< Acts 9 >

1 But Saul, still breathing threats and slaughter against the disciples of the Lord, went to the high priest
Nzokande, Saulo azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo. Akendeki epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe,
2 and asked for letters from him to the synagogues of Damascus, that if he found any who were of the Way, whether men or women, he might bring them bound to Jerusalem.
mpe asengaki ye mikanda ya mosala mpo na bandako ya mayangani ya Damasi, mpo ete, soki akuti kuna bato oyo bazali kolanda nzela ya Nkolo, akanga bango mpe amema bango na Yelusalemi, ezala basi to mibali.
3 As he travelled, he got close to Damascus, and suddenly a light from the sky shone around him.
Wana azalaki kokende na Damasi mpe akomaki pene ya engumba yango, amonaki mbala moko pole moko kowuta na likolo mpe kongengela ye.
4 He fell on the earth, and heard a voice saying to him, “Saul, Saul, why do you persecute me?”
Akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye: — Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai?
5 He said, “Who are you, Lord?” The Lord said, “I am Jesus, whom you are persecuting.
Saulo atunaki: — Nkolo, yo nani? Mongongo ezongisaki: — Ngai, nazali Yesu oyo yo ozali konyokola.
6 But rise up and enter into the city, then you will be told what you must do.”
Kasi sik’oyo, telema, kota kati na engumba, mpe, kuna, bakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.
7 The men who travelled with him stood speechless, hearing the sound, but seeing no one.
Bato oyo bazalaki kokende mobembo elongo na Saulo batelemaki mpe bazangaki maloba ya koloba; bayokaki mongongo yango, kasi bamonaki moto moko te.
8 Saul arose from the ground, and when his eyes were opened, he saw no one. They led him by the hand and brought him into Damascus.
Saulo atelemaki wuta na mabele; kasi tango afungolaki miso, amonaki lisusu te. Boye, basimbaki ye na loboko mpe bamemaki ye na Damasi.
9 He was without sight for three days, and neither ate nor drank.
Mikolo misato, akokaki komona te, aliaki eloko te mpe amelaki eloko te.
10 Now there was a certain disciple at Damascus named Ananias. The Lord said to him in a vision, “Ananias!” He said, “Behold, it’s me, Lord.”
Kati na Damasi, ezalaki na moyekoli moko oyo kombo na ye ezalaki « Ananiasi. » Nkolo abengaki ye kati na emoniseli: — Ananiasi! Azongisaki: — Nkolo, ngai oyo!
11 The Lord said to him, “Arise and go to the street which is called Straight, and enquire in the house of Judah for one named Saul, a man of Tarsus. For behold, he is praying,
Nkolo alobaki na ye: — Telema, kende na ndako ya Yuda, oyo ezali na balabala oyo babengaka « Alima » mpe tuna moto moko ya mboka Tarse, kombo na ye « Saulo. » Azali kosambela
12 and in a vision he has seen a man named Ananias coming in and laying his hands on him, that he might receive his sight.”
mpe, kati na emoniseli, awuti komona moto moko kokota mpe kotia ye maboko mpo ete amona lisusu; kombo na ye « Ananiasi. »
13 But Ananias answered, “Lord, I have heard from many about this man, how much evil he did to your saints at Jerusalem.
Ananiasi azongisaki: — Nkolo, bato ebele bayebisi ngai makambo na tina na moto yango mpe mabe nyonso oyo asali babulami na Yo, na Yelusalemi.
14 Here he has authority from the chief priests to bind all who call on your name.”
Mpe ayei awa, na Damasi, mpo ete bakonzi ya Banganga-Nzambe bapesi ye bokonzi ya kokanga bato nyonso oyo babelelaka Kombo na Yo.
15 But the Lord said to him, “Go your way, for he is my chosen vessel to bear my name before the nations and kings, and the children of Israel.
Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi: — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.
16 For I will show him how many things he must suffer for my name’s sake.”
Nakolakisa ye ndenge nini asengeli konyokwama mpo na Kombo na Ngai.
17 Ananias departed and entered into the house. Laying his hands on him, he said, “Brother Saul, the Lord, who appeared to you on the road by which you came, has sent me that you may receive your sight and be filled with the Holy Spirit.”
