< Exodus 22 >

1 If a man shall steal an ox, or a sheep, and kill it, or sell it; he shall restore five oxen for an ox, and four sheep for a sheep.
Soki moto ayibi ngombe moko to meme moko, bongo abomi yango to ateki yango; asengeli kofuta bangombe mitano mpo na ngombe moko oyo ayibaki to bameme minei mpo na meme moko oyo ayibaki.
2 If a thief shall be found breaking through, and be smitten that he die, [there shall] no blood [be shed] for him.
Soki bakangi moto azali koyiba, bongo babeti ye mpe akufi; mobomi akozwa etumbu te mpo na makila oyo esopani.
3 If the sun shall have risen upon him, [there shall be] blood [shed] for him: [for] he should make full restitution; if he have nothing, then he shall be sold for his theft.
Kasi soki makambo yango esalemi na moyi, moto oyo akoboma ye akozwa etumbu mpo na makila oyo esopani. Moyibi nyonso asengeli kozongisa biloko oyo ayibi. Soki azali na eloko te, bakoteka ye mpo na kofuta eloko oyo ayibaki.
4 If the theft shall be certainly found in his hand alive, whether an ox, or ass, or sheep; he shall restore double.
Soki ayibaki nyama, ezala ngombe, ane to meme, bongo bakuti nyama yango ya bomoi na maboko na ye, akofuta banyama mibale.
5 If a man shall cause a field or vineyard to be eaten, and shall put in his beast, and shall feed in another man's field: of the best of his own field, and of the best of his own vineyard shall he make restitution.
Soki moto azali koleisa bibwele na ye matiti na elanga na ye to na elanga na ye ya vino, bongo atiki bibwele yango koyengayenga mpe ekeyi kolia matiti na elanga to na elanga ya vino ya moto mosusu, nkolo bibwele asengeli kofuta mbuma oyo eleki kitoko kati na elanga na ye to kati na elanga na ye ya vino.
6 If fire shall break out, and catch in thorns, so that the stacks of corn, or the standing corn, or the field shall be consumed; he that kindled the fire shall surely make restitution.
Soki moto apelisi moto, bongo moto yango ekutani na banzete ya sende, epanzani mpe ezikisi ble oyo basili kotia na maboke to ble oyo babuki nanu te, moto oyo apelisaki moto asengeli kofuta biloko nyonso oyo eziki.
7 If a man shall deliver to his neighbor money or stuff to keep, and it be stolen out of the man's house; if the thief shall be found, let him pay double.
Soki moto abombisi palata to biloko na ye ya motuya epai ya moninga na ye, bongo bayibi yango kati na ndako ya moninga wana; soki bakangi moyibi ya biloko yango, akozongisa mbala mibale biloko oyo ayibaki.
8 If the thief shall not be found, then the master of the house shall be brought to the judges, [to see] whether he hath put his hand to his neighbor's goods.
Kasi soki moyibi amonani te, nkolo ndako asengeli kosamba liboso ya basambisi mpo na koyeba soki ayibaki biloko ya moninga na ye to te.
9 For all manner of trespass, [whether it be] for ox, for ass, for sheep, for raiment, [or] for any manner of lost thing which [another] challengeth to be his: the cause of both parties shall come before the judges; [and] he whom the judges shall condemn, shall pay double to his neighbor.
Na likambo nyonso ya moyibi, soki bato mibale bazali kowela ngombe, ane, meme, elamba to eloko nyonso oyo ebungaki, bongo moto na moto azali koloba: ‹ Ezali ya ngai! › bango mibale bakomema likambo na bango liboso ya basambisi; bongo moto oyo basambisi bakokweyisa akozongisa yango mbala mibale epai ya moninga na ye.
10 If a man shall deliver to his neighbor an ass, or an ox, or a sheep, or any beast to keep; and it shall die, or be hurt, or driven away, no man seeing [it]:
Soki moto apesi moninga na ye ngombe to ane to meme to nyama mosusu mpo ete abokola, bongo nyama yango ekufi to ebukani to bayibi yango mpe ata moto moko te amoni mpo na kotatola ndenge nini likambo yango esalemaki,
11 [Then] shall an oath of the LORD be between them both, that he hath not put his hand to his neighbor's goods; and the owner of it shall accept of it, and he shall not make restitution.
kaka ndayi oyo balapi na Kombo na Yawe nde ekokabola bango: Moto oyo andimaki kobokola akolapa ndayi liboso ya Yawe mpo na kotalisa ete ayebi likambo te. Bongo nkolo nyama asengeli kondima maloba ya moninga na ye mpe ye akofuta nyama yango te.
12 And if it shall be stolen from him, he shall make restitution to the owner of it.
Kasi soki bayibi nyama yango na maboko ya moto oyo andimaki kobokola yango, akofuta nyama yango epai ya nkolo na yango.
