< Ester 4 >

1 Esi Mordekai se nya si dzɔ la, edze eƒe awuwo, ta akpanya, si dzowɔ ɖe ŋuti, eye wòyi dua me henɔ avi fam sesĩe nublanuitɔe.
Tango Maridoshe ayokaki makambo nyonso oyo elekaki, apasolaki bilamba na ye; alataki saki, amipakolaki putulu mpe atambolaki kati na engumba na koganga makasi mpe na mawa.
2 Etsi tsitre ɖe fiasã la ƒe agbo nu, elabena womeɖe mɔ be ame aɖeke nanɔ akpanya me age ɖe fiasã la me o.
Bongo akendeki kino na liboso ya ekuke ya ndako ya mokonzi; pamba te moto moko te, wana alati saki lokola elamba, azalaki na ndingisa ya kokota na ekuke ya mokonzi.
3 Yudatɔwo ta akpanya mlɔ afi ma, tsi nu dɔ, fa avi kple ɣli, eye dzi ɖe le wo ƒo le nutowo katã me le anyigba blibo la dzi le ɖoɖo si fia la wɔ la ta.
Kati na bituka nyonso epai wapi mitindo mpe mobeko ya mokonzi ezalaki kokoma, matanga monene ezalaki kati na Bayuda: bazalaki kokila bilei, kolela mpe koganga ya mawa; ebele bazalaki komitanda na basaki mpe na putulu.
4 Esi Ester ƒe nyɔnudɔlawo kple ŋutsu tata siwo le edzi kpɔm la va gblɔ nu si Mordekai nɔ wɔwɔm nɛ la, exa nu, eye wòɖo awuwo ɖee be wòatsɔ aɖɔli akpanya si wòta la, gake melɔ̃ o.
Tango basi bawumbu ya Ester, mwasi ya Mokonzi, mpe basoda na ye, oyo baboma bango mokongo, bayebisaki Ester makambo oyo Maridoshe asalaki, Ester amitungisaki makasi. Atindelaki Maridoshe bilamba mpo ete alata yango mpe alongola basaki oyo alataki, kasi Maridoshe aboyaki.
5 Azɔ Ester ɖo Hatak, ŋutsu tata si wotia be wòasubɔe la ɖa be wòayi Mordekai gbɔ, abia nu si le fu ɖem nɛ kple nu si tae.
Ester abengisaki Ataki, moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo baboma mokongo mpe mokonzi aponaki mpo na kosalela Ester; atindaki ye mpo na koyeba likambo oyo ezali kotungisa Maridoshe mpe tina nini azali komitungisa.
6 Ale Hatak do go yi ablɔ dzi, eye wòkpɔ Mordekai le fiasã la ƒe agboa godo.
Boye Ataki akendeki epai ya Maridoshe na etando ya engumba, epai wapi bato ebele bakutanaka, liboso ya ekuke ya ndako ya mokonzi.
7 Tete Mordekai gblɔ nu siwo katã dzɔ la nɛ kple ga home si ŋugbe Haman do be yeatsɔ ade fia la ƒe gadzraɖoƒe me hena Yudatɔwo wuwu.
Maridoshe ayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki ye, ata motuya ya mbongo oyo Amani alakaki kopesa na libenga ya bomengo ya mokonzi mpo ete baboma Bayuda.
8 Mordekai tsɔ agbalẽ si me fia la ƒe se si wòde le Susa be woatsrɔ̃ Yudatɔwo katã le la na Hatak, eye wòbia tso esi be wòatsɔe afia Ester. Egblɔ na Hatak be wòagblɔ nya si dzɔ la na Ester, eye wòabia tso esi be wòayi fia la gbɔ, aɖe kuku nɛ be wòakpɔ nublanui na eƒe amewo.
Maridoshe apesaki lisusu Ataki mokanda ya mobeko oyo mokonzi abimisaki, mpo ete ye Ataki alakisa yango epai ya Ester, alimbolela ye yango mpe akomisa epai ya Ester mitindo na ye ete Ester akende epai ya mokonzi mpo na kotungisa ye mpe kobondela mawa ya mokonzi mpo na bato na ye Ester; pamba te mokonzi asili kobimisa mobeko ya koboma Bayuda mpe sango na yango esili kopanzana kati na engumba Size.
