< Jeremiah 23 >

1 Woe be to the pastors that destroy and scatter the sheep of my pasture! saith the LORD.
« Mawa na babateli bibwele oyo bazali koboma mpe kobungisa bibwele na Ngai, » elobi Yawe.
2 Therefore thus saith the LORD God of Israel against the pastors that feed my people; Ye have scattered my flock, and driven them away, and have not visited them: behold, I will visit upon you the evil of your doings, saith the LORD.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na babateli bibwele oyo bazali kobatela bato na Ngai: « Lokola bosili kopanza bibwele na Ngai, bobungisi bango nzela mpe bobateli bango malamu te, nakopesa bino etumbu mpo na mabe oyo bosili kosala, » elobi Yawe,
3 And I will gather the remnant of my flock from all countries whither I have driven them, and will bring them again to their folds; and they shall be fruitful and increase.
« Ngai moko nakosangisa ndambo ya bibwele na Ngai, oyo batikali wuta na bikolo nyonso epai wapi nabenganelaki bango; mpe nakozongisa bango na lopango na bango, esika oyo bakobotana mpe bakokoma ebele.
4 And I will set shepherds over them who shall feed them: and they shall fear no more, nor be dismayed, neither shall they be lacking, saith the LORD.
Nakopesa bango na maboko ya babateli mosusu ya bibwele mpo ete babatela bango malamu. Boye, bakobanga lisusu te, bakozala lisusu na somo te mpe moko te kati na bango akozanga lisusu, » elobi Yawe.
5 Behold, the days come, saith the LORD, that I will raise to David a righteous Branch, and a King shall reign and prosper, and shall execute judgment and justice upon the earth.
« Na mikolo oyo ekoya, » elobi Yawe, « nakobimisa Moto ya nzete mpo na Davidi, mokonzi oyo akokamba na bwanya, oyo akosala kolanda bosembo mpe bosolo.
6 In his days Judah shall be saved, and Israel shall dwell in safety: and this [is] his name by which he shall be called, JEHOVAH OUR RIGHTEOUSNESS.
Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye: Yawe azali Bosembo na biso.
7 Therefore, behold, the days come, saith the LORD, that they shall no more say, The LORD liveth, who brought the children of Israel out of the land of Egypt;
Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te: ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito; ›
8 But, the LORD liveth, who brought and who led the seed of the house of Israel out of the north country, and from all countries whither I have driven them; and they shall dwell in their own land.
kasi bakoloba: ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bakitani ya Isalaele na mokili ya nor mpe na bikolo nyonso epai wapi abenganaki bango. › Bongo, bakovanda na mokili na bango moko. »
9 My heart within me is broken because of the prophets; all my bones shake; I am like a drunken man, and like a man whom wine hath overcome, because of the LORD, and because of the words of his holiness.
Na tina na basakoli: Motema na ngai ebukani kati na ngai, mikuwa na ngai nyonso ezali kolenga. Nakomi lokola moto oyo alangwe masanga, lokola moto oyo masanga ya vino ebeti ye, likolo na Yawe mpe maloba na Ye ya bule.
10 For the land is full of adulterers; for because of swearing the land mourneth; the pleasant places of the wilderness are dried up, and their course is evil, and their force [is] not right.
Pamba te mokili etondi na kindumba, mokili ekomi na matanga. Likolo ya bilakeli mabe, matiti oyo bibwele eliaka na esobe ekawuki, basakoli bakomi kolanda nzela mabe mpe bakomi na molende ya kosala kaka makambo oyo esengeli te.
11 For both prophet and priest are profane; even in my house have I found their wickedness, saith the LORD.
« Basakoli mpe Banganga-Nzambe, basundoli Nzambe; ezala kati na Tempelo na Ngai, nazali komona misala na bango ya mabe, » elobi Yawe.
12 Wherefore their way shall be to them as slippery [ways] in the darkness: they shall be driven on, and fall therein: for I will bring evil upon them, [even] the year of their visitation, saith the LORD.
« Yango wana, nzela na bango ekokoma moselu mpe molili; bakobengana bango kino na mboka ya molili mpe kuna bakokweya. Nakotindela bango pasi, tango oyo nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.