13 If it shall be torn in pieces; [then] let him bring it [for] witness, [and] he shall not make good that which was torn.
Soki ezali nyama ya zamba nde ebomaki nyama yango, moto oyo andimaki kobokola yango akomema lokola litatoli biteni oyo etikali; bongo akofuta nyama yango te.
14 And if a man shall borrow [aught] of his neighbor, and it shall be hurt, or die, the owner of it [being] not with it, he shall surely make [it] good.
Soki moto adefi nyama epai ya moninga na ye, bongo ebukani lokolo to ekufi na tango oyo nkolo na yango azali te, moto wana asengeli kofuta yango.
15 [But] if the owner of it shall [be] with it, he shall not make [it] good: if it [be] a hired [thing], it came for his hire.
Nzokande soki nkolo na yango azalaki wana, moto oyo adefaki akofuta nyama yango te. Soki bayokanaki ete akofuta mbongo sima na kosalela yango, asengeli kofuta mbongo oyo bayokanaki.
16 And if a man shall entice a maid that is not betrothed, and lie with her, he shall surely endow her to be his wife.
Soki mobali alingi elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali na mobandami na libala te, bongo asangisi na ye nzoto, asengeli kofuta mbongo ya libala mpo ete akoma mwasi na ye.
17 If her father shall utterly refuse to give her to him, he shall pay money according to the dower of virgins.
Soki tata ya elenge mwasi aboyi kopesa mwana na ye na libala epai ya mobali wana, mobali yango akofuta mbongo ya libala na motuya oyo babalelaka elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.
18 Thou shalt not suffer a witch to live.
Okotika te na bomoi mwasi oyo asalaka maji.
19 Whoever lieth with a beast shall surely be put to death.
Moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
20 He that sacrificeth to [any] god, save to the LORD only, he shall be utterly destroyed.
Moto nyonso oyo akotumba mbeka mpo na nzambe mosusu, basengeli koboma ye; mbeka ekotumbama kaka mpo na Yawe Ye moko.
21 Thou shalt neither vex a stranger, nor oppress him; for ye were strangers in the land of Egypt.
Okosalisa mopaya mosala na ndenge ya mabe te mpe okonyokola ye te, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
22 Ye shall not afflict any widow, or fatherless child.
Bokonyokola te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike.
23 If thou shalt afflict them in any wise, and they cry at all to me, I will surely hear their cry:
Soki bonyokoli bango, bongo bango bagangi epai na Ngai, solo nakoyoka koganga na bango.
24 And my wrath shall wax hot, and I will kill you with the sword; and your wives shall be widows, and your children fatherless.
Nakosilikela bino, nakoboma bino na mopanga; bongo basi na bino mpe bakokoma basi bakufisa mibali mpe bana na bino, bana bitike.
25 If thou shalt lend money to [any of] my people [that is] poor by thee, thou shalt not be to him as a usurer, neither shalt thou lay upon him usury.
Soki odefisi mbongo na moko kati na bato na Ngai, na mobola oyo azali kati na bino, okosala te ndenge modefisi mbongo asalaka; okosenga ye mileki te.
26 If thou shalt at all take thy neighbor's raiment to pledge, thou shalt deliver it to him by the setting of the sun.
Soki moninga na yo asimbisi yo kazaka na ye lokola ndanga, okozongisela ye yango liboso ete butu eya;
27 For that [is] his only covering, it [is] his raiment for his skin: wherein shall he sleep? and it shall come to pass, when he crieth to me, that I will hear; for I [am] gracious.
pamba te azali kaka na kazaka wana mpo na kofinika nzoto na ye. Akofinika lisusu nini tango akolala? Soki agangi epai na Ngai, nakoyoka ye mpo ete nazali Nzambe ya mawa.
28 Thou shalt not revile the gods, nor curse the ruler of thy people.
Okofingaka Nzambe te mpe okolakelaka mokambi ya bato na yo mabe te.
29 Thou shalt not delay [to offer] the first of thy ripe fruits, and of thy liquors: the first-born of thy sons shalt thou give to me.
Okowumisa te kopesa Ngai mbuma ya liboso oyo ekomela mpe vino oyo okamoli. Okopesa Ngai mwana na yo ya liboso ya mobali.
30 Likewise shalt thou do with thy oxen, [and] with thy sheep: seven days it shall be with his dam; on the eighth day thou shalt give it to me.
Okosala mpe lolenge moko mpo na bana liboso ya bangombe, bameme mpe bantaba na yo: ekotikala mikolo sambo elongo na bamama na yango; bongo na mokolo ya mwambe, okopesa Ngai yango.
31 And ye shall be holy men to me: neither shall ye eat [any] flesh [that is] torn of beasts in the field; ye shall cast it to the dogs.
Bokozala bule mpo na Ngai: bokolia te mosuni ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba; bosengeli kopesa yango na bambwa.

< Exodus 22 >