Boye, Ananiasi akendeki mpe akotaki kati na ndako; atielaki Saulo maboko na koloba: — Ndeko na ngai, Saulo; Nkolo Yesu oyo abimelaki yo na nzela, wana ozalaki koya awa, atindi ngai mpo ete omona lisusu mpe otonda na Molimo Mosantu.
18 Immediately something like scales fell from his eyes, and he received his sight. He arose and was baptised.
Kaka na tango yango, biloko moko lokola biteku ekweyaki wuta na miso ya Saulo, mpe akomaki lisusu komona. Atelemaki mpe azwaki libatisi;
19 He took food and was strengthened. Saul stayed several days with the disciples who were at Damascus.
mpe, sima na ye kolia, nzoto na ye ezongaki lisusu makasi. Saulo avandaki mwa mikolo elongo na bayekoli oyo bazalaki kati na Damasi.
20 Immediately in the synagogues he proclaimed the Christ, that he is the Son of God.
Kaka na tango yango, abandaki koteya na bandako ya mayangani ete Yesu azali Mwana na Nzambe.
21 All who heard him were amazed, and said, “Isn’t this he who in Jerusalem made havoc of those who called on this name? And he had come here intending to bring them bound before the chief priests!”
Bato nyonso oyo bayokaki ye bakamwaki mingi mpe batunaki: — Boni, ezali ye te moto oyo azalaki konyokola makasi, kati na Yelusalemi, bato oyo babelelaka Kombo ya Yesu? Boni, ayei awa te mpo na kokanga mpe komema bango epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe?
22 But Saul increased more in strength, and confounded the Jews who lived at Damascus, proving that this is the Christ.
Nzokande, kondima ya Saulo ezalaki se kokoba kolendisama mpe azalaki kondimisa Bayuda oyo bavandaka na Damasi ete Yesu azali Klisto.
23 When many days were fulfilled, the Jews conspired together to kill him,
Sima na mikolo ebele, Bayuda bayokanaki koboma Saulo;
24 but their plot became known to Saul. They watched the gates both day and night that they might kill him,
kasi Saulo ayokaki sango na tina na mabongisi na bango. Butu mpe moyi, bazalaki kokengela bikuke ya engumba mpo na koluka koboma ye.
25 but his disciples took him by night and let him down through the wall, lowering him in a basket.
Kasi bayekoli ya Saulo bamemaki ye na butu mpe babimisaki ye libanda ya mir, na kokitisa ye kati na kitunga.
26 When Saul had come to Jerusalem, he tried to join himself to the disciples; but they were all afraid of him, not believing that he was a disciple.
Tango Saulo akomaki na Yelusalemi, amekaki kosangana na bayekoli, kasi bango nyonso bazalaki kobanga ye, pamba te bazalaki penza kondima te ete akomi penza moyekoli.
27 But Barnabas took him and brought him to the apostles, and declared to them how he had seen the Lord on the way, and that he had spoken to him, and how at Damascus he had preached boldly in the name of Jesus.
Barnabasi azwaki ye mpe amemaki ye epai ya bantoma; ayebisaki bango ndenge nini Saulo, na mobembo na ye, amonaki Nkolo, mpe ete Nkolo alobaki na ye. Ayebisaki bango lisusu ndenge nini, kati na Damasi, ateyaki na mpiko na Kombo na Yesu.
28 He was with them entering into Jerusalem,
Boye, wuta na tango wana, Saulo avandaki elongo na bango, azalaki kokende mpe kozonga na bonsomi kati na Yelusalemi, wana azalaki koteya na mpiko, na Kombo ya Nkolo.
29 preaching boldly in the name of the Lord Jesus. He spoke and disputed against the Hellenists, but they were seeking to kill him.
Saulo azalaki kosolola mpe kotia tembe na Bayuda oyo balobaka lokota ya Greki; nzokande, bango, bazalaki koluka nzela ya koboma ye.
30 When the brothers knew it, they brought him down to Caesarea and sent him off to Tarsus.
Tango bandimi bayokaki likambo yango, bamemaki Saulo na Sezarea, mpe, longwa kuna, batindaki ye na Tarse.
