< 1 Kroniko 7 >
1 La filoj de Isaĥar estis: Tola, Pua, Jaŝub, kaj Ŝimron — kvar.
Isakari abotaki bana mibali minei: Tola, Puwa, Yashubi mpe Shimironi. Bango nyonso bazalaki minei.
2 La idoj de Tola: Uzi, Refaja, Jeriel, Jaĥmaj, Jibsam, kaj Ŝemuel, ĉefoj de patrodomoj de Tola, kuraĝaj militistoj en siaj generacioj; ilia nombro en la tempo de David estis dudek du mil sescent.
Bana mibali ya Tola: Uzi, Refaya, Yeriyeli, Yamayi, Yibisami mpe Samuele. Bango nde babotamaki na nzela ya Tola mpe bazalaki bakambi ya mabota ya botata na bango. Kati na mabota na bango, bazalaki basoda ya mpiko nkoto tuku mibale na mibale na nkama motoba, na tango Davidi azalaki mokonzi.
3 La idoj de Uzi: Jizraĥja; la idoj de Jizraĥja: Miĥael, Obadja, Joel, kaj Jiŝija — kune kvin patrodomoj.
Bana mibali ya Uzi: Yiziraya. Bana mibali ya Yiziraya: Mikaeli, Abidiasi, Joeli mpe Yishiya. Bango nyonso mitano bazalaki bakambi.
4 Kun ili, laŭ iliaj generacioj, laŭ iliaj patrodomoj, estis da militistoj armitaj por milito tridek ses mil; ĉar ili havis multe da edzinoj kaj infanoj.
Kati na molongo na bango kolanda bituka na bango mpe mabota na bango ya botata; ezalaki na basoda ya mpiko nkoto tuku misato na motoba, pamba te bazalaki na basi mpe bana ebele.
5 Da iliaj fratoj, en ĉiuj familioj de Isaĥar, estis okdek sep mil batalkapabluloj, ĉiuj enskribitaj en la genealogiajn listojn.
Bandeko mibali nyonso kati na bituka ya libota ya Isakari, oyo bakomamaki na buku ya mabota, bazalaki nkoto tuku mwambe na sambo. Bazalaki basoda ya mpiko.
6 Ĉe Benjamen: Bela, Beĥer, kaj Jediael — tri.
Benjame abotaki bana mibali misato: Bela, Bekeri mpe Yediayeli.
7 La idoj de Bela: Ecbon, Uzi, Uziel, Jerimot, kaj Iri — kvin patrodomoj, militkapablaj. En la genealogiaj listoj ili prezentis la nombron de dudek du mil tridek kvar.
Bela abotaki bana mibali mitano: Etsiboni, Uzi, Uzieli, Yerimoti mpe Iri. Bazalaki bakambi ya bituka na bango mpe basoda ya mpiko. Motango ya bato oyo batangamaki ezalaki nkoto tuku mibale na mibale na tuku misato na minei.
8 La idoj de Beĥer: Zemira, Joaŝ, Eliezer, Eljoenaj, Omri, Jeremot, Abija, Anatot, kaj Alemet; ĉiuj ili estis la filoj de Beĥer.
Bana mibali ya Bekeri: Zemira, Yoashi, Eliezeri, Eliowenayi, Omiri, Yeremoti, Abiya, Anatoti mpe Alemeti. Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Bekeri.
9 En la listoj, laŭ ilia genealogio, laŭ iliaj patrodomoj, estis dudek mil ducent batalkapabluloj.
Motango ya basoda ya mpiko, kolanda bituka na bango, ezalaki nkoto tuku mibale na nkama mibale.
10 La idoj de Jediael: Bilhan; la idoj de Bilhan: Jeuŝ, Benjamen, Ehud, Kenaana, Zetan, Tarŝiŝ, kaj Aĥiŝaĥar.
Bakitani ya Yediayeli: Bilani. Bana mibali ya Bilani: Yewushi, Benjame, Ewudi, Kenaana, Zetani, Tarsisi, Ayishaari.
11 Ĉiuj ili estis la idoj de Jediael, laŭ patrodomoj, batalkapabluloj, dek sep mil ducent armitaj por milito.
Kati na molongo ya Yediayeli, bakitani nyonso bazalaki bakambi ya bituka na bango mpe basoda ya mpiko. Motango na bango ezalaki nkoto zomi na sambo na nkama mibale.
12 Ŝupim kaj Ĥupim, idoj de Ir; Ĥuŝim, idoj de Aĥer.
