< 2 Samuel 2 >

1 After this, David enquired of the LORD, saying, “Shall I go up into any of the cities of Judah?” The LORD said to him, “Go up.” David said, “Where shall I go up?” He said, “To Hebron.”
Sima na yango, Davidi atunaki Yawe: — Nakoki na ngai kokende na moko kati na bingumba ya Yuda? Yawe azongisaki: — Okoki na yo kokende. Davidi atunaki lisusu: — Nakende wapi? Yawe azongisaki: — Kende na Ebron.
2 So David went up there with his two wives, Ahinoam the Jezreelitess, and Abigail the wife of Nabal the Carmelite.
Boye Davidi akendeki kuna elongo na basi na ye mibale: Ayinoami, moto ya Jizireyeli; mpe Abigayili, mwasi oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli.
3 David brought up his men who were with him, every man with his household. They lived in the cities of Hebron.
Davidi amemaki lisusu mibali oyo bazalaki elongo na ye, moko na moko elongo na libota na ye; mpe bavandaki na bingumba ya Ebron mpe na bamboka na yango ya mike.
4 The men of Judah came, and there they anointed David king over the house of Judah. They told David, “The men of Jabesh Gilead were those who buried Saul.”
Bongo bato ya Yuda bayaki na Ebron mpe bapakolaki kuna Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya libota ya Yuda. Bayebisaki Davidi ete ezali bato ya Yabeshi ya Galadi nde bakundi Saulo.
5 David sent messengers to the men of Jabesh Gilead, and said to them, “Blessed are you by the LORD, that you have shown this kindness to your lord, even to Saul, and have buried him.
Davidi atindaki bantoma mpo na koloba na bato ya Yabeshi ya Galadi: « Tika ete Yawe apambola bino na ndenge botalisaki motema malamu epai ya nkolo na bino, Saulo, mpe na ndenge bokundaki ye!
6 Now may the LORD show loving kindness and truth to you. I also will reward you for this kindness, because you have done this thing.
Tika ete Yawe atalisa bino sik’oyo bolamu mpe boyengebene! Lokola bosalaki bongo, ngai mpe nakotalisa bino bolamu yango kaka.
7 Now therefore let your hands be strong, and be valiant; for Saul your lord is dead, and also the house of Judah have anointed me king over them.”
Sik’oyo, bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te nkolo na bino, Saulo, akufi. Kasi boyeba mpe ete bato ya Yuda bapakoli ngai mafuta mpo ete nakoma mokonzi na bango. »
8 Now Abner the son of Ner, captain of Saul’s army, had taken Ishbosheth the son of Saul and brought him over to Mahanaim.
Na tango wana, Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya basoda ya Saulo, azwaki Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, mpe amemaki ye na Maanayimi.
9 He made him king over Gilead, over the Ashurites, over Jezreel, over Ephraim, over Benjamin, and over all Israel.
Akomisaki ye mokonzi ya Galadi, ya bato ya Ashuri mpe ya Jizireyeli, ya Efrayimi, ya Benjame mpe ya Isalaele mobimba.
10 Ishbosheth, Saul’s son, was forty years old when he began to reign over Israel, and he reigned two years. But the house of Judah followed David.
Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Isalaele, mpe akonzaki mibu mibale. Kasi libota ya Yuda ekanganaki na Davidi.
11 The time that David was king in Hebron over the house of Judah was seven years and six months.
Davidi asalaki mibu sambo na sanza motoba na Ebron lokola mokonzi ya libota ya Yuda.
12 Abner the son of Ner, and the servants of Ishbosheth the son of Saul, went out from Mahanaim to Gibeon.
Abineri, mwana mobali ya Neri, elongo na bato ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, babimaki wuta na Maanayimi mpo na kokende na Gabaoni.
13 Joab the son of Zeruiah and David’s servants went out, and met them by the pool of Gibeon; and they sat down, the one on the one side of the pool and the other on the other side of the pool.
Joabi, mwana mobali ya Tseruya, elongo na basali ya Davidi, bango mpe babimaki mpe bakutanaki na bato ya Abineri pene ya liziba ya Gabaoni: bamoko bazalaki na ngambo moko ya liziba, mpe bamosusu, na ngambo mosusu.
14 Abner said to Joab, “Please let the young men arise and compete before us!” Joab said, “Let them arise!”
Abineri alobaki na Joabi: — Tika ete bilenge mibali batelema mpe babunda liboso na biso! Joabi azongisaki: — Malamu! Tika ete babunda.
15 Then they arose and went over by number: twelve for Benjamin and for Ishbosheth the son of Saul, and twelve of David’s servants.
Boye, wana batelemaki mpe batangaki bango, emonanaki motango oyo: zomi na mibale mpo na libota ya Benjame mpe Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo; mpe zomi na mibale kati na basali ya Davidi.
16 They each caught his opponent by the head and thrust his sword in his fellow’s side; so they fell down together. Therefore that place in Gibeon was called Helkath Hazzurim.
Moko na moko asimbaki monguna na ye na moto mpe atobolaki ye mopanga na mopanzi; mpe bango nyonso bakweyaki nzela moko. Bongo babengaki esika yango ya Gabaoni: Elikati-Atsurimi.