31 So the assemblies throughout all Judea, Galilee, and Samaria had peace and were built up. They were multiplied, walking in the fear of the Lord and in the comfort of the Holy Spirit.
Kati na Yuda mobimba, Galile mpe Samari, Lingomba ezalaki na kimia, ezalaki kolenda mpe kotosa Nkolo, mpe motango ya bandimi na yango ezalaki kobakisama na lisungi ya Molimo Mosantu.
32 As Peter went throughout all those parts, he came down also to the saints who lived at Lydda.
Lokola Petelo azalaki kosala mibembo kati na mboka mobimba, akendeki mpe kotala basantu oyo bazalaki kovanda kati na Lidi.
33 There he found a certain man named Aeneas, who had been bedridden for eight years because he was paralysed.
Kuna, amonaki moto moko alala na etoko wuta mibu mwambe mpo ete azalaki kobela bokono ya bukabuka; kombo na ye « Ene. »
34 Peter said to him, “Aeneas, Jesus Christ heals you. Get up and make your bed!” Immediately he arose.
Petelo alobaki na ye: — Ene, Yesu-Klisto abikisi yo; telema mpe kanga etoko na yo. Mbala moko, Ene atelemaki.
35 All who lived at Lydda and in Sharon saw him, and they turned to the Lord.
Tango bavandi nyonso ya Lidi mpe ya esobe ya Saroni bamonaki ye, bandimelaki Nkolo.
36 Now there was at Joppa a certain disciple named Tabitha, which when translated means Dorcas. This woman was full of good works and acts of mercy which she did.
Kati na Jafa, ezalaki na mwasi moyekoli moko, kombo na ye ezalaki « Tabita. » Na lokota ya Greki, kombo na ye ezalaki Dorkasi (oyo elingi koloba: Mboloko). Azalaki tango nyonso kosala bolamu mpe kosunga babola.
37 In those days, she became sick and died. When they had washed her, they laid her in an upper room.
Na mikolo wana, akomaki kobela mpe akufaki. Sima na kosukola nzoto na ye, batiaki yango kati na shambre ya likolo.
38 As Lydda was near Joppa, the disciples, hearing that Peter was there, sent two men to him, imploring him not to delay in coming to them.
Tango bayekoli bayokaki sango ete Petelo azali kati na Lidi oyo ezali penza pene ya Jafa, batindelaki ye mibali mibale mpo na kosenga na ye: « Tobondeli yo, yaka noki! »
39 Peter got up and went with them. When he had come, they brought him into the upper room. All the widows stood by him weeping, and showing the tunics and other garments which Dorcas had made while she was with them.
Mbala moko, Petelo akendeki elongo na bango; mpe tango akomaki, bamemaki ye na shambre ya likolo. Basi nyonso oyo bakufisa mibali bayaki kozingela ye, bazalaki kolela mpe kolakisa ye banzambala mpe bilamba mosusu oyo Dorkasi asalaki, wana azalaki nanu elongo na bango.
40 Peter sent them all out, and knelt down and prayed. Turning to the body, he said, “Tabitha, get up!” She opened her eyes, and when she saw Peter, she sat up.
Petelo abimisaki bato nyonso; bongo afukamaki mpe asambelaki. Wana azalaki kotala epai ebembe ya mama Dorkasi ezalaki, alobaki: — Tabita, telema! Tabita afungolaki miso; mpe wana amonaki Petelo, avandaki.
41 He gave her his hand and raised her up. Calling the saints and widows, he presented her alive.
Petelo asimbaki ye na loboko na ye mpe atelemisaki ye. Bongo abengaki bandimi, mingi-mingi basi oyo bakufisa mibali, mpe alakisaki bango Dorkasi ya bomoi.
42 This became known throughout all Joppa, and many believed in the Lord.
Sango yango epanzanaki kati na engumba mobimba ya Jafa, mpe bato mingi bandimelaki Nkolo.
43 He stayed many days in Joppa with a tanner named Simon.
Petelo avandaki tango molayi kati na Jafa, epai ya moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Simona; » azalaki mobongisi baposo ya banyama.

< Acts 9 >