< Mark 13 >
1 As He was leaving the Temple, one of His disciples exclaimed, "Look, Rabbi, what wonderful stones! what wonderful buildings!"
Wana Yesu azalaki kobima longwa na Tempelo, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye: — Moteyi, tala ndenge mabanga oyo ezali kitoko! Tala ndenge Ndako oyo ezali monene!
2 "You see all these great buildings?" Jesus replied; "not one stone will be left here upon another--not thrown down."
Yesu alobaki na ye: — Ozali komona bandako minene oyo! Libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu, nyonso ekobukama.
3 He was sitting on the Mount of Olives opposite to the Temple, when Peter, James, John, and Andrew, apart from the others asked Him,
Bongo Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, oyo etalana na Tempelo. Petelo, Jake, Yoane mpe Andre batunaki Yesu, na esika oyo bazalaki bango moko kaka:
4 "Tell us, When will these things be? and what will be the sign when all these predictions are on the point of being fulfilled?"
— Yebisa biso, makambo wana ekosalema tango nini? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango nyonso ekomi pene ya kokokisama?
5 So Jesus began to say to them: "Take care that no one misleads you.
Yesu alobaki na bango: — Bosala keba ete moto moko te akosa bino!
6 Many will come assuming my name and saying, 'I am He;' and they will mislead many.
Bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba: « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.
7 But when you hear of wars and rumours of wars, do not be alarmed: come they must, but the End is not yet.
Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.
8 For nation will rise in arms against nation, and kingdom against kingdom. There will be earthquakes in various places; there will be famines. These miseries are but like the early pains of childbirth.
Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, mabele ekoningana bipai na bipai, mpe nzala ekozala makasi penza. Makambo wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.
9 "You yourselves must be on your guard. They will deliver you up to Sanhedrins; you will be brought into synagogues and cruelly beaten; and you will stand before governors and kings for my sake, to be witnesses to them for me.
Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako ya mayangani. Likolo na Ngai, bokosamba liboso ya bayangeli mpe liboso ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai.
10 But the proclamation of the Good News must be carried to all the Gentiles before the End comes.
Pamba te esengeli ete Sango Malamu esakolama liboso epai ya bikolo nyonso ya mokili.
11 When however they are marching you along under arrest, do not be anxious beforehand about what you are to say, but speak what is given you when the time comes; for it will not be you who speak, but the Holy Spirit.
Tango bakokanga bino mpo na komema bino na bisambiselo, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba; boloba kaka oyo ekopesamela bino na tango wana, pamba te ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo Mosantu.
12 "Brother will betray brother to be killed, and fathers will betray children; and children will rise against their parents and have them put to death.
Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye mpo ete baboma ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.
13 You will be objects of universal hatred because you are called by my name, but those who stand firm to the End will be saved.
Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
14 "As soon, however, as you see the Abomination of Desolation standing where he ought not" --let the reader observe these words--"then let those in Judaea escape to the hills;
Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba;
15 let him who is on the roof not come down and enter the house to fetch anything out of it;
tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye;
16 and let not him who is in the field turn back to pick up his outer garment.
tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye!
17 And alas for the women who at that time are with child or have infants!
Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele!
18 "But pray that it may not come in the winter.
Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi.
19 For those will be times of suffering the like of which has never been from the first creation of God's world until now, and assuredly never will be again;
Pamba te ekozala mikolo ya pasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta Nzambe akela mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.
20 and but for the fact that the Lord has cut short those days, no one would escape; but for the sake of His own People whom He has chosen for Himself He has cut short the days.
Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.
21 "At that time if any one says to you, 'See, here is the Christ!' or 'See, He is there!' do not believe it.
Na tango wana, soki moto moko alobi na bino: « Klisto azali awa! » to « Azali kuna, » bondima ye te.
22 For there will rise up false Christs and false prophets, displaying signs and prodigies with a view to lead astray--if indeed that were possible--even God's own People.
Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.
23 But as for yourselves, be on your guard: I have forewarned you of everything.
Boye bino, bosala keba! Ngai, namiyebiseli bino makambo nyonso.
24 "At that time, however, after that distress, the sun will be darkened and the moon will not shed her light;
Kasi na mikolo yango, sima na pasi wana, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te,
25 the stars will be seen falling from the firmament, and the forces which are in the heavens will be disordered and disturbed.
minzoto ekokweya longwa na Likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »
26 And then will they see the Son of Man coming in clouds with great power and glory.
Bongo, bato bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya monene mpe na nkembo.
27 Then He will send forth the angels and gather together His chosen People from north, south, east and west, from the remotest parts of the earth and the sky.
Akotinda ba-anjelu na Ye mpe akosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili, longwa na suka ya mabele kino na suka ya Likolo.
28 "Learn from the fig-tree the lesson it teaches. As soon as its branch has become soft and it is bursting into leaf, you know that summer is near.
Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino: soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.
29 So also do you, when you see these things happening, be sure that He is near, at your very door.
Ndenge moko mpe mpo na bino; tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba.
30 I tell you in solemn truth that the present generation will certainly not pass away without all these things having first taken place.
Nazali koloba na bino penza ya solo: bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.
31 Earth and sky will pass away, but it is certain that my words will not pass away.
Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
32 "But as to that day or the exact time no one knows--not even the angels in Heaven, nor the Son, but the Father alone.
Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.
33 Take care, be on the alert, and pray; for you do not know when it will happen.
Bosala keba! Bosenzela! Pamba te boyebi te tango nini ngonga yango ekoya.
34 It is like a man living abroad who has left his house, and given the management to his servants--to each one his special duty--and has ordered the porter to keep awake.
Ekozala lokola moto oyo akei na mobembo, bongo atiki ndako na ye mpe apesi mokumba na yango epai ya basali na ye; apesi na mosali moko na moko mosala oyo ekoki na ye mpe apesi mitindo epai ya mokengeli ekuke ete akengela malamu.
35 Be wakeful therefore, for you know not when the master of the house is coming--in the evening, at midnight, at cock-crow, or at dawn.
Yango wana, bosenzela; pamba te boyebi te tango nini nkolo ndako akozonga: na pokwa to na midi ya butu to tango soso elelaka to mpe na tongo.
36 Beware lest He should arrive unexpectedly and find you asleep.
Pamba te soki ayei na mbalakata, asengeli te kokuta bino bolali pongi.
37 Moreover, what I say to you I say to all--Be wakeful!"
Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango mpe na bato nyonso: Bosenzela.