< Luke 18 >
1 And he spoke a parable to them [to this end], that men ought always [to] pray, and not to faint;
Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te.
2 Saying, There was in a city a judge, who feared not God, neither regarded man.
Alobaki: — Kati na engumba moko, ezalaki na mosambisi moko oyo azalaki kotosa Nzambe te, mpe azalaki komemia bato te.
3 And there was a widow in that city; and she came to him, saying, Avenge me of my adversary.
Kati na engumba yango, ezalaki mpe na mwasi moko akufisa mobali; azalaki koya mbala na mbala epai ya mosambisi yango mpo na koloba na ye: « Longisa ngai liboso ya monguna na ngai. »
4 And he would not for a while: but afterward he said within himself, Though I fear not God, nor regard man;
Wuta tango molayi, mosambisi yango aboyaki. Kasi suka na suka, amilobelaki: « Atako natosaka Nzambe te mpe namemiaka bato te,
5 Yet because this widow troubleth me, I will avenge her, lest by her continual coming she weary me.
kasi lokola motungisi ya mwasi oyo akufisa mobali eleki ndelo, nakolongisa ye kaka, mpo ete akoba te koyaka tango nyonso kino kozangisa ngai kimia. »
6 And the Lord said, Hear what the unjust judge saith.
Nkolo abakisaki: — Boyoka maloba ya mosambisi mabe oyo!
7 And will not God avenge his own elect, who cry day and night to him, though he beareth long with them?
Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi? Boni, akozelisa bango?
8 I tell you that he will avenge them speedily. Nevertheless, when the Son of man cometh, will he find faith on the earth?
Nazali koloba na bino: akolongisa bango noki. Nzokande, ekozala ndenge nini tango Mwana na Moto akoya! Boni, akokuta kondima kati na mokili?
9 And he spoke this parable to certain who trusted in themselves that they were righteous, and despised others:
Epai ya bato oyo bamimonaki bato ya sembo mpe batiolaki bato mosusu, Yesu alobaki lisusu lisese oyo:
10 Two men went up into the temple to pray; the one a Pharisee, and the other a publican.
— Bato mibale bakendeki na Tempelo mpo na kosambela: moko azalaki Mofarizeo; mpe mosusu, mofutisi mpako.
11 The Pharisee stood and prayed thus with himself, God, I thank thee, that I am not as other men [are], extortioners, unjust, adulterers, or even as this publican.
Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki: « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo.
12 I fast twice in the week, I give tithes of all that I possess.
Nakilaka bilei mbala mibale na poso mpe napesaka eteni ya zomi ya nyonso oyo nazwaka. »
13 And the publican, standing afar off, would not lift up so much as [his] eyes to heaven, but smote upon his breast, saying, God be merciful to me a sinner.
Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki: « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu! »
14 I tell you, this man went down to his house justified [rather] than the other: for every one that exalteth himself shall be abased; and he that humbleth himself shall be exalted.
Nazali koloba na bino: mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.
15 And they brought to him also infants, that he would touch them: but when [his] disciples saw [it], they rebuked them.
Bato bazalaki mpe komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko. Tango bayekoli bamonaki bongo, bapamelaki bango.
16 But Jesus called them [to him], and said, Suffer little children to come to me, and forbid them not: for of such is the kingdom of God.
Kasi Yesu abengaki bana mpe alobaki: — Botika bana mike baya epai na Ngai; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bana mike.
17 Verily I say to you, Whoever shall not receive the kingdom of God as a little child, shall in no wise enter into it.
Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.
18 And a certain ruler asked him, saying, Good Master, what shall I do to inherit eternal life? (aiōnios )
Mokambi moko ya Bayuda atunaki na Yesu: — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko? (aiōnios )
19 And Jesus said to him, Why callest thou me good? none [is] good, save one, [that is] God.
Yesu azongisaki: — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe.
20 Thou knowest the commandments, Do not commit adultery, Do not kill, Do not steal, Do not bear false witness, Honor thy father and thy mother.
Oyebi mibeko oyo: « Okosalaka ekobo te, okobomaka te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
21 And he said, All these have I kept from my youth.
Mokambi yango azongisaki: — Natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai.
