< Hezekiel 21 >
1 Yehowa ƒe nya va nam be,
Yawe alobaki na ngai:
2 “Trɔ wò mo ɖe Yerusalem ŋu, eye nàgblɔ nya atsi tsitre ɖe kɔkɔeƒe la ŋu. Gblɔ nya ɖi ɖe Israelnyigba ŋu,
« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Yelusalemi, loba mpo na kotelemela bisika ya bule mpe sakola mpo na kotelemela Isalaele.
3 eye nàgblɔ nɛ be, ‘Ale Yehowa gblɔe nye esi: Metsi tsitre ɖe ŋuwò. Maɖe nye yi le eƒe aku me, eye matsrɔ̃ wò ame dzɔdzɔewo kple ame vɔ̃ɖiwo siaa.
Loba na mokili ya Isalaele: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Natombokeli yo, nakobimisa mopanga na Ngai na ebombelo na yango mpe nakoboma bato, kati na mokili na yo, ezala bato ya sembo to bato mabe.
4 Esi mele ame dzɔdzɔewo kple ame vɔ̃ɖiwo siaa tsrɔ̃ ge le dziwò ta la, nye yi aɖe le aku me ɖe ame sia ame ŋu, tso dziehe yi anyiehe.
Mpo ete nakoboma bato ya sembo mpe ya mabe, mopanga na Ngai ekobima na ebombelo na yango mpo na koboma moto nyonso, wuta na sude kino na nor.
5 Ekema amewo katã anya be nye Yehowae ɖe nye yi le aku me; magatrɔ yi aku me azɔ o.’
Boye, bato nyonso bakososola ete Ngai Yawe nde nabimisi mopanga na Ngai wuta na ebombelo na yango, mpe ekozonga lisusu te. ›
6 “Eya ta, nɔ ŋeŋem, Ame vi, ŋe le wo ŋkume kple dzigbagbã kple vevesese helĩhelĩ.
Yango wana, mwana na moto, lela! Kende kolela liboso na bango, na motema oyo ebukani mpe ya mawa.
7 Eye ne wobia wò be, ‘Nu ka ta nèle ŋeŋem ɖo?’ la, àɖo eŋu be, ‘Le nyadzɔdzɔ si gbɔna la ta. Dzi ɖe sia ɖe alolõ, asi ɖe sia ɖe adze ti, gbɔgbɔ ɖe sia ɖe ayi to, eye klo ɖe sia ɖe agbɔdzɔ abe tsi ene.’ Egbɔna! Ava eme godoo, Aƒetɔ Yehowae gblɔe.”
Soki batuni yo: ‹ Mpo na nini ozali kolela? › Okozongisela bango: ‹ Ezali mpo na sango oyo ezali koya. › Mitema mpe maboko nyonso ekolemba lokola mayi, bato nyonso bakomitungisa mpe mabolongo nyonso ekolenga. Sango yango ezali koya; solo ekosalema, elobi Nkolo Yawe! »
8 Aƒetɔ Yehowa ƒe nya va nam,
Yawe alobaki na ngai:
9 “Ame vi, gblɔ nya ɖi be ‘Nu si Aƒetɔ Yehowa gblɔe nye esi: “‘Yi, yi, wonyree eye wotutu eŋuti wòle dzo dam.
« Mwana na moto, sakola. Loba: Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Mopanga, mopanga! Bangalisi mpe bapelisi yango!
10 Wonyree hena amewuwu wotutu eŋu be wòada dzo abe dzikedzo ene! “‘Ɖe míatso aseye le vinye Yuda ƒe fiatikplɔ ŋua? Yi doa vlo ati ma tɔgbi ɖe sia ɖe.
Bapelisi yango mpo na koboma, bangalisi yango mpo na kobimisa mikalikali! Boni, tosepela kaka na lingenda ya bokonzi ya mwana na ngai ya mobali? Mopanga ya mwana na ngai esambwisaka banzete nyonso.
11 “‘Woɖo na yi be woatutu eŋu, woake dzo, woalée ɖe asi, woanyree, asiae, eye woawɔe wòasu te na amewula la ƒe zazã.
Mopanga epesami mpo ete bangalisa yango, mpo ete basimba yango na loboko; bangalisi yango mpe bapelisi yango mpo ete mobomi asalela yango.
12 Do ɣli eye nàfa avi, Ame vi, elabena egbɔna dzɔdzɔ ge ɖe nye amewo dzi, ɖe Israel ƒe dziɖulawo katã dzi. Woda wo kple nye amewo ɖe yinu, eya ta ƒo wò akɔta.
Mwana na moto, ganga mpe lela makasi! Pamba te mopanga ebimi mpo na koboma bato na ngai, mpo na koboma bakambi nyonso ya Isalaele; babongisami mpo na kokufa na mopanga elongo na bato na ngai. Yango wana, beta tolo na yo!
