< Acts 11 >
1 And the apostles and brethren that were in Judea, heard that the Gentiles also had received the word of God.
Bantoma mpe bandimi oyo bazalaki kati na Yuda bayokaki sango ete bato ya bikolo ya bapaya mpe bandimaki Liloba na Nzambe.
2 And when Peter had come to Jerusalem, they that were of the circumcision contended with him,
Boye, tango Petelo azongaki na Yelusalemi, Bayuda oyo bandimelaki Yesu bapamelaki ye
3 Saying, Thou wentest in to men uncircumcised, and didst eat with them.
mpe balobaki: — Okotaki na ndako ya bato ya bikolo ya bapaya mpe oliaki elongo na bango!
4 But Peter rehearsed [the matter] from the beginning, and expounded [it] by order to them, saying,
Petelo ayebisaki bango makambo nyonso, ndenge esalemaki; alobaki na bango:
5 I was in the city of Joppa praying: and in a trance I saw a vision, A certain vessel descend, as it had been a great sheet, let down from heaven by four corners; and it came even to me:
— Wana nazalaki kati na engumba Jafa mpe nazalaki kosambela, nakweyaki na Molimo mpe nazwaki emoniseli. Namonaki eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei kokita wuta na Likolo, mpe ekomaki kino na esika oyo nazalaki.
6 Upon which when I had fastened my eyes, I considered, and saw four-footed beasts of the earth, and wild beasts, and creeping animals, and fowls of the air.
Tango natalaki yango malamu, namonaki kati na yango banyama ya mabele, oyo ezali na makolo minei; banyama ya zamba, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya likolo.
7 And I heard a voice saying to me, Arise, Peter; slay and eat.
Nayokaki mpe mongongo moko koloba na ngai: « Petelo, telema! Boma mpe lia. »
8 But I said, Not so, Lord: for nothing common or unclean hath at any time entered into my mouth.
Kasi nazongisaki: « Te, Nkolo! Natikala nanu kolia te eloko ya mbindo to ya bosoto. »
9 But the voice answered me again from heaven, What God hath cleansed, [that] call not thou common.
Mongongo yango elobaki lisusu, wuta na likolo, mpo na mbala ya mibale: « Eloko nyonso oyo Nzambe akomisi peto, yo, komona yango mbindo te! »
10 And this was done three times: and all were drawn up again into heaven.
Esalemaki bongo mbala misato. Bongo babendaki nyonso kati na Likolo.
11 And behold, immediately there were three men already come to the house where I was, sent from Cesarea to me.
Kaka na tango yango, bato misato bakomaki na ndako epai wapi nazalaki kovanda; batindaki bango epai na ngai longwa na Sezarea.
12 And the Spirit bade me go with them, nothing doubting. Moreover, these six brethren accompanied me, and we entered into the man's house:
Molimo alobaki na ngai ete natia tembe te mpo na kokende elongo na bango. Bandeko motoba bakendeki elongo na ngai kino na Sezarea, mpe tokotaki na ndako ya moto yango.
13 And he showed us how he had seen an angel in his house, who stood and said to him, Send men to Joppa, and call for Simon, whose surname is Peter;
Moto yango ayebisaki biso ndenge nini amonaki anjelu kobimela ye kati na ndako na ye mpe koloba na ye: « Tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali Petelo.
14 Who shall tell thee words, by which thou and all thy house shall be saved.
Akoyebisa yo maloba oyo, na nzela na yango, okozwa lobiko, yo mpe libota na yo mobimba! »
15 And as I began to speak, the Holy Spirit fell on them, as on us at the beginning.
Wana nazalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bango ndenge kaka akitelaki biso na ebandeli.
16 Then I remembered the word of the Lord, how he said, John indeed baptized with water; but ye shall be baptized with the Holy Spirit.
Mbala moko, nakanisaki lisusu maloba oyo Nkolo alobaki: « Yoane abatisaki na mayi; kasi bino, bokobatisama kati na Molimo Mosantu. »
17 Forasmuch then as God gave them the like gift as [he did] to us, who believed on the Lord Jesus Christ, what was I that I could withstand God?
