< Jeremiah 52 >

1 Zedekiah was twenty-one years old when he began to reign. He reigned eleven years in Jerusalem. His mother’s name was Hamutal the daughter of Jeremiah of Libnah.
Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki Amutali, mwana ya Jeremi, moto ya Libina.
2 He did that which was evil in the LORD’s sight, according to all that Jehoiakim had done.
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Yeoyakimi asalaki.
3 For through the LORD’s anger this happened in Jerusalem and Judah, until he had cast them out from his presence. Zedekiah rebelled against the king of Babylon.
Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika na Ye. Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni.
4 In the ninth year of his reign, in the tenth month, in the tenth day of the month, Nebuchadnezzar king of Babylon came, he and all his army, against Jerusalem, and encamped against it; and they built forts against it round about.
Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango na libanda ya engumba mpe batimolaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso.
5 So the city was besieged to the eleventh year of King Zedekiah.
Engumba yango ezingelamaki kino na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi.
6 In the fourth month, in the ninth day of the month, the famine was severe in the city, so that there was no bread for the people of the land.
Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba, mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te,
7 Then a breach was made in the city, and all the men of war fled, and went out of the city by night by the way of the gate between the two walls, which was by the king’s garden. Now the Chaldeans were against the city all around. The men of war went towards the Arabah,
bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani.
8 but the army of the Chaldeans pursued the king, and overtook Zedekiah in the plains of Jericho; and all his army was scattered from him.
Kasi basoda ya Babiloni balandaki mokonzi Sedesiasi mpe bakangaki ye kati na etando ya Jeriko epai wapi basoda na ye nyonso bakimaki mpe bapanzanaki.
9 Then they took the king, and carried him up to the king of Babylon to Riblah in the land of Hamath; and he pronounced judgement on him.
Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi, bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila kati na mokili ya Amati; mpe mokonzi ya Babiloni akatelaki ye etumbu.
10 The king of Babylon killed the sons of Zedekiah before his eyes. He also killed all the princes of Judah in Riblah.
Kuna na Ribila, mokonzi ya Babiloni apesaki mitindo ete bakata mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso ya Sedesiasi. Mokonzi ya Babiloni apesaki lisusu mitindo ete baboma bakalaka nyonso ya Yuda.
11 He put out the eyes of Zedekiah; and the king of Babylon bound him in fetters, and carried him to Babylon, and put him in prison until the day of his death.
Bongo, atobolaki miso ya Sedesiasi, akangaki ye minyololo ya bibende mpe amemaki ye na Babiloni. Mokonzi ya Babiloni abwakaki ye na boloko kino na mokolo oyo akufaki.
12 Now in the fifth month, in the tenth day of the month, which was the nineteenth year of King Nebuchadnezzar, king of Babylon, Nebuzaradan the captain of the guard, who stood before the king of Babylon, came into Jerusalem.
Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, oyo azalaki kosala esika moko na mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya zomi ya sanza ya mitano.
13 He burnt the LORD’s house, and the king’s house; and all the houses of Jerusalem, even every great house, he burnt with fire.
Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi; atumbaki bandako nyonso ya bato minene.
14 All the army of the Chaldeans, who were with the captain of the guard, broke down all the walls of Jerusalem all around.
Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi.
15 Then Nebuzaradan the captain of the guard carried away captive of the poorest of the people, and the rest of the people who were left in the city, and those who fell away, who defected to the king of Babylon, and the rest of the multitude.
Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu ndambo ya babola, ndambo ya bato oyo batikalaki kati na engumba, ndambo ya bato ya misala ya maboko mpe ba-oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni.
16 But Nebuzaradan the captain of the guard left of the poorest of the land to be vineyard keepers and farmers.
Kasi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga.
17 The Chaldeans broke the pillars of bronze that were in the LORD’s house and the bases and the bronze sea that were in the LORD’s house in pieces, and carried all of their bronze to Babylon.
Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango nyonso na Babiloni bisalelo.
18 They also took away the pots, the shovels, the snuffers, the basins, the spoons, and all the vessels of bronze with which they ministered.
Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo: basani ya putulu, bapawu, bambeli, basani ya kobwakela mayi, bakopo.
19 The captain of the guard took away the cups, the fire pans, the basins, the pots, the lamp stands, the spoons, and the bowls; that which was of gold, as gold, and that which was of silver, as silver.
Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi akamataki lisusu biloko nyonso ya wolo mpe ya palata: basani ya minene, bambabola, basani ya kobwakela mayi, basani ya putulu, bitelemiselo ya minda, bakopo mpe milangi mpo na makabo ya masanga.
20 They took the two pillars, the one sea, and the twelve bronze bulls that were under the bases, which King Solomon had made for the LORD’s house. The bronze of all these vessels was without weight.