13 And I have seen folly in the prophets of Samaria; they prophesied in Baal, and caused my people Israel to err.
« Namoni makambo ya nkele kati na basakoli ya Samari: bazali kosakola na kombo ya nzambe Bala mpe bazali kobungisa Isalaele, bato na Ngai, nzela.
14 I have seen also in the prophets of Jerusalem a horrible thing: they commit adultery, and walk in lies: they strengthen also the hands of evil-doers, that none doth return from his wickedness: they are all of them to me as Sodom, and the inhabitants of it as Gomorrah.
Namoni lisusu makambo ya nkele kati na basakoli ya Yelusalemi: bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta, bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe mpo ete batika te misala na bango ya mabe. Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome, bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. »
15 Therefore thus saith the LORD of hosts concerning the prophets; Behold, I will feed them with wormwood, and make them drink the water of gall: for from the prophets of Jerusalem is profaneness gone forth into all the land.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na basakoli: « Nakoleisa bango bilei ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge, pamba te ezali na nzela ya basakoli ya Yelusalemi nde bato ya mokili mobimba bobosani Nzambe. »
16 Thus saith the LORD of hosts, Hearken not to the words of the prophets that prophesy to you: they make you vain: they speak a vision of their own heart, [and] not from the mouth of the LORD.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Boyoka te makambo oyo basakoli bazali kosakola epai na bino!
17 They say still to them that despise me, The LORD hath said, Ye shall have peace; and they say to every one that walketh after the imagination of his own heart, No evil shall come upon you.
Bazali koloba na bato oyo batiolaka Ngai: ‹ Yawe alobi: Bokozala malamu! › Mpe na bato oyo balandaka makanisi mabe ya mitema na bango: ‹ Mabe moko te ekokomela bino! ›
18 For who hath stood in the counsel of the LORD, and hath perceived and heard his word? who hath marked his word, and heard [it]?
Kasi nani kati na basakoli wana akotaki na mayangani ya Yawe mpo ete amona to mpe ayoka Liloba na Yawe? Nani apesaki litoyi mpo na koyoka liloba na Ye?
19 Behold, a whirlwind of the LORD is gone forth in fury, even a grievous whirlwind: it shall fall grievously upon the head of the wicked.
Tala, mopepe makasi ya Yawe etomboki! Kanda na Ye epeli lokola moto, bakake ezali konguluma mpe kokweyela bato mabe.
20 The anger of the LORD shall not return, until he shall have executed, and till he shall have performed the thoughts of his heart: in the latter days ye shall consider it perfectly.
Kanda ya Yawe ekokita te kino ekokokisa malamu-malamu penza mabongisi ya motema na Ye! Bokozwa mayele ya kososola yango malamu na mikolo oyo ekoya.
21 I have not sent these prophets, yet they ran: I have not spoken to them, yet they prophesied.
Natindaki basakoli wana te, kasi tala ndenge bapoti mbangu mpo na kokende; nalobaki na bango likambo moko te, kasi tala bango wana bazali kosakola!
22 But if they had stood in my counsel, and had caused my people to hear my words, then they would have turned them from their evil way, and from the evil of their doings.
Soki solo bazalaki na mayangani na Ngai, balingaki nde koloba maloba na Ngai epai ya bato na Ngai, mpe bato na Ngai balingaki kotika banzela mpe misala na bango ya mabe!
23 [Am] I a God at hand, saith the LORD, and not a God afar off.
Boni, bokanisi ete Ngai Nzambe namonaka kaka pene, kasi namonaka mosika te? » elobi Yawe.
24 Can any hide himself in secret places that I shall not see him? saith the LORD. Do not I fill heaven and earth? saith the LORD.
« Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku, bongo Ngai nazanga komona ye? » elobi Yawe. « Boni, natondisa likolo mpe mabele te? » elobi Yawe.
25 I have heard what the prophets said, that prophesy lies in my name, saying, I have dreamed, I have dreamed.
« Nayoki makambo oyo basakoli ya lokuta bazali kosakola na Kombo na Ngai; bazali koloba: ‹ Tala, naloti ndoto! Naloti ndoto! ›
26 How long shall [this] be in the heart of the prophets that prophesy lies? yes, [they are] prophets of the deceit of their own heart;
Kino tango nini penza basakoli oyo bakokoba kosakola makambo ya lokuta, makanisi ya pamba ya mitema na bango?
