< Psalms 73 >
1 A psalm of Asaph. Surely God is good to Israel, to those with a pure heart.
Nzembo ya Azafi. Solo, Nzambe azali malamu mpo na Isalaele, mpo na bato oyo bazali mitema peto.
2 But as for me, my feet almost slipped; my feet almost slipped out from under me
Nzokande mpo na ngai, etikalaki moke ete makolo na ngai eselumuka, etikalaki moke ete nakweya,
3 because I was envious of the arrogant when I saw the prosperity of the wicked.
pamba te nazalaki kolula bato ya lofundu tango nazalaki komona kimia ya bato mabe.
4 For they have no pain until their death, but they are strong and well fed.
Kino na kufa na bango, bazalaka na mitungisi te, nzoto na bango ezalaka sembesembe.
5 They are free from the burdens of other men; they are not afflicted like other men.
Kati na bango, moko te amonaka pasi oyo bato nyonso bamonaka; babelaka te bokono oyo ezwaka bato.
6 Pride adorns them like a necklace around their neck; violence clothes them like a robe.
Yango wana, lolendo ekoma lokola mayaka na bakingo na bango, mpe makambo na kanza ekoma lokola elamba na bango.
7 Out of such blindness comes sin; evil thoughts pass through their hearts.
Miso na bango engengaka na bilongi etonda na mafuta; mitema na bango esalaka kaka mabongisi ya mabe;
8 They mock and speak wickedly; in their arrogance they threaten oppression.
batiolaka mpe balobaka mabe, bagangelaka minyoko.
9 They set their mouth against the heavens, and their tongues march through the earth.
Minoko na bango etombokelaka Likolo, mpe lolemo na bango esakanelaka mokili.
10 Therefore his people turn to them and abundant waters are drained out.
Yango wana bato balandaka bango mpe bamelaka maloba na bango lokola mayi.
11 They say, “How does God know? Is there knowledge with the Most High?”
Balobaka: « Nzambe akoyeba ndenge nini? Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali ata na boyebi? »
12 Take notice: these people are wicked; they are always carefree, becoming richer and richer.
Tala ndenge bato mabe bazalaka: tango nyonso, bazalaka na mitungisi te, mpe bomengo na bango emataka se komata.
13 Surely it is in vain that I have guarded my heart and washed my hands in innocence.
Solo, ezali kaka na pamba nde nabatelaki motema na ngai peto; ezali kaka na pamba nde nasukolaki maboko na ngai mpo ete nasala mabe te!
14 For all the day long I have been afflicted and disciplined every morning.
Mikolo nyonso, nanyokwamaka; mpe tongo nyonso, nazwaka etumbu.
15 If I had said, “I will say these things,” then I would have betrayed this generation of your children.
Soki nalobi: « Nakoloba lokola bango, » wana nateki penza lokumu ya libota na Yo.
16 Though I tried to understand these things, it was too difficult for me.
Tango nakanisaki mpo na koluka kososola, nayokaki pasi na motema
17 Then I went into God's sanctuary and came to understand their fate.
kino nakendeki na Esika ya bule ya Nzambe mpe nasosolaki ndenge nini bakosuka.
18 Surely you put them in slippery places; you bring them down to ruin.
Solo, otielaka bango biloko ya moselu, okweyisaka bango kati na libebi.
19 How they become a wilderness in a moment! They come to an end and are finished in awful terrors.
Ndenge nini babebisamaka mbala moko, bakomaka na suka, mpe somo elimwisaka bango!
20 They are like a dream after one wakes up; Lord, when you arise, you will think nothing of those dreams.
Ndenge ndoto elimwaka soki moto alamuki na pongi, Nkolo, olimwisaka lisolo ya bomoi na bango tango kaka otelemaka.
21 For my heart was grieved, and I was deeply wounded.
Tango motema na ngai ezalaki kotomboka mpe molimo na ngai emitungisaki,
22 I was ignorant and lacked insight; I was like a senseless animal before you.
nasilaki mayele, nakomaki lokola zoba, nakomaki lokola nyama liboso na Yo.
23 Yet I am always with you; you hold my right hand.
Nzokande, nazalaka tango nyonso elongo na Yo; osimba ngai na loboko na ngai ya mobali.
24 You will guide me with your advice and afterward receive me to glory.
Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo, mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo.
25 Whom have I in heaven but you? There is no one on earth that I desire but you.
Kuna na Likolo, nani azali mpo na ngai soki Yo te? Mpe awa na mokili, nasepela na nani soki na Yo te?
26 My flesh and my heart grow weak, but God is the strength of my heart forever.
Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.
27 Those who are far from you will perish; you will destroy all those who are unfaithful to you.
Bato nyonso oyo bazali mosika na Yo bakokufa; obebisaka bato nyonso oyo batosaka Yo te.
28 But as for me, all I need to do is to approach God. I have made the Lord Yahweh my refuge. I will declare all your deeds.
Kasi mpo na ngai, ezali malamu kozala pene ya Nzambe. Nakomisi Nkolo Yawe ebombamelo na ngai, mpo na kopanza sango ya misala na Yo nyonso.