< Judges 10 >
1 After Abimelech, Tola son of Puah son of Dodo, a man from Issachar who lived in Shamir, in the hill country of Ephraim, arose to deliver Israel.
Sima na kufa ya Abimeleki, ezalaki Tola, mwana mobali ya Puwa, mwana mobali ya Dodo, moto ya Isakari, nde atelemaki mpo na kobikisa Isalaele. Azalaki kovanda na Shamiri, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.
2 He judged Israel twenty-three years. He died and was buried in Shamir.
Akambaki Isalaele mibu tuku mibale na misato; sima na yango, akufaki, mpe bakundaki ye na Shamiri.
3 He was followed by Jair the Gileadite. He judged Israel twenty-two years.
Yairi, moto ya Galadi, akitanaki na Tola mpe akambaki Isalaele mibu tuku mibale na mibale.
4 He had thirty sons who rode on thirty donkeys, and they had thirty cities, which are called Havvoth Jair to this day, which are in the land of Gilead.
Azalaki na bana mibali tuku misato oyo bazalaki kotambola likolo ya ba-ane, mpe bazalaki na bamboka tuku misato kati na Galadi. Kino na mokolo ya lelo, babengaka yango « Bamboka ya Yairi. »
5 Jair died and was buried in Kamon.
Yairi akufaki, mpe bakundaki ye na Kamone.
6 The people of Israel added to the evil they had done in the sight of Yahweh and worshiped the Baals, the Ashtoreths, the gods of Aram, the gods of Sidon, the gods of Moab, the gods of the people of Ammon, and the gods of the Philistines. They abandoned Yahweh and no longer worshiped him.
Bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe; basalelaki banzambe Bala, Asitarite, mpe banzambe ya Siri, ya Sidoni, ya Moabi, ya Amoni mpe ya Filisitia. Basundolaki Yawe mpe basalelaki Ye lisusu te.
7 Yahweh burned with anger toward Israel, and he sold them into the hand of the Philistines and into the hand of the Ammonites.
Boye, kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe Yawe akabaki bango na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Amoni.
8 They crushed and oppressed the people of Israel that year, and for eighteen years they oppressed all the people of Israel who were beyond the Jordan in the land of the Amorites, which is in Gilead.
Mibu zomi na mwambe, banyokolaki bana nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na ngambo mosusu ya Yordani, mokili ya bato ya Amori, kati na Galadi.
9 Then the Ammonites crossed over the Jordan to fight against Judah, against Benjamin, and against the house of Ephraim, so that Israel was greatly distressed.
Bato ya Amoni mpe bakatisaki na ngambo ya Yordani mpo na kobundisa libota ya Yuda, ya Benjame mpe ya Efrayimi. Boye, Isalaele akomaki na pasi mingi.
10 Then the people of Israel called out to Yahweh, saying, “We have sinned against you, because we abandoned our God and worshiped the Baals.”
Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe: — Tosalaki masumu na miso na Yo, pamba te tosundolaki Yo, Nzambe na biso, mpe tosalelaki banzambe Bala.
11 Yahweh said to the people of Israel, “Did I not deliver you from the Egyptians, the Amorites, the Ammonites, the Philistines,
Yawe azongiselaki bana ya Isalaele: — Boni, nabikisaki bino te na maboko ya bato ya Ejipito, ya Amori, ya Amoni mpe ya Filisitia?
12 and also from the Sidonians? The Amalekites and the Maonites oppressed you; you called out to me, and I delivered you from their power.
Tango bato ya Sidoni, ya Amaleki mpe ya Maoni banyokolaki bino, boni, bogangaki epai na Ngai te mpo na kosenga lisungi? Boni, nakangolaki bino te wuta na maboko na bango?
13 Yet you abandoned me again and worshiped other gods. Therefore, I will not keep adding to the times I deliver you.
Kasi bino, bosundolaki Ngai mpe bosalelaki banzambe mosusu. Yango wana, nakokangola bino lisusu te.
14 Go and call out to the gods that you have worshiped. Let them rescue you when you have trouble.”
Bokende koganga epai ya banzambe oyo boponaki mpo ete ebikisa bino awa bozali kati na pasi.
15 The people of Israel said to Yahweh, “We have sinned. Do to us whatever seems good to you. Only please, rescue us this day.”
Kasi bana ya Isalaele balobaki na Yawe: — Ya solo, tosalaki lisumu na miso na Yo. Oyo omoni ete ezali malamu na miso na Yo, sala yango na biso; kasi tobondeli Yo: bikisa biso lisusu sik’oyo!
16 They got rid of the foreign gods among them and they worshiped Yahweh. Then Yahweh could bear Israel's misery no longer.
Bongo bana ya Isalaele balongolaki banzambe ya bapaya kati na bango mpe basalelaki Yawe. Mpe Yawe akokaki lisusu te kotala pasi na bango.
17 Then Ammonites gathered together and set up camp in Gilead. The Israelites came together and set up their camp at Mizpah.
Tango bato ya Amoni basanganaki mpe batiaki molako na bango kati na Galadi, bana ya Isalaele basanganaki mpe batiaki molako na bango kati na Mitsipa.
18 The leaders of the people of Gilead said one to another, “Who is the man who will begin to fight the Ammonites? He will become the leader over all those who are living in Gilead.”
Bato mpe bakonzi ya Galadi balobanaki: « Moto oyo akobundisa liboso bana ya Amoni akozala mokonzi ya bato nyonso ya Galadi. »