< Genesis 28 >
1 Isaac called Jacob, blessed him, and commanded him, “You must not take a wife from the Canaanite women.
Bongo Izaki abengaki Jakobi, apambolaki ye mpe apesaki ye mitindo oyo: « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana.
2 Arise, go to Paddan Aram, to the house of Bethuel your mother's father, and take a wife from there, one of the daughters of Laban, your mother's brother.
Telema! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo.
3 May God Almighty bless you, make you fruitful and multiply you, so that you may become a multitude of peoples.
Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso apambola yo, apesa yo bana, akomisa bana na yo ebele mpe okoma lisanga monene ya bato.
4 May he give you the blessing of Abraham, to you, and to your descendants after you, that you may inherit the land where you have been living, which God gave to Abraham.”
Tika ete apesa na yo mpe na bakitani na yo lipamboli oyo apesaki na Abrayami mpo ete okamata mokili oyo ozali kovanda lokola mopaya, mokili oyo Nzambe apesaki na Abrayami. »
5 So Isaac sent Jacob away. Jacob went to Paddan Aram, to Laban son of Bethuel the Aramean, the brother of Rebekah, Jacob's and Esau's mother.
Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi.
6 Now Esau saw that Isaac had blessed Jacob and sent him away to Paddan Aram, to take a wife from there. He also saw that Isaac had blessed him and given him a command, saying, “You must not take a wife from the women of Canaan.”
Ezawu ayokaki ete Izaki apambolaki Jakobi mpe atindaki ye na Padani-Arami mpo na kobala mwasi; ayokaki mpe ete, tango apambolaki ye, apesaki ye mitindo oyo: « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana. »
7 Esau also saw that Jacob had obeyed his father and his mother, and had gone to Paddan Aram.
Jakobi atosaki tata na ye mpe mama na ye, mpe akendeki na Padani-Arami.
8 Esau saw that the women of Canaan did not please Isaac his father.
Bongo Ezawu asosolaki ete Izaki, tata na ye, azalaki kosepela te na bana basi ya Kanana.
9 So he went to Ishmael, and took, besides the wives that he had, Mahalath the daughter of Ishmael, Abraham's son, the sister of Nebaioth, to be his wife.
Boye Ezawu akendeki epai ya Isimaeli, mwana mobali ya Abrayami, mpe abalaki, kobakisa na basi oyo azalaki na bango, Maalati, ndeko mwasi ya Nebayoti.
10 Jacob left Beersheba and went toward Haran.
Jakobi alongwaki na Beri-Sheba mpe akendeki na Arani.
11 He came to a certain place and stayed there all night, because the sun had set. He took one of the stones in that place, put it under his head, and lay down in that place to sleep.
Tango akomaki na esika moko, apemaki mpo na kolekisa butu. Azwaki libanga moko kati na mabanga oyo ezalaki na esika yango, atiaki yango na se ya moto na ye mpe alalaki.
12 He dreamed and saw a stairway set up on the earth. Its top reached to heaven and the angels of God were ascending and descending on it.
Na se ya pongi, alotaki ndoto: Amonaki ematelo moko ebanda na mabele mpe songe na yango etutaki likolo. Ba-anjelu ya Nzambe bazalaki komata mpe kokita na ematelo yango.
13 Behold, Yahweh stood above it and said, “I am Yahweh, the God of Abraham your father, and the God of Isaac. The land on which you are lying, I will give to you and to your descendants.
Mpe Yawe atelemaki likolo ya ematelo mpe alobaki na ye: « Nazali Yawe, Nzambe ya koko na yo Abrayami mpe Nzambe ya Izaki. Nakopesa epai na yo mpe na bana na yo mabele oyo, esika olali.
14 Your descendants will be like the dust of the earth, and you will spread far out to the west, to the east, to the north, and to the south. Through you and through your descendants will all the families of the earth be blessed.
Bana na yo bakozala ebele lokola putulu ya mabele, bakopanzana na bangambo nyonso: wuta na weste kino na este, wuta na nor kino na sude. Mabota nyonso ya mokili ekomipambola mpo na yo mpe mpo na bakitani na yo.
15 Behold, I am with you, and I will keep you wherever you go. I will bring you into this land again; for I will not leave you. I will do all that I have promised to you.”
Nazali elongo na yo, nakobatela yo bisika nyonso oyo okokende mpe nakozongisa yo na mabele oyo, nakotika yo te kino nakokokisa makambo nyonso oyo nalakaki yo. »
16 Jacob awoke out of his sleep, and he said, “Surely Yahweh is in this place, and I did not know it.”
Tango Jakobi alamukaki na pongi, alobaki: « Ya solo penza, Yawe azali na esika oyo mpe ngai nayebaki yango te! »
17 He was afraid and said, “How terrifying is this place! This is none other than the house of God. This is the gate of heaven.”
Jakobi abangaki mpe abakisaki: « Oyo esika ya somo boye! Ekoki kozala eloko mosusu te, bobele Ndako ya Nzambe. Awa nde ekuke ya lola. »
18 Jacob arose early in the morning and took the stone that he had put under his head. He set it up as a pillar and poured oil upon the top of it.
Na tongo-tongo, Jakobi azwaki libanga oyo atiaki moto, atelemisaki yango lokola elembo mpe asopaki mafuta na songe na yango.
19 He called the name of that place Bethel, but the name of the city originally was Luz.
Apesaki esika yango kombo « Beteli. » Na kala, bazalaka kobenga esika yango « Luze. »
20 Jacob vowed a vow, saying, “If God will be with me and will protect me on this road on which I am walking, and will give me bread to eat, and clothes to wear,
Bongo Jakobi akataki ndayi na koloba: « Soki Nzambe akozala elongo na ngai mpe akobatela ngai na mobembo oyo nazali kosala, mpe soki akopesa ngai bilei mpe bilamba ya kolata;
21 so that I return safely to my father's house, then Yahweh will be my God.
soki nazongi na kimia na ndako ya tata na ngai, wana Yawe akozala Nzambe na ngai,
22 Then this stone that I have set up as a pillar will be a sacred stone. From everything that you give me, I will surely give a tenth back to you.”
libanga oyo natelemisi lokola elembo ekokoma Ndako ya Nzambe mpe nakopesa Ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo akopesa ngai. »