22 Now when Jesus heard these things, he said to him, Yet lackest thou one thing: sell all that thou hast, and distribute to the poor, and thou shalt have treasure in heaven: and come, follow me.
Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye: — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
23 And when he heard this, he was very sorrowful: for he was very rich.
Tango mokambi ya Bayuda ayokaki bongo, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
24 And when Jesus saw that he was very sorrowful, he said, How hardly will they that have riches enter into the kingdom of God!
Yesu atalaki ye mpe alobaki: — Ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe!
25 For it is easier for a camel to go through a needle's eye, than for a rich man to enter into the kingdom of God.
Nzokande, eleki pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga; kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
26 And they that heard [it], said, Who then can be saved?
Bato oyo bayokaki Ye koloba bongo batunaki: — Bongo nani penza akoki kobikisama?
27 Then he said, The things which are impossible with men, are possible with God.
Yesu azongisaki: — Oyo ekoki kosalema te elongo na bato, ekoki kosalema elongo na Nzambe.
28 Then Peter said, Lo, we have left all, and followed thee.
Petelo alobaki na Yesu: — Nkolo, totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda Yo!
29 And he said to them, Verily I say to you, there is no man that hath left house, or parents, or brethren, or wife, or children for the sake of the kingdom of God,
Yesu alobaki na bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo atiki ndako na ye, mwasi na ye, bandeko na ye, baboti na ye to bana na ye, mpo na kozwa Bokonzi ya Nzambe lokola litomba,
30 Who shall not receive manifold more in this present time, and in the world to come life everlasting. (aiōn , aiōnios )
akozwa, na tango oyo, biloko mingi koleka; mpe na tango oyo ezali koya, bomoi ya seko. (aiōn , aiōnios )
31 Then he took the twelve, and said to them, Behold, we go up to Jerusalem, and all things that are written by the prophets concerning the Son of man shall be accomplished.
Yesu abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango: — Tozali kokende na Yelusalemi; makambo nyonso oyo basakoli bakoma na tina na Mwana na Moto ekokokisama.
32 For he will be delivered to the Gentiles, and will be mocked, and spitefully treated, and spitted on;
Bakokaba Ye na maboko ya bapagano, bakoseka Ye, bakofinga Ye, bakobwakela Ye soyi,
33 And they will scourge [him], and put him to death: and the third day he will rise again.
bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye; mpe, na mokolo ya misato, akosekwa.
34 And they understood none of these things: and this saying was hid from them, neither knew they the things which were spoken.
Bayekoli basosolaki ata eloko moko te kati na makambo yango; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpe bayebaki te makambo oyo Yesu azalaki kolobela.
35 And it came to pass, that as he had come nigh to Jericho, a certain blind man sat by the way side begging;
Wana Yesu akomaki pene ya Jeriko, ezalaki na mokufi miso pembeni ya nzela, azalaki ya kovanda mpe azalaki kosenga-senga.
36 And hearing the multitude passing by, he asked what it meant.
Tango ayokaki makelele ya ebele ya bato oyo bazali koleka, atunaki: — Likambo nini oyo ezali kosalema?
37 And they told him, that Jesus of Nazareth was passing by.
Balobaki na ye: — Yesu ya Nazareti azali koleka!
38 And he cried, saying, Jesus, [thou] son of David, have mercy on me.
Agangaki: — Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa!
39 And they who went before rebuked him, that he should hold his peace: but he cried so much the more, [Thou] son of David, have mercy on me.
Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka: — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa!
40 And Jesus stood and commanded him to be brought to him: and when he had come near, he asked him,
Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela Ye mokufi miso yango. Tango akomaki pene na Ye, Yesu atunaki ye:
41 Saying, What wilt thou that I shall do to thee? And he said, Lord, that I may receive my sight.
— Olingi nasala nini mpo na yo? Mokufi miso azongisaki: — Nkolo, nalingi komona.
42 And Jesus said to him, Receive thy sight: thy faith hath saved thee.
Yesu alobaki na ye: — Mona! Kondima na yo ebikisi yo.
43 And immediately he received his sight, and followed him, glorifying God: and all the people, when they saw [it], gave praise to God.
Mpe mbala moko, akomaki komona, mpe alandaki Yesu, na kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki bongo, bango mpe bakumisaki Nzambe.