Bana mibali ya Iri: Shupimi mpe Upime. Ushimi azalaki mwana mobali ya Aeri.
13 La filoj de Naftali: Jaĥciel, Guni, Jecer, kaj Ŝalum, filoj de Bilha.
Bana mibali ya Nefitali: Yatseyeli, Guni, Yetseri mpe Shalumi. Bazalaki bakitani ya Bila.
14 La filoj de Manase: Asriel, kiun naskis lia kromvirino, Sirianino; ŝi naskis ankaŭ Maĥiron, la patron de Gilead.
Bakitani ya Manase: Asirieli na nzela ya makangu na ye, moto ya Arami. Abotelaki ye lisusu Makiri, tata ya bato ya Galadi.
15 Maĥir prenis edzinon el la domanaro de Ĥupim kaj Ŝupim; la nomo de lia fratino estis Maaĥa. La nomo de la dua estis Celofĥad. Celofĥad havis nur filinojn.
Makiri abalaki Maaka oyo azalaki ndeko mwasi ya Upime mpe Shupimi. Kombo ya mwana mobali mosusu ya Manase ezalaki « Tselofikadi. » Tselofikadi abotaki kaka bana basi.
16 Kaj Maaĥa, la edzino de Maĥir, naskis filon kaj donis al li la nomon Pereŝ; la nomo de lia frato estis Ŝereŝ; liaj filoj estis Ulam kaj Rekem.
Maaka, mwasi ya Makiri, abotelaki ye lisusu mwana mobali oyo apesaki kombo « Peretsi. » Peretsi azalaki na ndeko mobali, Shereshi, oyo abotaki bana mibali oyo: Ulami mpe Rekemi.
17 La filo de Ulam estis Bedan. Tio estas la filoj de Gilead, filo de Maĥir, filo de Manase.
Ulami abotaki: Bedani oyo azalaki mwana mobali. Bango nde bazalaki bakitani ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase.
18 Lia fratino Moleĥet naskis Iŝ-Hodon, Abiezeron, kaj Maĥlan.
Amoleketi, ndeko mwasi ya Manase, abotaki Ishodi, Abiezeri mpe Mala.
19 La filoj de Ŝemida estis: Aĥjan, Ŝeĥem, Likĥi, kaj Aniam.
Bana mibali ya Shemida: Ayani, Sishemi, Liki mpe Aniami.
20 La idoj de Efraim: Ŝutelaĥ, kaj lia filo Bered, kaj lia filo Taĥat, kaj lia filo Eleada, kaj lia filo Taĥat,
Bakitani ya Efrayimi: Efrayimi abotaki Shutela, Shutela abotaki Beredi, Beredi abotaki Taati, Taati abotaki Eleada, Eleada abotaki Taati,
21 kaj lia filo Zabad, kaj lia filo Ŝutelaĥ, kaj Ezer, kaj Elead. Kaj mortigis ilin la loĝantoj de Gat, la indiĝenoj de la lando, kiam ili iris, por forpreni iliajn brutojn.
Taati abotaki Zabadi, mpe Zabadi abotaki Shutela. Bankolo mboka oyo babotamaki na mokili ya Gati, babomaki Ezeri mpe Eleadi, pamba te balukaki kobotola bibwele ya bato ya Gati.
22 Kaj ilia patro Efraim funebris longan tempon, kaj liaj fratoj venis, por konsoli lin.
Tata na bango Efrayimi alelaki bango mikolo ebele, mpe bandeko na ye bayaki kobondisa ye.
23 Kaj li envenis al sia edzino, kaj ŝi gravediĝis kaj naskis filon, kaj donis al li la nomon Beria, ĉar malfeliĉo okazis en lia domo.
Sima na yango, Efrayimi asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye oyo azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Boye Efrayimi apesaki ye kombo « Beria, » pamba te abotamaki tango pasi ezalaki kati na libota na ye.
24 Lia filino estis Ŝeera. Ŝi konstruis Bet-Ĥoronon, la malsupran kaj la supran, kaj Uzen-Ŝeeran.
Efrayimi azalaki lisusu na mwana mwasi, Shera, oyo atongaki Beti-Oroni ya ngomba mpe ya lubwaku, mpe Uzeni-Shera.