Bakokaki te komeka kilo ya bronze ya biloko nyonso oyo mokonzi Salomo asalaki mpo na Tempelo ya Yawe: makonzi nyonso mibale, nzungu ya monene, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki kosimba nzungu ya monene mpe bashario.
21 As for the pillars, the height of the one pillar was eighteen cubits; and a line of twelve cubits encircled it; and its thickness was four fingers. It was hollow.
Likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa, na bosanda, mpe bametele pene motoba, na kovimba na yango; bongo bronze oyo basalelaki yango ezalaki evimba na basantimetele pene mwambe, mpe ezalaki polele na kati.
22 A capital of bronze was on it; and the height of the one capital was five cubits, with network and pomegranates on the capital all around, all of bronze. The second pillar also had the same, with pomegranates.
Basalaki na bronze moto ya likonzi moko na moko, mpe ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Bazingelaki yango na bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe na bambuma ya grenade; nyonso esalemaki na bronze.
23 There were ninety-six pomegranates on the sides; all the pomegranates were one hundred on the network all around.
Bangambo nyonso ezalaki na bambuma ya grenade tuku libwa na motoba mpe motango nyonso ya bambuma ya grenade oyo ezalaki zingazinga ya basinga oyo basala lokola basheni ezalaki nkama moko.
24 The captain of the guard took Seraiah the chief priest, and Zephaniah the second priest, and the three keepers of the threshold,
Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko: Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo.
25 and out of the city he took an officer who was set over the men of war; and seven men of those who saw the king’s face, who were found in the city; and the scribe of the captain of the army, who mustered the people of the land; and sixty men of the people of the land, who were found in the middle of the city.
Kati na bato oyo batikalaki kati na engumba, akangaki lisusu moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo azalaki na mokumba ya kotala makambo ya basoda ya bitumba; bapesi toli sambo ya mokonzi, oyo batikalaki kati na engumba; mokomi mikanda ya mokonzi ya mampinga, oyo azalaki na mokumba ya kokoma bakombo ya bato ya mboka mpo na kokota na mosala ya mampinga; mpe mibali tuku motoba ya Yuda, oyo bakutaki kati na engumba.
26 Nebuzaradan the captain of the guard took them, and brought them to the king of Babylon to Riblah.
Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, akamataki bango nyonso mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila.
27 The king of Babylon struck them, and put them to death at Riblah in the land of Hamath. So Judah was carried away captive out of his land.
Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango.
28 This is the number of the people whom Nebuchadnezzar carried away captive: in the seventh year, three thousand and twenty-three Jews;
Tala motango ya bato oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu: Bayuda nkoto misato na tuku mibale na misato, na mobu ya sambo wuta tango akomaki mokonzi;
29 in the eighteenth year of Nebuchadnezzar, he carried away captive from Jerusalem eight hundred and thirty-two persons;
Bayuda nkama mwambe na tuku misato na mibale oyo bawutaki na Yelusalemi, na mobu ya zomi na mwambe wuta tango Nabukodonozori akomaki mokonzi;
30 in the twenty-third year of Nebuchadnezzar, Nebuzaradan the captain of the guard carried away captive of the Jews seven hundred and forty-five people. All the people numbered four thousand and six hundred.
bongo na mobu ya tuku mibale na misato ya bokonzi ya Nabukodonozori, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu Bayuda nkama sambo na tuku minei na mitano. Bango nyonso bazalaki bato nkoto minei na nkama motoba.
31 In the thirty-seventh year of the captivity of Jehoiachin king of Judah, in the twelfth month, in the twenty-fifth day of the month, Evilmerodach king of Babylon, in the first year of his reign, lifted up the head of Jehoiachin king of Judah, and released him from prison.
Tango Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na sambo na bowumbu, Evili-Merodaki, mokonzi ya Babiloni, ayokelaki Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, mawa mpe abimisaki ye na boloko, na mokolo ya tuku mibale na mitano ya sanza ya zomi na mibale, kaka na mobu oyo akomaki mokonzi.
32 He spoke kindly to him, and set his throne above the throne of the kings who were with him in Babylon,
Evili-Merodaki asololaki na Yeoyakini na boboto mpe apesaki ye lokumu koleka bakonzi mosusu oyo bazalaki elongo na ye, na bowumbu kati na Babiloni;
33 and changed his prison garments. Jehoiachin ate bread before him continually all the days of his life.
apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye.
34 For his allowance, there was a continual allowance given him by the king of Babylon, every day a portion until the day of his death, all the days of his life.
Mokonzi ya Babiloni azalaki kopesa ye nyonso oyo asengeli na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye kino na mokolo ya kufa na ye.

< Jeremiah 52 >