.’ Aƒetɔ Yehowae gblɔe.
Okopesa mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi ya libota ya Tsadoki mpe babelemaka liboso na Ngai mpo na kosalela Ngai, elobi Nkolo Yawe;
20 Ele na wò be nàku lã la ƒe ʋu aɖe asi ɖe vɔsamlekpui la ƒe lãdzo eneawo kple kɔ eneawo ƒe dzogoewo ŋu aƒo xlã kpe ɖo, ale nàkɔ vɔsamlekpui la ŋu, eye nàlé avu ɖe enu.
okokamata ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na maseke minei ya etumbelo mpe na basonge minei ya moboko ya likolo mpe zingazinga ya eloko oyo evimba. Na bongo, okopetola etumbelo mpe okosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na yango.
21 Ele na wò be nàtsɔ nyitsu na nu vɔ̃ ŋuti vɔsa, eye nàtɔ dzoe le teƒe si woɖo ɖi nɛ le gbedoxɔ la me le kɔkɔeƒe la godo.
Okokamata ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu mpe okotumba yango na esika oyo babongisa na Tempelo mpo na yango, na libanda ya Esika ya bule.
22 “Le ŋkeke evelia gbe la, ele be nàna gbɔ̃tsu si ŋu kpɔtsɔtsɔ aɖeke mele o la na nu vɔ̃ ŋuti vɔsa, eye woakɔ vɔsamlekpui la ŋu abe ale si wokɔ eŋui kple nyitsu la ene.
Na mokolo ya mibale, okobonza ntaba moko ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka ya masumu; boye, etumbelo ekokoma peto ndenge ekomaki peto na nzela ya ngombe ya mobali.
23 Ne èwu eŋutikɔkɔ nu vɔ la, ele na wò be nàna nyitsu fɛ̃ aɖe kple agbo aɖe tso lãha la me; kpɔtsɔtsɔ manɔ wo dometɔ aɖeke ŋu o.
Tango okosilisa kopetola yango, okobonza mwana ngombe ya mobali mpe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo ewuti kati na etonga ya bibwele.
24 Ele na wò be nàna wo le Yehowa ŋkume, eye nunɔlaawo awu dze ɖe wo dzi, eye woatsɔ wo asa numevɔe na Yehowa.
Okobonza yango liboso ya Yawe; bongo, Banganga-Nzambe bakobwakela yango mungwa mpe bakobonza yango lokola mbeka ya kotumba epai na Yawe.
25 “Ele na wò be nàna gbɔ̃tsu ɖeka gbe sia gbe, ŋkeke adre hena nu vɔ̃ ŋuti vɔsa, eye nàgana nyitsu fɛ̃ ɖeka kple agbo ɖeka tso lãha la me, kpɔtsɔtsɔ manɔ wo dometɔ aɖeke ŋu o.
Mikolo sambo, okobanda kobonza, mokolo na mokolo, ntaba moko ya mobali lokola mbeka ya masumu; okobonza lisusu mwana ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali ezanga mbeba, oyo ewuti kati na etonga ya bibwele.
26 Woawɔ avuléle ɖe vɔsamlekpui la nu ŋkeke adre, wɔakɔ eŋuti, eye woatsɔe ana.
Bakosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na etumbelo mpe kopetola yango mikolo sambo; bongo nde bakopetola mpe bakobulisa yango.
27 Le ŋkeke siawo ƒe nuwuwu, tso ŋkeke enyilia gbe yina la, nunɔlaawo awɔ miaƒe numevɔsawo kple akpedavɔsawo le vɔsamlekpui la dzi. Ekema maxɔ mi. Aƒetɔ Yehowae gblɔe.”
Na suka ya mikolo yango, kobanda na mokolo ya mwambe kino na mikolo oyo ekolanda, Banganga-Nzambe bakobonza na etumbelo bambeka na bino ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mpe Ngai, nakoyamba bino, elobi Nkolo Yawe. »