17 The battle was very severe that day; and Abner was beaten, and the men of Israel, before David’s servants.
Etumba ya mokolo wana ezalaki makasi penza. Basali ya Davidi balongaki Abineri elongo na bato ya Isalaele.
18 The three sons of Zeruiah were there: Joab, Abishai, and Asahel. Asahel was as light of foot as a wild gazelle.
Bana mibali misato ya Tseruya bazalaki wana: Joabi, Abishayi mpe Asaeli. Asaeli azalaki mbangu lokola mboloko ya zamba.
19 Asahel pursued Abner. He didn’t turn to the right hand or to the left from following Abner.
Asaeli alandaki Abineri na molende penza mpe atikalaki kobaluka te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi.
20 Then Abner looked behind him and said, “Is that you, Asahel?” He answered, “It is.”
Tango Abineri abalukaki mpo na kotala na sima, atunaki: — Ezali yo Asaeli? Asaeli azongisaki: — Iyo, ezali ngai.
21 Abner said to him, “Turn away to your right hand or to your left, and grab one of the young men, and take his armour.” But Asahel would not turn away from following him.
Abineri alobaki na ye: — Kende na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, bundisa moko kati na bilenge mibali mpe botola ye bibundeli. Kasi Asaeli atikaki te kolanda ye.
22 Abner said again to Asahel, “Turn away from following me. Why should I strike you to the ground? How then could I look Joab your brother in the face?”
Boye Abineri alobaki lisusu na Asaeli: — Tika kolanda ngai! Mpo na nini kotindika ngai na koboma yo? Bongo ndenge nini nakotala Joabi, ndeko na yo ya mobali, na elongi?
23 However, he refused to turn away. Therefore Abner with the back end of the spear struck him in the body, so that the spear came out behind him; and he fell down there and died in the same place. As many as came to the place where Asahel fell down and died stood still.
Kasi lokola Asaeli aboyaki kotika kolanda ye, Abineri atubaki Asaeli songe ya likonga na ye na libumu; mpe likonga ebimaki ye na mokongo. Asaeli akweyaki mpe akufaki wana. Moto nyonso oyo azalaki kokoma na esika oyo Asaeli akweyaki mpe akufaki azalaki kotelema.
24 But Joab and Abishai pursued Abner. The sun went down when they had come to the hill of Ammah, that lies before Giah by the way of the wilderness of Gibeon.
Joabi mpe Abishayi balandaki Abineri; mpe wana moyi ezalaki kolala, bakomaki na etando ya Ama oyo etalani na Guya, na nzela oyo ekenda na esobe ya Gabaoni.
25 The children of Benjamin gathered themselves together after Abner and became one band, and stood on the top of a hill.
Bato ya Benjame basanganaki sima na Abineri, basalaki lisanga mpe batelemaki na songe ya ngomba moko ya moke.
26 Then Abner called to Joab, and said, “Shall the sword devour forever? Don’t you know that it will be bitterness in the latter end? How long will it be then, before you ask the people to return from following their brothers?”
Abineri abelelaki na Joabi: — Boni, mopanga ekoba na yango koboma tango nyonso? Oyebi te ete ekosuka mabe? Okozela kino tango nini mpo na kopesa mitindo na bato na yo ete balanda lisusu te bandeko na bango?
27 Joab said, “As God lives, if you had not spoken, surely then in the morning the people would have gone away, and not each followed his brother.”
Joabi azongisaki: — Na Kombo na Nzambe, soki olobaki te, bato balingaki kokoba kolanda bandeko na bango kino lobi na tongo.
28 So Joab blew the trumpet; and all the people stood still and pursued Israel no more, and they fought no more.
Boye Joabi abetaki kelelo, mpe bato nyonso batelemaki, batikaki kolanda Isalaele mpe babundaki lisusu te.
29 Abner and his men went all that night through the Arabah; and they passed over the Jordan, and went through all Bithron, and came to Mahanaim.
Na butu wana nyonso, Abineri mpe bato na ye nyonso batambolaki na etando ya Araba, balekaki Yordani, bakatisaki Bitironi mobimba mpe bakomaki na Maanayimi.
30 Joab returned from following Abner; and when he had gathered all the people together, nineteen men of David’s and Asahel were missing.
Joabi atikaki kolanda Abineri mpe azongaki, asangisaki bato na ye nyonso: emonanaki ete bato ya Davidi zomi na libwa kaka nde bazangaki, bakisa Asaeli.
31 But David’s servants had struck Benjamin Abner’s men so that three hundred and sixty men died.
Kasi bato ya Davidi babomaki bato ya Benjame nkama misato na tuku motoba oyo bazalaki elongo na Abineri.
32 They took up Asahel and buried him in the tomb of his father, which was in Bethlehem. Joab and his men went all night, and the day broke on them at Hebron.
Bakamataki Asaeli mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, na Beteleemi. Bongo Joabi mpe bato na ye batambolaki butu mobimba mpe bakomaki na Ebron na tongo-tongo.

< 2 Samuel 2 >