< Revelation 6 >

1 And I saw when the Lamb opened one of the seals, and I heard, as it were the noise of thunder, one of the four living beings saying, Come and see.
Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya liboso kati na bikangelo sambo; mpe nayokaki moko kati na bikelamu minei ya bomoi koloba na mongongo makasi lokola kake: « Yaka! »
2 And I saw, and behold, a white horse: and he that sat on him had a bow; and a crown was given to him: and he went forth conquering, and to conquer.
Natalaki mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya pembe. Motambolisi na yango asimbaki tolotolo. Bapesaki ye motole, bongo abimaki lokola molongi mpe mpo ete azala molongi.
3 And when he had opened the second seal, I heard the second living being say, Come and see.
Tango Mpate abukaki ekangelo ya mibale, nayokaki ekelamu ya mibale ya bomoi koloba: « Yaka! »
4 And there went out another horse [that was] red: and [power] was given to him that sat upon him to take peace from the earth, and that they should kill one another: and there was given to him a great sword.
Bongo mpunda mosusu ebimaki: ezalaki ya motane makasi. Motambolisi na yango apesamelaki nguya ya kolongola kimia na mokili mpe ya kosala ete bato babomana bango na bango. Mpe bapesaki ye lisusu mopanga moko ya monene.
5 And when he had opened the third seal, I heard the third living being say, Come and see. And I beheld, and lo, a black horse; and he that sat on him had a pair of balances in his hand.
Tango Mpate abukaki ekangelo ya misato, nayokaki ekelamu ya bomoi ya misato koloba: « Yaka! » Mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya mwindo. Motambolisi na yango asimbaki na loboko na ye emekelo kilo.
6 And I heard a voice in the midst of the four living beings say, A measure of wheat for a penny, and three measures of barley for a penny; and [see] thou hurt not the oil and the wine.
Bongo nayokaki lokola mongongo moko kobima kati na bikelamu minei ya bomoi; ezalaki koloba: « Kopo moko ya ble mpo na mbongo moko ya ebende, mpe bakopo misato ya orje mpo na mbongo moko ya ebende. Kasi kobebisa mafuta mpe vino te. »
7 And when he had opened the fourth seal, I heard the voice of the fourth living being say, Come and see.
Tango Mpate abukaki ekangelo ya minei, nayokaki mongongo ya ekelamu ya minei ya bomoi koloba: « Yaka! »
8 And I looked, and behold, a pale horse: and his name that sat on him was Death, and hell followed with him. And power was given to them over the fourth part of the earth, to kill with sword, and with hunger, and with death, and with the beasts of the earth. (Hadēs g86)
Namonaki liboso na ngai mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu; kombo ya motambolisi na yango ezalaki « Kufa, » mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda motambolisi yango na sima. Bapesamelaki nguya ya koboma bato na nzela ya mopanga, ya nzala, ya bokono mpe ya banyama mabe, na etando ya eteni moko kati na biteni minei ya mokili. (Hadēs g86)
9 And when he had opened the fifth seal, I saw under the altar the souls of them that were slain for the word of God, and for the testimony which they held:
Tango Mpate abukaki ekangelo ya mitano, namonaki na se ya etumbelo, milimo ya bato oyo baboma likolo na Liloba na Nzambe mpe likolo na litatoli na bango.
10 And they cried with a loud voice, saying, How long, O Lord, holy and true, dost thou not judge and avenge our blood on them that dwell on the earth?
Bagangaki na mongongo makasi: « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso? »
11 And white robes were given to every one of them; and it was said to them, that they should rest yet for a little season, until their fellow-servants also and their brethren, that should be killed as they [were], should be fulfilled.
Bongo bapesaki na moko na moko kati na bango nzambala ya pembe, mpe bayebisaki bango ete bazela moke kino motango ekokoka: motango ya baninga na bango ya mosala, mpe ya bandeko na bango oyo bakobomama lokola bango.
12 And I beheld when he had opened the sixth seal, and lo, there was a great earthquake; and the sun became black as sackcloth of hair, and the moon became as blood:
Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya motoba, mpe mabele eninganaki makasi. Moyi ekomaki molili lokola elamba ya mwindo; bongo sanza, na mobimba na yango, ekomaki motane lokola makila.
13 And the stars of heaven fell to the earth, even as a fig-tree casteth its untimely figs, when it is shaken by a mighty wind.
Minzoto ya likolo ekweyaki na mabele ndenge bambuma ya nzete ya figi oyo ekomeli nanu te ekweyaka soki mopepe makasi eningisi yango.
14 And the heaven departed as a scroll when it is rolled together; and every mountain and isle were moved out of their places.
Lola elongwaki lokola mokanda oyo bazali kolinga, bangomba nyonso mpe bisanga nyonso elongwaki na bisika na yango.
15 And the kings of the earth, and the great men, and the rich men, and the chief captains, and the mighty men, and every bond-man, and every free-man, hid themselves in the dens and in the rocks of the mountains;
Bakonzi ya mabele, bato minene, bakonzi ya mampinga ya basoda, bazwi, bato ya nguya, bawumbu mpe bansomi bakendeki kobombama kati na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga minene ya bangomba.
16 And said to the mountains and rocks, Fall on us, and hide us from the face of him that sitteth on the throne, and from the wrath of the Lamb:
Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene: « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te!
17 For the great day of his wrath is come; and who will be able to stand?
Pamba te mokolo monene ya kanda na bango ekoki, bongo nani akoki kolonga kotelema? »

< Revelation 6 >