< 1 Chronicles 26 >
1 For the divisions of the doorkeepers: of the Korahites, Meshelemiah the son of Kore, of the sons of Asaph.
Tala masanga ya bakengeli bikuke: Mpo na bato ya Kore: Meshelemia, mwana mobali ya Kore, moko kati na bana mibali ya Azafi.
2 Meshelemiah had sons: Zechariah the firstborn, Jediael the second, Zebadiah the third, Jathniel the fourth,
Meshelemia azalaki na bana mibali oyo: mwana ya liboso, Zakari; mwana ya mibale, Yediayeli; mwana ya misato, Zebadia; mwana ya minei, Yatinieli;
3 Elam the fifth, Jehohanan the sixth, and Eliehoenai the seventh.
mwana ya mitano, Elami; mwana ya motoba, Yoanani; mpe mwana ya sambo, Eliowenayi.
4 Obed-Edom had sons: Shemaiah the firstborn, Jehozabad the second, Joah the third, Sacar the fourth, Nethanel the fifth,
Obedi-Edomi mpe azalaki na bana mibali oyo: mwana ya liboso, Shemaya; mwana ya mibale, Yozabadi; mwana ya misato, Yoa; mwana ya minei, Sakari; mwana ya mitano, Netaneeli;
5 Ammiel the sixth, Issachar the seventh, and Peullethai the eighth; for God blessed him.
mwana ya motoba, Amieli; mwana ya sambo, Isakari; mwana ya mwambe, Pewulitayi; pamba te Nzambe apambolaki Obedi-Edomi.
6 Sons were also born to Shemaiah his son, who ruled over the house of their father; for they were mighty men of valour.
Mwana na ye ya mobali Shemaya azalaki mpe na bana mibali oyo bazalaki bakambi ya libota ya tata na bango, pamba te bazalaki bilombe mibali.
7 The sons of Shemaiah: Othni, Rephael, Obed, and Elzabad, whose relatives were valiant men, Elihu, and Semachiah.
Bana mibali ya Shemaya: Otini, Refaeli, Obedi, Elizabadi; mpe bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki bilombe, Eliwu mpe Samakia.
8 All these were of the sons of Obed-Edom with their sons and their brothers, able men in strength for the service: sixty-two of Obed-Edom.
Bango nyonso bazalaki bakitani ya Obedi-Edomi. Bango, bana na bango mpe bandeko na bango ya mibali bazalaki bilombe mpe bato ya mpiko mpo na mosala. Bakitani nyonso ya Obedi-Edomi bazalaki tuku motoba na mibale.
9 Meshelemiah had sons and brothers, eighteen valiant men.
Meshelemia azalaki na bana mibali mpe bandeko mibali oyo bazalaki bilombe: bango nyonso bazalaki zomi na mwambe.
10 Also Hosah, of the children of Merari, had sons: Shimri the chief (for though he was not the firstborn, yet his father made him chief),
Osa, moko kati na bana mibali ya Merari, azalaki na bana mibali oyo: Shimiri oyo tata na ye atiaki ye mokonzi atako azalaki mwana ya liboso te;
11 Hilkiah the second, Tebaliah the third, and Zechariah the fourth. All the sons and brothers of Hosah were thirteen.
Ilikia, mwana ya mibale; Tebalia, mwana ya misato; mpe Zakari, mwana ya minei. Bana mibali mpe bandeko mibali ya Osa bazalaki bango nyonso zomi na misato.
12 Of these were the divisions of the doorkeepers, even of the chief men, having offices like their brothers, to minister in the LORD’s house.
Masanga ya bakengeli bikuke ezalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe, na bokambami ya bakonzi na bango ndenge bandeko na bango bazalaki mpe kosala.
13 They cast lots, the small as well as the great, according to their fathers’ houses, for every gate.
Boye kobanda na leki kino na kulutu, bazalaki kobeta zeke mpo na ekuke moko na moko, kolanda mabota na bango.
14 The lot eastward fell to Shelemiah. Then for Zechariah his son, a wise counsellor, they cast lots; and his lot came out northward.
Mpo na ekuke ya ngambo ya este, zeke ekweyaki epai ya libota ya Shelemia. Bongo babetaki zeke mpo na mwana na ye ya mobali Zakari oyo azalaki mopesi toli ya bwanya, mpe zeke mpo na ekuke ya ngambo ya Nor ekweyaki likolo na ye.
15 To Obed-Edom southward; and to his sons the storehouse.
Mpo na ekuke ya ngambo ya sude, zeke ekweyaki epai ya Obedi-Edomi; mpe mpo na ndako oyo babombelaka biloko, zeke ekweyaki epai ya bana na ye ya mibali.
16 To Shuppim and Hosah westward, by the gate of Shallecheth, at the causeway that goes up, watchman opposite watchman.
Mpo na ekuke ya ngambo ya weste mpe ekuke ya Shaleketi, na nzela oyo emata na likolo, zeke ekweyaki epai ya Shupimi mpe Osa. Tala ndenge bakabolaki masanga ya bakengeli bikuke:
17 Eastward were six Levites, northward four a day, southward four a day, and for the storehouse two and two.
mokolo na mokolo, ezalaki na Balevi motoba na ngambo ya este, Balevi minei na ngambo ya nor, mpe Balevi minei na ngambo ya sude; mpe masanga mibale oyo moko na moko ezalaki na bato mibale, na ndako oyo babombelaka biloko.
