< Exodus 17 >

1 The whole community of the Israelites journeyed from the wilderness of Sin, following Yahweh's instructions. They camped at Rephidim, but there was no water for the people to drink.
Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato.
2 So the people blamed Moses for their situation and said, “Give us water to drink.” Moses said, “Why do you quarrel with me? Why do you test Yahweh?”
Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye: — Pesa biso mayi ya komela! Moyize azongiselaki bango: — Mpo na nini bozali koswanisa ngai? Mpo na nini bolingi komeka Yawe?
3 The people were very thirsty, and they complained against Moses. They said, “Why have you brought us up out of Egypt? To kill us and our children and our cattle with thirst?”
Lokola posa ya mayi elekaki makasi, bato bayimaki-yimaki epai ya Moyize mpe balobaki: — Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito? Ezali mpo ete obomisa biso, bana na biso mpe bibwele na biso na posa ya mayi?
4 Then Moses cried out to Yahweh, “What should I do with this people? They are almost ready to stone me.”
Moyize abelelaki Yawe: — Nasala nini mpo na bato oyo? Etikali kaka moke ete babamba ngai mabanga!
5 Yahweh said to Moses, “Go on ahead of the people, and take with you some elders of Israel. Take with you the staff with which you struck the river, and go.
Yawe azongiselaki Moyize: — Leka liboso ya bato, kamata ndambo ya bakambi ya Isalaele. Zwa na loboko na yo, lingenda oyo obetaki na ebale Nili, mpe kende.
6 I will stand before you there on the rock at Horeb, and you will strike the rock. Water will come out of it for the people to drink.” Then Moses did so in the sight of the elders of Israel.
Ngai nakotelema kuna, liboso na yo, na likolo ya libanga oyo ezali na ngomba Orebi. Okobeta libanga yango, mpe yango ekobimisa mayi, bongo bato bakomela. Moyize asalaki bongo na miso ya bakambi ya Isalaele.
7 He called that place Massah and Meribah because of the Israelites' complaining, and because they had tested the Lord by saying, “Is Yahweh among us or not?”
Abengaki esika yango Masa mpe Meriba, pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki: « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te? »
8 Then an army of the Amalek people came and attacked Israel at Rephidim.
Bato ya Amaleki bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele na Refidimi.
9 So Moses said to Joshua, “Choose some men and go out. Fight with Amalek. Tomorrow I will stand on top of the hill with the staff of God in my hand.”
Moyize alobaki na Jozue: — Ponela biso bilombe ya bitumba kati na bato; mpe lobi; wana yo okende kobundisa bato ya Amaleki, ngai nakotelema na likolo ya ngomba moke elongo na lingenda ya Nzambe na loboko na ngai.
10 So Joshua fought Amalek as Moses had instructed, while Moses, Aaron, and Hur went up to the top of the hill.
Jozue asalaki ndenge Moyize atindaki ye mpe abundisaki bato ya Amaleki; wana Moyize, Aron mpe Wuri bamataki likolo ya ngomba.
11 While Moses was holding his hands up, Israel was winning; when he let his hands rest, Amalek would begin to win.
Tango nyonso Moyize abandaki kotombola maboko na ye mpo na kobondela, bana ya Isalaele bazalaki kolonga; kasi tango nyonso azalaki kokitisa maboko na ye, bato ya Amaleki bazalaki kolonga.
12 When Moses' hands became heavy, Aaron and Hur took a stone and put it under him for him to sit on. At the same time, Aaron and Hur held his hands up, one person on one side of him, and the other person on the other side. So Moses' hands were held steady until the sun went down.
Tango maboko ya Moyize elembaki, Aron mpe Wuri bakamataki libanga mpe batielaki ye yango mpo ete avandela yango; mpe Moyize avandelaki yango. Aron mpe Uri batombolaki maboko na ye, moko na ngambo moko, mpe mosusu na ngambo mosusu. Boye maboko na ye etikalaki ya kosembolama kino na pokwa.
13 So Joshua defeated the people of Amalek with the sword.
Mpe Jozue alongaki basoda ya bato ya Amaleki na mopanga.
14 Yahweh said to Moses, “Write this in a book and read it in Joshua's hearing, because I will completely blot out the memory of Amalek from under the skies.”
Yawe alobaki na Moyize: — Koma yango na buku lokola ekaniseli, mpe loba na Jozue ete nakosilisa bato ya Amaleki na mokili; bakotikala kokanisa bango lisusu te.
15 Then Moses built an altar and he called it “Yahweh is my banner.”
Moyize atongaki etumbelo mpe abengaki yango « Nkolo azali bendele na ngai ya lokumu. »
16 He said, “For a hand was lifted up to the throne of Yahweh—that Yahweh will wage war with Amalek from generation to generation.”
Moyize alobaki: « Lokola esali ete babundisi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, Yawe akobundisa bato ya Amaleki tango nyonso. »

< Exodus 17 >