9 Ale Hatak trɔ yi Ester gbɔ, eye wògblɔ nya si Mordekai be wòagblɔ nɛ la nɛ.
Tango Ataki azongaki mpe ayebisaki Ester makambo oyo Maridoshe alobaki,
10 Ester gblɔ na Hatak be wòayi aɖagblɔ na Mordekai be,
Ester atindaki lisusu Ataki koloba na Maridoshe:
11 “Fia la ƒe dɔnunɔlawo katã kple ame siwo katã le nutowo me la nya be ne ŋutsu alo nyɔnu aɖe yi ɖe fia la gbɔ le xɔ titinatɔ me, evɔ fia la meyɔe o la, se ɖeka si le nu sia ŋuti koe nye be woawu amea. Negbe ɖeko fia la tsɔ eƒe sikatikplɔ ɖo ɖee hafi wòaɖe eƒe agbe. Ke ŋkeke blaetɔ̃e nye esi fia la meɖo du ɖem o.”
— Bakalaka nyonso ya mokonzi mpe bato ya bituka nyonso ya mokili ya mokonzi bayebi ete, kolanda mobeko, moto nyonso, azala mobali to mwasi, oyo akoti na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi asengeli na kufa soki mokonzi abengisi ye te; mpe mobeko yango ezali kaka moko mpo na bato nyonso. Nzokande soki mokonzi asemboli epai ya moto yango lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, akotikala na bomoi. Ngai sik’oyo, eleki mikolo tuku misato wuta babenga ngai mpo na kokende epai ya mokonzi; wuta mikolo wana, babenga ngai lisusu te.
12 Ale Hatak yi ɖagblɔ Ester ƒe nya la na Mordekai,
Tango bayebisaki Maridoshe makambo oyo Ester alobaki,
13 eye Mordekai ɖo eŋu ɖo ɖe Ester be, “Ɖe nèbu be ye ya yeanɔ dedie le afi ma, le fiasã la me, ne wowu Yudatɔwo katã?
Maridoshe azongiselaki Ester: — Kokanisa te ete lokola ozali kati na ndako ya mokonzi, yo moko kaka nde okobika kati na Bayuda nyonso.
14 Ne èzi ɖoɖoe le ɣeyiɣi sia tɔgbi me la, Mawu ato mɔ bubu aɖe dzi aɖe Yudatɔwo, ke wò kple fofowò ƒe aƒemetɔwo miatsrɔ̃. Gawu la, ame kae nya be Mawu ŋutɔe da wò ɖe teƒe sia le fiasã la me le ɣeyiɣi sia tɔgbi me?”
Pamba te soki yo okangi monoko na yo mpe olobi eloko moko te na tango oyo, lisungi mpe lobiko mpo na Bayuda ekowuta na esika mosusu; kasi yo mpe libota ya botata na yo, bokokufa. Kutu, nani ayebi soki tango mosusu ezali mpo na makambo ya boye nde okomaki na ndako ya mokonzi?
15 Ester ɖo ame ɖa be woagblɔ na Mordekai be:
Ester atindelaki Maridoshe eyano oyo:
16 “Yi nàƒo Yudatɔ siwo katã le Susa la nu ƒu, eye miatsi nu dɔ ɖe tanye, migaɖu nu alo miano nu o, ŋkeke etɔ̃ kple zã etɔ̃. Nye kple nye subɔlawo hã míawɔ nenema ke. Ekema, togbɔ be wode se sesẽ aɖe ɖe eŋu hã la, mayi aɖakpɔ fia la kpɔ. Ne meku la, maku faa!”
— Kende kosangisa Bayuda nyonso oyo bazali na engumba Size. Bokila bilei mikolo misato mpo na ngai; butu mpe moyi, bolia mpe bomela eloko te. Ngai mpe nakokila bilei elongo na basi bawumbu na ngai ndenge moko na bino. Sima na yango kaka nde nakokende epai ya mokonzi atako nakobuka mobeko. Soki mpe nakokufa, nakufa kaka!
17 Ale Mordekai wɔ nu si Ester ɖo nɛ.
Maridoshe akendeki mpe asalaki makambo nyonso oyo Ester atindaki ye.

< Ester 4 >