25 Kaj lia filo estis Refaĥ, lia filo estis Reŝef, lia filo estis Telaĥ, lia filo estis Taĥan,
Beria abotaki Refa, Refa abotaki Retsefi, Retsefi abotaki Tela, Tela abotaki Tayani,
26 lia filo estis Ladan, lia filo estis Amihud, lia filo estis Eliŝama,
Taani abotaki Laedani, Laedani abotaki Amiwudi, Amiwudi abotaki Elishama, Elishama abotaki Nuni,
27 lia filo estis Nun, lia filo estis Josuo.
Nuni abotaki Jozue.
28 Ilia posedaĵo kaj loĝloko estis Bet-El kaj ĝiaj filinurboj, oriente Naaran, okcidente Gezer kun ĝiaj filinurboj, kaj Ŝeĥem kun ĝiaj filinurboj, ĝis Aza kun ĝiaj filinurboj;
Bakitani ya Efrayimi bazwaki lokola libula mpe bisika ya kovanda: Beteli mpe bamboka na yango ya mike, na ngambo ya este; Narani, na ngambo ya weste; Gezeri mpe bamboka na yango ya mike; Sishemi mpe bamboka na yango ya mike kino na Aya mpe bamboka na yango ya mike.
29 ĉe la flanko de la Manaseidoj: Bet-Ŝean kun ĝiaj filinurboj, Taanaĥ kun ĝiaj filinurboj, Megido kun ĝiaj filinurboj, Dor kun ĝiaj filinurboj. En tiuj lokoj loĝis la idoj de Jozef, filo de Izrael.
Bakitani ya Manase bazwaki lokola libula: Beti-Sheani, Taanaki, Megido, Dori mpe bamboka na yango ya mike. Bakitani ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele, bazalaki kovanda na bingumba wana nyonso.
30 La filoj de Aŝer: Jimna, Jiŝva, Jiŝvi, Beria; ilia fratino estis Seraĥ.
Bana mibali ya Aseri: Yimina, Yishiva, Yishivi mpe Beria. Sera azalaki ndeko na bango ya mwasi.
31 La filoj de Beria: Ĥeber, kaj Malkiel, kiu estis la patro de Birzait.
Bana mibali ya Beria: Eberi mpe Malikieli oyo azalaki tata ya bato ya Biriza.
32 Ĥeber naskigis Jafleton, Ŝomeron, Ĥotamon, kaj Ŝuan, ilian fratinon.
Bana mibali ya Eberi: Yafeleti, Shomeri, Otami mpe ndeko na bango ya mwasi Shuwa.
33 La filoj de Jaflet: Pasaĥ, Bimhal, kaj Aŝvat. Tio estas la filoj de Jaflet.
Bana mibali ya Yafeleti: Pasaki, Bimali mpe Ashivati. Bango nde bazalaki bana mibali ya Yafeleti.
34 La filoj de Ŝemer: Aĥi, Rohaga, Jeĥuba, kaj Aram.
Bana mibali ya Shemeri: Ayi, Roega, Yewuba mpe Arami.
35 La filoj de lia frato Helem: Cofaĥ, Jimna, Ŝeleŝ, kaj Amal.
Bana mibali ya Elemi, ndeko mobali ya Shemeri: Tsofa, Yimina, Sheleshi mpe Amali.
36 La filoj de Cofaĥ: Suaĥ, Ĥarnefer, Ŝual, Beri, Jimra,
Bana mibali Tsofa: Suwa, Arineferi, Shuwali, Beri, Yimira,
37 Becer, Hod, Ŝama, Ŝilŝa, Jitran, kaj Beera.
Betseri, Odi, Shama, Shilisha, Yitirani mpe Beera.
38 La filoj de Jeter: Jefune, Pispa, kaj Ara.
Bana mibali ya Yeteri: Yefune, Pisipa mpe Ara.
39 La filoj de Ula: Araĥ, Ĥaniel, kaj Ricja.
Bana mibali ya Ula: Ara, Anieli mpe Ritsiya.
40 Ĉiuj ĉi tiuj estis idoj de Aŝer, ĉefoj de patrodomoj, elektitaj, kuraĝaj militistoj, ĉefaj estroj. Ili estis enskribitaj en la genealogia listo, en la militistaro, por milito; ilia nombro estis dudek ses mil viroj.
Bango nyonso bazalaki bakitani ya Aseri: bazalaki bakambi ya mabota na bango, bato ya lokumu, basoda ya mpiko mpe bakambi ya bakambi ya bituka. Motango ya bato nyonso oyo bakomamaki na buku ya mabota mpe bakoki mpo na bitumba, ezalaki nkoto tuku mibale na motoba.