< Hebrews 3 >

1 Wherefore, holy brethren, partakers of the heavenly calling, consider the Apostle and High Priest of our profession, Christ Jesus;
Yango wana, bandeko basantu, bino oyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botalela kaka Yesu oyo biso tozali kondima lokola Ntoma mpe Mokonzi ya Banganga-Nzambe.
2 Who was faithful to him that appointed him, as also Moses [was faithful] in all his house.
Solo, azali sembo na miso ya Nzambe oyo aponaki Ye, ndenge Moyize azalaki sembo kati na Ndako mobimba ya Nzambe.
3 For this [man] was counted worthy of more glory than Moses, inasmuch as he who hath built the house, hath more honor than the house.
Yesu amonanaki ete akoki mpo na kozwa lokumu monene koleka Moyize; ndenge moko mpe motongi ndako azali na lokumu monene koleka ndako yango moko.
4 For every house is built by some [man]; but he that built all things [is] God.
Pamba te, ezali na ndako moko te oyo ezangi motongi; nzokande Nzambe azali motongi ya biloko nyonso.
5 And Moses verily [was] faithful in all his house, as a servant, for a testimony of those things which were [afterwards] to be spoken.
Moyize azalaki sembo lokola mosali kati na Ndako mobimba ya Nzambe, mpo na kotatola na tina na makambo oyo Nzambe akoloba na mikolo oyo ezalaki kolanda.
6 But Christ as a son over his own house: whose house are we, if we hold fast the confidence, and the rejoicing of the hope firm to the end.
Kasi Klisto azali sembo lokola Mwana, Mokonzi ya Ndako ya Nzambe. Mpe biso, tozali Ndako na Ye, soki kaka tozali kobatela makasi kino na suka, kondima mpe lokumu oyo elikya epesaka biso.
7 Wherefore (as the Holy Spirit saith, To-day if ye will hear his voice,
Yango wana, kolanda ndenge Molimo Mosantu alobi: « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
8 Harden not your hearts, as in the provocation, in the day of temptation in the wilderness:
boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe, na mokolo ya komekama kati na esobe
9 When your fathers tempted me, proved me, and saw my works forty years.
epai wapi batata na bino bamekaki ngai mpe balukaki kotala mozindo ya motema na ngai atako bamonaki misala na ngai
10 Wherefore I was grieved with that generation, and said, They do always err in [their] heart; and they have not known my ways.
mibu tuku minei. Yango wana, natombokelaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki: ‹ Mitema na bango ezali kobeba tango nyonso, mpe bayebaki banzela na ngai te. ›
11 So I swore in my wrath, They shall not enter into my rest.)
Boye, kati na kanda na ngai, nakataki seleka: ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai! › »
12 Take heed, brethren, lest there be in any of you an evil heart of unbelief, in departing from the living God.
Bandeko na ngai, bosala keba ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe azanga kondima kino kokabwana na Nzambe na bomoi;
13 But exhort one another daily, while it is called To-day; lest any of you be hardened through the deceitfulness of sin.
kasi bolendisanaka bino na bino mokolo na mokolo, na tango nyonso oyo bakoki nanu koloba « lelo, » mpo ete moko te kati na bino akosama na masumu mpe akoma motema libanga.
14 For we are made partakers of Christ, if we hold the beginning of our confidence steadfast to the end;
Pamba te tozali solo lisanga na Klisto soki tosimbi makasi, kino na suka, elikya oyo tozwaki wuta na ebandeli,
15 While it is said, To-day if ye will hear his voice, harden not your hearts, as in the provocation.
kolanda ndenge elobama: « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye, boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe. »
16 For some, when they had heard, did provoke: yet, not all that came out of Egypt by Moses.
Banani bayokaki mongongo ya Nzambe mpe batombokelaki Ye? Ezali te bato nyonso oyo Moyize abimisaki na Ejipito?
17 But with whom was he grieved forty years? [was it] not with them that had sinned, whose carcasses fell in the wilderness?
Asilikelaki banani mibu tuku minei? Ezali te bato oyo basalaki masumu, oyo bibembe na bango ekweyaki kati na esobe?
18 And to whom did he swear that they should not enter into his rest, but to them that believed not?
Epai ya banani Nzambe akataki seleka ete bakokota te kati na bopemi na Ye? Ezali te epai ya bato oyo baboyaki kotosa Ye?
19 So we see that they could not enter in because of unbelief.
Boye, tomoni ete balongaki te kokota mpo ete bazangaki kondima.

< Hebrews 3 >