< Mark 7 >

1 Then came together to him the Pharisees, and certain of the scribes, who came from Jerusalem.
Bafarizeo mpe ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi basanganaki zingazinga ya Yesu.
2 And when they saw some of his disciples eating bread with defiled (that is to say with unwashed) hands, they found fault.
Bamonaki bayekoli mosusu ya Yesu kolia lipa na maboko ya mbindo, elingi koloba na maboko oyo basukola te.
3 For the Pharisees, and all the Jews, except they wash [their] hands often eat not, holding the tradition of the elders.
Nzokande, Bafarizeo mpe Bayuda nyonso baliaka te soki basukoli te maboko malamu. Ezalaki na nzela wana nde bazalaki kotosa bokoko na bango.
4 And [when they come] from the market, except they wash, they eat not. And many other things there are, which they have received to hold, [as] the washing of cups, and pots, and of brazen vessels, and tables.
Mpe soki bawuti na esika oyo bato ebele bakutanaka, baliaka te soki bamipetoli nanu te na mayi. Bazalaki lisusu na mibeko ebele ya bokoko oyo bazalaki kotosa, ndakisa: kosukola bakopo, bambeki, bambeto mpe basani ya bibende.
5 Then the Pharisees and scribes asked him, Why walk not thy disciples according to the tradition of the elders, but eat bread with unwashed hands?
Boye, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko batunaki Yesu: — Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso? Mpo na nini bazali kolia na maboko ya mbindo?
6 He answered and said to them, Well hath Isaiah prophesied concerning you hypocrites, as it is written, This people honoreth me with [their] lips, but their heart is far from me.
Yesu azongiselaki bango: — Bato ya bilongi mibale! Mosakoli Ezayi asakolaki penza malamu na tina na bino, kolanda ndenge ekomama: « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai;
7 But, in vain do they worship me, teaching [for] doctrines the commandments of men.
basambelaka Ngai kaka na pamba, mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »
8 For laying aside the commandment of God, ye hold the tradition of men, [as] the washing of pots and cups: and many other such like things ye do.
Botiaka mibeko ya Nzambe pembeni mpo na kotosa bokoko ya bato.
9 And he said to them, Full well ye reject the commandment of God, that ye may keep your own tradition,
Alobaki na bango lisusu: — Boyebi malamu penza kosundola mibeko ya Nzambe mpo na kobatela bokoko na bino.
10 For Moses said, Honor thy father and thy mother; and, Whoever curseth father or mother, let him die the death:
Solo, Moyize alobaki: « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu; » mpe « moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »
11 But ye say, If a man shall say to his father or mother, [It is] Corban, that is to say, a gift, by whatever thou mightest be profited by me; [he shall be free].
Kasi bino, boteyaka ete soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye: « Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nakobonza yango lokola likabo epai ya Nzambe, »
12 And ye suffer him no more to do aught for his father or his mother;
akangolami na mokumba ya kosalela tata na ye to mpo na mama na ye likambo songolo.
13 Making the word of God of no effect through your traditions, which ye have delivered: and many such like things ye do.
Na bongo, bokomisaka pamba Liloba na Nzambe na nzela ya bokoko oyo bolakisaka. Mpe bosalaka makambo mosusu ebele ya lolenge wana.
14 And when he had called all the people [to him], he said to them, Hearken to me every one [of you], and understand.
Yesu abengaki lisusu ebele ya bato mpe alobaki na bango: — Bino nyonso, boyoka Ngai mpe bososola likambo oyo.
15 There is nothing from without a man, that entering into him, can defile him: but the things which come out of him, those are they that defile the man.
Eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo, kasi ezali oyo ebimaka kati na moto nde ekomisaka ye mbindo. [
16 If any man hath ears to hear, let him hear.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!]
17 And when he had entered into the house from the people, his disciples asked him concerning the parable.
Tango Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako, bayekoli na Ye batunaki Ye tina ya lisese yango.
18 And he saith to them, Are ye so void of understanding also? Do ye not perceive, that whatever thing from without entereth into the man, [it] cannot defile him.
Alobaki na bango: — Bino mpe, boni, bozali mayele te? Bozali kososola te ete eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo.
19 Because it entereth not into his heart, but into the belly, and goeth out into the draught, purging all kinds of food.
Pamba te ekendaka te na motema na ye, kasi ekendaka nde na libumu na ye; mpe na sima, ekendaka na zongo. Na maloba oyo, Yesu atatolaki ete bilei nyonso ezali peto.