18 For Parbar westward, four at the causeway, and two at Parbar.
Mpo na lopango ya weste, ezalaki na bakengeli minei na nzela; mpe mibale kati na lopango.
19 These were the divisions of the doorkeepers; of the sons of the Korahites, and of the sons of Merari.
Oyo nde ezalaki masanga ya bakengeli bikuke oyo baponamaki kati na libota ya Kore mpe ya Merari.
20 Of the Levites, Ahijah was over the treasures of God’s house and over the treasures of the dedicated things.
Balevi mosusu lokola Ayiya, bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo mpe biloko ya bule.
21 The sons of Ladan, the sons of the Gershonites belonging to Ladan, the heads of the fathers’ households belonging to Ladan the Gershonite: Jehieli.
Tala bakitani ya Laedani, oyo bazalaki bato ya etuka ya Gerishoni mpe bakambi, moto na moto ya libota na ye: bato ya Yeyeli;
22 The sons of Jehieli: Zetham, and Joel his brother, over the treasures of the LORD’s house.
mpe bana mibali ya Yeyeli: Zetami mpe ndeko na ye ya mobali Joeli. Bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo ya Yawe.
23 Of the Amramites, of the Izharites, of the Hebronites, of the Uzzielites:
Mpo na bakitani ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli:
24 Shebuel the son of Gershom, the son of Moses, was ruler over the treasuries.
Shebueli, mokitani ya Gerishomi, mwana mobali ya Moyize, azalaki mokonzi ya babateli bozwi ya Tempelo.
25 His brothers: of Eliezer, Rehabiah his son, and Jeshaiah his son, and Joram his son, and Zichri his son, and Shelomoth his son.
Tala bandeko na ye ya mibali oyo babotamaki na nzela ya Eliezeri: Reabia, Ezayi, Yorami, Zikiri mpe Shelomiti.
26 This Shelomoth and his brothers were over all the treasuries of the dedicated things, which David the king, and the heads of the fathers’ households, the captains over thousands and hundreds, and the captains of the army, had dedicated.
Shelomiti elongo na bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo mokonzi Davidi abulisaki mpo na Yawe; bakambi ya mabota, bakambi ya bankoto, bakambi ya bankama mpe bakonzi mosusu ya mampinga.
27 They dedicated some of the plunder won in battles to repair the LORD’s house.
Babulisaki biloko mosusu oyo bazwaki na bitumba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe.
28 All that Samuel the seer, Saul the son of Kish, Abner the son of Ner, and Joab the son of Zeruiah had dedicated, whoever had dedicated anything, it was under the hand of Shelomoth and of his brothers.
Shelomiti mpe bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo Samuele, momoni makambo; Saulo, mwana mobali ya Kishi; Abineri, mwana mobali ya Neri; Joabi oyo kombo ya mama na ye ezalaki « Tseruya, » babulisaki mpo na Yawe.
29 Of the Izharites, Chenaniah and his sons were appointed to the outward business over Israel, for officers and judges.
Mpo na bakitani ya Yitseari: Kenania mpe bana na ye ya mibali oyo bazalaki bakomi mikanda mpe basambisi. Bazalaki na mokumba ya kotala makambo ya boyokani ya Isalaele na bikolo mosusu.
30 Of the Hebronites, Hashabiah and his brothers, one thousand and seven hundred men of valour, had the oversight of Israel beyond the Jordan westward, for all the business of the LORD and for the service of the king.
Mpo na bakitani ya Ebron: Ashabia mpe bandeko na ye ya mibali, bilombe mibali nkoto moko na nkama sambo. Bazalaki kokamba Isalaele na ngambo ya weste ya Yordani; mpe bazalaki na mokumba ya misala nyonso ya Yawe mpe ya mokonzi.
31 Of the Hebronites, Jerijah was the chief of the Hebronites, according to their generations by fathers’ households. They were sought for in the fortieth year of the reign of David, and mighty men of valour were found amongst them at Jazer of Gilead.
Mpo na bakitani ya Ebron: Yeriya azalaki mokonzi na bango, kolanda milongo ya mabota na bango. Na mobu ya tuku minei ya bokonzi ya Davidi, batalaki malamu na buku ya mabota mpe bamonaki kati na engumba Yaezeri ya Galadi, bilombe mibali kati na bakitani ya Ebron.
32 His relatives, men of valour, were two thousand and seven hundred, heads of fathers’ households, whom King David made overseers over the Reubenites, the Gadites, and the half-tribe of the Manassites, for every matter pertaining to God and for the affairs of the king.
Yeriya azalaki na bandeko mibali nkoto mibale na nkama sambo: bazalaki bilombe mibali mpe bakambi ya mabota. Mokonzi Davidi apesaki bango mokumba ya misala nyonso ya Nzambe mpe ya mokonzi kati na libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.