< 2 Kings 10 >
1 Now Ahab had seventy descendants in Samaria. Jehu wrote letters and sent them to Samaria, to the rulers of Jezreel, including the elders and the guardians of Ahab's descendants, saying,
Akabi azalaki na bana mibali tuku sambo na Samari. Jewu akomaki mikanda mpe atindaki yango na Samari epai ya bakalaka ya Jizireyeli, epai ya bampaka mpe epai ya babateli ya bana ya Akabi. Na mikanda yango, Jewu alobaki:
2 “Your master's descendants are with you, and you also have chariots and horses and a fortified city and armor. So then, as soon as this letter comes to you,
« Tango kaka mokanda oyo ekokomela bino, lokola bana mibali ya mokonzi na bino bazali elongo na bino, mpe lokola bozali na bashar mpe bampunda, engumba ya makasi mpe bibundeli,
3 select the best and most deserving of your master's descendants and set him on his father's throne, and fight for your master's royal line.”
bopona mwana mobali oyo aleki malamu mpe mayele kati na bana mibali ya mokonzi na bino, botia ye na kiti ya bokonzi ya tata na ye, mpe bobunda mpo na ndako ya mokonzi na bino. »
4 But they were terrified and said among themselves, “See, the two kings could not stand before Jehu. So how can we stand?”
Kasi babangaki makasi mpe balobaki: « Soki kutu bakonzi mibale bakokaki te kobunda na ye, bongo ndenge nini biso tokobunda na ye? »
5 Then the man who was in charge of the palace, and the man who was over the city, and the elders also, and they who raised the children, sent word back to Jehu, saying, “We are your servants. We will do everything that you command us. We will not make any man king. Do what is good in your eyes.”
Boye, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, moyangeli ya engumba, bampaka mpe babateli ya bana ya mokonzi batindaki sango oyo epai ya Jewu: « Tozali basali na yo mpe tokosala nyonso oyo okoloba. Tokotia moto mosusu te lokola mokonzi, tokosala nyonso oyo okomona malamu. »
6 Then Jehu wrote a letter the second time to them, saying, “If you are on my side, and if you will listen to my voice, you must take the heads of the men of your master's descendants, and come to me to Jezreel by tomorrow this time.” Now the king's descendants, seventy in number, were with the important men of the city, who were bringing them up.
Boye, Jewu akomelaki bango mokanda ya mibale oyo kati na yango alobaki: « Soki bozali na ngambo na ngai mpe bokotosa ngai, bozwa mito ya bana mibali nyonso ya mokonzi na bino mpe boya na yango epai na ngai, na Jizireyeli, lobi na tongo. » Nzokande bana mibali tuku sambo ya mokonzi bazalaki epai ya bato ya lokumu ya engumba, oyo bazalaki kobokola bango.
7 So when the letter came to them, they took the king's sons and killed them, seventy persons, put their heads in baskets, and sent them to Jehu in Jezreel.
Tango mokanda ekomaki, bato wana bazwaki bana mibali ya mokonzi, babomaki bango nyonso tuku sambo, batiaki mito na bango na bitunga mpe batindaki yango epai ya Jewu, na Jizireyeli.
8 A messenger came to Jehu, saying, “They have brought the heads of the king's sons.” So he said, “Put them in two heaps at the entrance of the gate until the morning.”
Ntoma moko akomaki mpe alobaki na Jewu: — Bamemi mito ya bana mibali ya mokonzi. Bongo Jewu apesaki mitindo: — Botia yango na mipiku mibale na ekuke ya engumba kino na tongo.
9 In the morning Jehu went out and stood, and said to all the people, “You are innocent. See, I plotted against my master and killed him, but who killed all these?
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jewu abimaki, atelemaki liboso ya bato nyonso mpe alobaki: — Bosali na bino mabe te. Ezalaki ngai nde nasalelaki nkolo na ngai likita mpo na kotelemela ye mpe koboma ye; kasi nani abomi bato oyo nyonso?
10 Now you should certainly realize that no part of Yahweh's word, the word that he spoke concerning the family of Ahab, will fall to the ground, for Yahweh has done what he spoke about through his servant Elijah.”
Boyeba ete liloba moko te oyo Yawe alobaki mpo na kotelemela ndako ya Akabi ekozanga kokokisama. Yawe akokisi makambo oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya.
11 So Jehu killed all who remained in the family of Ahab in Jezreel, and all his important men, his close friends, and his priests, until none of them remained.
Boye Jewu abomaki bato nyonso ya ndako ya Akabi, oyo batikalaki na Jizireyeli: bato na ye nyonso ya lokumu, baninga na ye, Banganga-Nzambe na ye. Atikaki ata moto na ye moko te na bomoi.
12 Then Jehu arose and left; he went to Samaria. As he was arriving at Beth Eked of the shepherd,
Jewu atelemaki mpe akendeki na Samari. Na Beti-Ekedi-Aron,
13 he met brothers of Ahaziah king of Judah. Jehu said to them, “Who are you?” They answered, “We are brothers of Ahaziah, and we are going down to greet the children of the king and the children of Queen Jezebel.”
Jewu akutanaki na bandeko ya Akazia, mokonzi ya kala ya Yuda, mpe atunaki bango: — Bozali banani? Bazongisaki: — Tozali bandeko ya Akazia. Toyei kopesa bana mibali ya mokonzi mpe mama ya mokonzi mbote.