13 “‘Dodokpɔɣi ava godoo. Ekema nya kae adzɔ ne Yuda ƒe fiatikplɔ, si yi doa vloe la, megayi edzi o? Aƒetɔ Yehowae gblɔe.’
Komekama ekoya penza; mpe likambo nini ekosalema soki lingenda ya bokonzi, oyo mopanga esili kotiola, etikali lisusu te, elobi Nkolo Yawe? ›
14 “Ekema, Ame vi, gblɔ nya ɖi, eye nàƒo asikpe. Na yi nadze ame dzi zi eve alo zi etɔ̃ gɔ̃ hã. Amewuyie, yi na ame geɖewo wuwu, yi si amimi wo ɖo to axa ɖe sia ɖe dzi.
Boye mwana na moto, sakola mpe beta maboko na yo! Tika ete mopanga eboma mbala mibale to mbala misato! Ezali mopanga oyo ebomaka; ezali solo mopanga oyo ebomaka mingi, mopanga oyo ezingeli bango bisika nyonso.
15 Ale be dziwo nalolo banaa, eye ame kukuawo nasɔ gbɔ. Meda amewuyi la ɖe woƒe agbowo katã nu. O! Wowɔe be woake dzo abe dzikedzo ene, wolée na amewuwu.
Mpo ete mitema na bango ekoka kolenga mpe bakufi bazala ebele, nasili kotia mopanga oyo ebomaka na bikuke nyonso ya bingumba na bango. Tala, bangalisi yango mpo ete epela lokola mikalikali; basimbi yango mpo na koboma!
16 O! Yi, lã nu yi ɖusime, emegbe yi miame, afi sia afi si wo yi la nu trɔ ɖo.
Oh mopanga, beta na ngambo ya loboko ya mobali mpe beta na ngambo ya loboko ya mwasi; beta na esika nyonso oyo minu na yo etali!
17 Nye hã maƒo asikpe, eye nye dziku nu abɔbɔ. Nye Yehowae gblɔe.”
Ngai mpe, nakobeta maboko na Ngai; mpe kanda na Ngai ya makasi ekokita. Ngai Yawe nde nalobi. »
19 “Ame vi, de dzesi mɔ eve be Babilonia fia ƒe yi nato; mɔ eve siawo nadze egɔme tso anyigba ɖeka ma ke dzi. Tu mɔfiati aɖe ɖe afi si mɔa dze le ɖo ta du la me.
« Mwana na moto, sala banzela mibale oyo mopanga ya mokonzi ya Babiloni ekoki kolekela; banzela nyonso mibale ebimela na mokili moko. Na ekotelo ya nzela moko na moko, tia elembo oyo ekolakisa nzela ya engumba.
20 De dzesi mɔ ɖeka wòato ayi ɖe Amonitɔwo ƒe Raba ŋu, eye bubu nayi Yuda kple Yerusalem, du si woglã la ŋu,
Sala nzela moko mpo ete mopanga ekoma kino na Raba, engumba ya bato ya Amoni, mpe nzela mosusu mpo ete mopanga ekoma kino na Yelusalemi, engumba batonga makasi, kati na Yuda.
21 elabena Babilonia fia atɔ ɖe mɔdzeƒe la, le mɔ eveawo dzeƒe, be yeaka afa. Aka nu kple aŋutrɔwo, abia gbe eƒe legbawo, eye wòalé ŋku ɖe eƒe aklã ŋuti.
Pamba te mokonzi ya Babiloni akotelema na esika oyo banzela mibale ekutana mpo na kosala makambo ya soloka, akobeta zeke na koningisa makonga ya mike, akotuna banzambe na ye ya bikeko mpe akotala mabale ya banyama.
22 Nu si adzɔ ɖe Yerusalem dzi la, woatsɔe ade eƒe nuɖusime, afia afi si woatu gligbãnuwo ɖo, woaɖe gbe be woawu amewo woado aʋaɣli, wòatu gligbãnu ɖe agboawo nu, woaƒo kpo, eye woawɔ atsrɔewo ɖe gliawo ŋu.
Zeke oyo ekotalisa Yelusalemi ezali kati na loboko na ye ya mobali: kuna na Yelusalemi, akopesa mitindo ya koboma, akobeta mololo ya bitumba, akotia bashar ya bitumba liboso ya bikuke ya engumba, akotonga bamir ya zelo mpe akotimola mabulu ya kobombamela.
23 Adze abe aʋatsoɖeɖefia ene na ame siwo do ŋugbe be yewoanɔ edzi, ke aɖo ŋku woƒe dzidadawo dzi na wo, eye woaɖe aboyo wo.