27 Who think to cause my people to forget my name by their dreams which they tell every man to his neighbor, as their fathers have forgotten my name for Baal.
Bakanisi ete bakoki kosala ete bato na Ngai babosana Kombo na Ngai na nzela ya ndoto oyo bazali koloba bango na bango, ndenge batata na bango babosanaki Kombo na Ngai mpo na kosalela nzambe Bala?
28 The prophet that hath a dream, let him tell a dream; and he that hath my word, let him speak my word faithfully. What [is] the chaff to the wheat? saith the LORD?
Tika ete mosakoli oyo aloti ndoto aloba yango, mpe tika ete moto oyo azali na liloba na Ngai aloba liloba na Ngai kolanda solo, ndenge yango ezali. Mpo na nini kosangisa matiti ya kokawuka na ble? » elobi Yawe;
29 [Is] not my word like a fire? saith the LORD? and like a hammer [that] breaketh the rock in pieces?
« boni, maloba na Ngai ezali lokola moto te? To lokola marto te oyo ebukaka mabanga biteni-biteni? » elobi Yawe.
30 Therefore behold, I [am] against the prophets, saith the LORD, that steal my words every one from his neighbor.
« Yango wana, nakotelemela basakoli oyo bawelaka bango na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe;
31 Behold, I [am] against the prophets, saith the LORD, that use their tongues, and say, He saith.
« solo, nakotelemela basakoli oyo bafungolaka minoko na bango mpo na kokomisa maloba na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe,
32 Behold, I [am] against them that prophesy false dreams, saith the LORD, and do tell them, and cause my people to err by their lies, and by their lightness; yet I sent them not, nor commanded them: therefore they shall not profit this people at all, saith the LORD.
« nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe.
33 And when this people, or the prophet, or a priest, shall ask thee, saying, What [is] the burden of the LORD? thou shalt then say to them, What burden? I will even forsake you, saith the LORD.
« Soki moko kati na bato oyo to mosakoli to Nganga-Nzambe atuni yo: ‹ Yawe alobi nini? › Loba na ye: ‹ Yawe alobi nini? Nakosundola bino, elobi Yawe. ›
34 And [as for] the prophet, and the priest, and the people that shall say, The burden of the LORD, I will even punish that man and his house.
Soki mosakoli to Nganga-Nzambe to moto mosusu alobi: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › nakopesa ye elongo na libota na ye etumbu.
35 Thus shall ye say every one to his neighbor, and every one to his brother, What hath the LORD answered? and, What hath the LORD spoken?
Nzokande, tala maloba oyo moko na moko kati na bino asengeli koyebisa moninga to ndeko na ye: ‹ Eyano nini Yawe apesi? Yawe alobi nini? ›
36 And the burden of the LORD shall ye mention no more: for every man's word shall be his burden; for ye have perverted the words of the living God, of the LORD of hosts our God.
Kasi bosengeli lisusu te koloba: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › noki te liloba yango ekokoma etumbu mpo na moto oyo alobi yango, pamba te bobongoli maloba na Nzambe na bomoi, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na biso!
37 Thus shalt thou say to the prophet, What hath the LORD answered thee? and, What hath the LORD spoken?
Tala maloba oyo osengeli koloba na mosakoli wana: ‹ Eyano nini Yawe apesi yo? › to ‹ Yawe alobi nini? ›
38 But since ye say, The burden of the LORD; therefore thus saith the LORD; Because ye say this word, The burden of the LORD, and I have sent to you, saying, Ye shall not say, The burden of the LORD;
Nzokande, soki bolobi lisusu: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › wana tala liloba oyo Yawe alobi: Lokola bosalelaka maloba oyo: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › ata tango Ngai nayebisaki bino: ‹ Boloba te: Tala liloba oyo Yawe alobi! ›
39 Therefore behold, I, even I, will utterly forget you, and I will forsake you, and the city that I gave to you and your fathers, [and cast you] out of my presence:
mpo na yango, nakobosana bino solo mpe nakobengana bino mosika ya elongi na Ngai, bino elongo na engumba oyo napesaki na bino mpe na batata na bino;
40 And I will bring an everlasting reproach upon you, and a perpetual shame, which shall not be forgotten.
nakoyokisa bino soni ya libela, soni oyo bokotikala kobosana te. »

< Jeremiah 23 >