20 And he said, That which cometh out of the man, that defileth the man.
Yesu alobaki lisusu: — Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo.
21 For from within, out of the heart of men, proceed evil thoughts, adulteries, fornications, murders,
Pamba te, ezali wuta na kati, na motema penza ya moto nde ewutaka makanisi mabe, kindumba, moyibi, koboma,
22 Thefts, covetousness, wickedness, deceit, lasciviousness, an evil eye, blasphemy, pride, foolishness;
ekobo, lokoso ya mbongo, kanda, mayele mabe, pite, likunya, songisongi, mafinga, lolendo mpe makambo nyonso mosusu ya mabe.
23 All these evil things come from within, and defile the man.
Makambo nyonso wana ya mabe ewutaka kati na moto, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.
24 And from thence he arose, and went into the borders of Tyre and Sidon, and entered into a house, and would have no man know [it]: but he could not be hid.
Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri. Akotaki kati na ndako moko; alingaki te ete ata moto moko ayeba yango, kasi alongaki kaka te kobombama.
25 For a certain woman, whose young daughter had an unclean spirit, heard of him, and came and fell at his feet:
Pamba te, ezalaki na mwasi moko oyo mwana na ye ya mwasi azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezalaki mpe konyokola ye makasi; boye tango kaka ayokaki sango na tina na Yesu, ayaki komibwaka na makolo ya Ye.
26 (The woman was a Greek, a Syrophenician by nation, ) and she besought him that he would cast forth the demon out of her daughter.
Mwasi yango azalaki moto ya Grese, moto ya Fenisi ya Siri; asengaki na Yesu ete abengana molimo mabe oyo ezali konyokola mwana na ye ya mwasi.
27 But Jesus said to her, Let the children first be satisfied: for it is not meet to take the children's bread, and to cast [it] to the dogs.
Kasi Yesu alobaki na ye: — Tika bana ya ndako balia nanu mpe batonda, pamba te ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa!
28 And she answered and said to him, Yes, Lord: yet the dogs under the table eat of the children's crums.
Mwasi yango azongiselaki Yesu: — Nkolo, ezali penza ya solo; kasi bambwa eliaka biteni oyo bana bakweyisaka na se ya mesa!
29 And he said to her, For this saying, depart; the demon is gone out of thy daughter.
Yesu alobaki: — Mpo na maloba oyo olobi, kende, zonga na ndako na yo, pamba te molimo mabe esili kobima na mwana na yo ya mwasi.
30 And when she had come to her house, she found the demon had gone out, and her daughter laid upon the bed.
Mpe tango akendeki na ndako, akutaki mwana na ye alali na mbeto mpe molimo mabe ebimi.
31 And again, departing from the borders of Tyre and Sidon, he came to the sea of Galilee, through the midst of the borders of Decapolis.
Yesu alongwaki na engumba ya Tiri, alekaki na Sidoni mpe akendeki na ebale ya Galile wana akatisaki etuka ya bingumba zomi.
32 And they bring to him one that was deaf, and had an impediment in his speech; and they beseech him to put his hand upon him.
Bamemelaki ye moto moko oyo akufa matoyi mpe alobaka te, mpe basengaki na Yesu ete atia ye maboko.
33 And he took him aside from the multitude, and put his fingers into his ears, and he spit, and touched his tongue.
Yesu alongolaki ye kati na ebele ya bato, amemaki ye na pembeni mpe atiaki ye misapi na matoyi; atiaki ye soyi mpe asimbaki lolemo ya moto yango.
34 And looking up to heaven, he sighed, and saith to him, Effatha, that is, Be opened.
Atalaki na likolo, abendaki pema mpe alobaki na ye: « Fungwama! »
35 And immediately his ears were opened, and the string of his tongue was loosed, and he spoke plain.
Mbala moko, matoyi na ye efungwamaki, lolemo na ye ekangolamaki mpe akomaki koloba malamu.
36 And he charged them that they should tell no man: but the more he charged them; so much the more a great deal they published [it];
Yesu apekisaki bango ete baloba yango na moto te. Atako azalaki kopekisa bango makasi, kasi bango bazalaki kaka kopanza sango yango koleka.
37 And were beyond measure astonished, saying, He hath done all things well; he maketh both the deaf to hear, and the dumb to speak.
Bato bakamwaki makasi mpe bazalaki koloba: — Azali kosala makambo nyonso malamu; azali kosala ete ezala bato oyo bakufa matoyi bakoka koyoka, mpe bababa bakoka koloba.

< Mark 7 >