Soki Nzambe apesaki bango likabo ya ndenge moko na biso oyo tondimelaki Nkolo Yesu-Klisto, bongo ngai nde nani mpo ete nakoka koboya makambo oyo Nzambe alingi?
18 When they heard these things, they held their peace, and glorified God, saying, Then hath God also to the Gentiles granted repentance to life.
Tango bayokaki bongo, bazangaki maloba ya kobakisa, mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo: « Nzambe asali ete ata bato ya bikolo ya bapaya babongola mitema mpo bazwa bomoi. »
19 Now they who were dispersed upon the persecution that arose about Stephen traveled as far as Phenice, and Cyprus, and Antioch, preaching the word to none but to the Jews only.
Nzokande, bandimi oyo bapalanganaki mpo na kokima minyoko oyo eyaki tango babomaki Etieni, bakimaki kino na Fenisi, na Shipre mpe na Antioshe. Mpe kuna, bazalaki kosakola Sango Malamu epai ya moto mosusu te, kaka epai ya Bayuda.
20 And some of them were men of Cyprus and Cyrene, who when they had come to Antioch, spoke to the Grecians, preaching the Lord Jesus.
Kasi bamosusu kati na bango, bato ya Shipre mpe ya Sirene, bakendeki na Antioshe mpe bakomaki koteya Sango Malamu ya Nkolo Yesu epai ya bato oyo balobaka lokota ya Greki.
21 And the hand of the Lord was with them: and a great number believed, and turned to the Lord.
Nguya ya Nkolo ezalaki elongo na bango, mpe bato ebele penza bandimaki mpe bamipesaki na Nkolo.
22 Then tidings of these things came to the ears of the church which was in Jerusalem: and they sent forth Barnabas, that he should go as far as Antioch.
Sango yango ekomaki kino na Lingomba ya Yelusalemi, mpe batindaki Barnabasi, na Antioshe.
23 Who, when he came, and had seen the grace of God, was glad, and exhorted them all that with purpose of heart they would cleave to the Lord.
Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba.
24 For he was a good man, and full of the Holy Spirit, and of faith: and many people were added to the Lord.
Solo, Barnabasi azalaki moto malamu, azalaki atondisama na Molimo Mosantu mpe na kondima. Bato ebele bakangamaki na Nkolo.
25 Then Barnabas departed to Tarsus, to seek Saul:
Bongo, Barnabasi akendeki na Tarse mpo na koluka Saulo;
26 And when he had found him, he brought him to Antioch. And it came to pass, that a whole year they assembled themselves with the church, and taught many people. And the disciples were first called Christians in Antioch.
mpe tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo basalaki elongo kati na Lingomba, mpe bateyaki bato ebele. Ezalaki na Antioshe nde bayekoli babengamaki, mpo na mbala ya liboso, Baklisto.
27 And in these days came prophets from Jerusalem to Antioch.
Na mikolo wana, ndambo ya basakoli bakendeki na Antioshe longwa na Yelusalemi.
28 And there stood up one of them named Agabus, and signified by the Spirit that there should be great dearth throughout all the world: which came to pass in the days of Claudius Cesar.
Moko kati na bango, kombo na ye ezalaki « Agabisi; » atelemaki mpe asakolaki na nguya ya Molimo ete nzala makasi ekoya na bamboka nyonso oyo bato ya Rome bazali kokonza. Nzala yango ekotaki na tango ya mokonzi Klode.
29 Then the disciples, every man according to his ability, determined to send relief to the brethren who dwelt in Judea.
Bayekoli oyo bazalaki kati na Antioshe bazwaki mokano ya kotinda masungi, moko na moko kolanda bozwi na ye, epai ya bandeko oyo bazalaki kovanda na Yuda.
30 Which also they did, and sent it to the elders by the hands of Barnabas and Saul.
Basalaki bongo: batindaki masungi na bango epai ya bakambi ya Lingomba, na nzela ya Barnabasi mpe Saulo.