Kasi lokola basilaki kolapa ndayi ete bakotosa ye, bavandi ya Yelusalemi bakomona yango lokola bimoniseli ya pamba mpe ya lokuta. Kasi mokonzi ya Babiloni akosala ete bakanisa lisusu mabe na bango, mpe akomema bango na bowumbu.
24 “Eya ta ale Aƒetɔ Yehowa gblɔe nye si. ‘Esi mi ame siawo mieɖo ŋku miaƒe vodada dzi to miaƒe aglãdzedze me, eye mieɖe miaƒe nu vɔ̃wo fia le nu siwo katã miewɔ me, esi miewɔ esia ta la, woaɖe aboyo mi.’
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Lokola mabe na bino ezongeli bino na makanisi, lokola bolakisi Ngai na polele botomboki na bino mpe bomonisi masumu na bino kati na misala na bino nyonso; lokola bosali bongo, bokokende na bowumbu.
25 “‘O! Wò Israel dziɖula vɔ̃ɖi, ame si gblɔa nya tovowo, ame si ƒe ŋkeke de, ame si ƒe ɣeyiɣi na tohehe ɖo eƒe kɔkɔƒe,
Yo mokambi ya Isalaele, moto ya mbindo mpe moto mabe, mikolo ezali koya, tango na yo ya etumbu, mpo na kosukisa mabe na yo!
26 ale Aƒetɔ Yehowa gblɔe nye si. Ɖe wò tablanu, eye nàɖe wò fiakuku. Maganɔ abe ale si wònɔ tsã la ene o: woado ame tsɛwo ɖe dzi, eye woabɔbɔ amegãwo ɖe anyi.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Longola ye eteni ya elamba ya moto, longola ye motole! Makambo ekobongwana, ekozala lisusu te ndenge ezalaki liboso! Bato oyo bakitisama bakotombwama, mpe ba-oyo batombwama bakokitisama.
27 Gbegblẽ! Gbegblẽ! Mawɔe wòazu gbegblẽ. Womagbugbɔe aɖo te o va se ɖe esime wòava aɖo ame si tɔ wònye la ƒe asi me; eyae matsɔe ana.’
Libebi! Libebi! Nakokomisa yango libebi. Ekotikala kobonga lisusu te kino tango moto oyo akopesa etumbu, oyo nakopesa ye makoki mpo na yango, akoya. ›
28 “Eye wò, Ame vi, gblɔ nya ɖi be, ‘Alea Yehowa gblɔ tso Amonitɔwo kple woƒe amedzudzuwo ŋue nye esi: “‘Yi, yi, woɖee le aku me na amewuwu, wotutu eŋu wòle dzo dam abe dzikedzo ene hena nugbegblẽ.
Mpe yo, mwana na moto, sakola mpe loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na tina na bato ya Amoni mpe mafinga na bango: Mopanga, babimisi mopanga mpo na koboma, bapelisi yango mpo na koboma mpe mpo na kongenga lokola mikalikali!
29 Togbɔ be aʋatsoŋutegawo ƒe alakpaɖeɖefiawo le ŋuwò hã la, woatsɔe ada ɖe kɔ dzi na ame vɔ̃ɖi siwo wole wuwu ge, ame siwo ƒe ŋkeke de, eye woƒe tohehe ƒe ɣeyiɣi ɖo eƒe kɔkɔƒe.
Atako bapesaki yo bimoniseli mpe masakoli ya lokuta, mopanga ekokata bakingo ya bato ya mbindo oyo mokolo ya suka mpo na mabe na bango esili kokoka.
30 Tsɔ yi la de eƒe aku me. Madrɔ̃ ʋɔnu wò le teƒe si wowɔ wò le, le fofowòwo ƒe anyigba dzi.
Zongisa mopanga na ebombelo na yango. Nakosambisa yo na esika oyo okelamaki, na mokili ya bakoko na yo.
31 Matrɔ nye dziku akɔ ɖe dziwò, eye magbɔ nye dɔmedzoe helĩhelĩ ƒe dzo ƒe ya ɖe ŋuwò. Matsɔ wò ade asi na ŋutasẽlawo, ame siwo bi ɖe nu gbegblẽ ƒe aɖaŋu me.
Nakokitisela yo kanda na Ngai ya makasi mpe nakofula yo moto ya kanda na Ngai; bongo nakokaba yo na maboko ya bato ya mobulu oyo babebisaka.
32 Ànye nake na dzo, woakɔ wò ʋu ɖi le wò anyigba dzi, womagaɖo ŋku dziwò o, elabena nye Yehowae gblɔe.’”
Okozika na moto, makila na yo ekopanzana kaka na mokili na yo mpe bakokanisa yo lisusu te; pamba te Ngai Yawe nde nalobi. › »