14 Jehu said to his own men, “Take them alive.” So they took them alive and killed them at the well of Beth Eked, all forty-two men. He did not leave any of them alive.
Jewu apesaki mitindo: — Bokanga bango ya bomoi. Boye bakangaki bango ya bomoi mpe bakataki bango bakingo, pene ya libulu ya Beti-Ekedi. Bazalaki mibali tuku minei na mibale, mpe Jewu atikaki moto moko te na bomoi.
15 When Jehu had left there, he met Jehonadab son of Recab coming to meet him. Jehu greeted him and said to him, “Is your heart with me, as my heart is with yours?” Jehonadab answered, “It is.” Jehu said, “If it is, give me your hand.” So he gave Jehu his hand, and Jehu took Jehonadab up with him into the chariot.
Tango alongwaki kuna mpe akutanaki na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, oyo abandaki koya kokutana na ye, Jewu apesaki ye mbote mpe alobaki: — Boni, motema na yo ezali sembo mpo na ngai, ndenge motema na ngai ezali mpo na yo? Yonadabi azongisaki: — Iyo, ezali bongo! Jewu alobaki: — Soki ezali bongo, pesa ngai loboko na yo. Boye, Yonadabi asalaki bongo, mpe Jewu asungaki ye mpo na komata na shar.
16 Jehu said, “Come with me and see my zeal for Yahweh.” So he had Jonadab ride along with him in his chariot.
Jewu alobaki: — Yaka elongo na ngai, mpe okomona bolingo makasi na ngai mpo na Yawe. Boye, Jewu amemaki ye na shar na ye.
17 When he came to Samaria, Jehu killed all who remained from Ahab's descendants in Samaria, until he had destroyed Ahab's royal line, just as was told them before by the word of Yahweh, which he had spoken to Elijah.
Tango Jewu akomaki na Samari, abomaki bato nyonso ya libota ya Akabi, oyo batikalaki kuna. Jewu abomaki bango kolanda Liloba na Yawe oyo alobaki na nzela ya Eliya.
18 Then Jehu gathered all the people together and said to them, “Ahab served Baal a little, but Jehu will serve him much.
Jewu abengisaki bato nyonso mpe alobaki na bango: « Akabi azalaki kosalela Bala mingi te, kasi Jewu akosalela ye mingi.
19 Now therefore call to me all the prophets of Baal, all his worshipers, and all his priests. Let no one be left out, for I have a great sacrifice to offer to Baal. Whoever does not come will not live.” But Jehu did this deceitfully, with the intent to kill the worshipers of Baal.
Sik’oyo, bobengisa basakoli nyonso ya Bala, basambeli na ye nyonso mpe banganga-nzambe na ye nyonso. Bosala ete moto moko te azanga, pamba te nakobonza mbeka ya monene mpo na Bala. Moto nyonso oyo akozanga, akokufa. » Jewu asalelaki mayele mabe mpo na koboma basambeli ya Bala.
20 Jehu said, “Set a time to have an assembly for Baal.” So they announced it.
Jewu alobaki: « Bobengisa mayangani mpo na lokumu ya Bala. » Boye babengisaki mayangani yango.
21 Then Jehu sent throughout all Israel and all the worshipers of Baal came, so that there was not a man left who did not come. They came into the temple of Baal, and it was filled from one end to another.
Jewu apanzaki sango kati na Isalaele, basambeli nyonso ya Bala bayaki mpe moto moko te azangaki. Bakotaki ebele na ndako ya nzambe Bala mpe batondisaki yango kino na basuka nyonso.
22 Jehu said to the man who kept the priest's wardrobe, “Bring out robes for all the worshipers of Baal.” So the man brought out robes to them.
Jewu alobaki na mobateli bilamba ya bonganga-nzambe ya Bala: « Yaka na bilamba mpo na basambeli nyonso ya Bala. » Boye abimisaki bilamba mpo na bango.
23 So Jehu went with Jehonadab son of Recab into the house of Baal, and he said to the worshipers of Baal, “Search and make sure that there is no one here with you from the servants of Yahweh, but the worshipers of Baal alone.”
Bongo Jewu elongo na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, bakotaki na ndako ya nzambe Bala. Jewu alobaki na basambeli ya Bala: « Botala malamu-malamu na zingazinga na bino mpo ete basali ya Yawe bazala elongo na bino te, kaka basali ya Bala. »
24 Then they went in to offer sacrifices and burnt offerings. Now Jehu had chosen eighty men who were standing outside, and he told them, “If any of the men whom I bring into your hands escapes, whoever lets that man escape, his life will be taken for the life of the one who escaped.”
Bakotaki mpo na kobongisa bambeka mpe batumbaki yango. Nzokande, Jewu atiaki bato tuku mwambe libanda na likebisi oyo: « Soki moto moko kati na bino akimisi moko kati na bato oyo napesi na maboko na bino, akofuta bomoi na ye na motuya ya bomoi ya moto oyo akimi. »
25 So then as soon as Jehu finished offering the burnt offering, he said to the guard and to the captains, “Go in and kill them. Let no one come out.” So they killed them with the edge of the sword, and the guard and the captains threw them out and went into the inner room of the house of Baal.
Tango kaka Jewu asilisaki kobongisa mbeka ya kotumba, apesaki mitindo epai na bakengeli mpe na bakambi na bango: « Bokota mpe boboma bango. Bokimisa moto moko te. » Boye, babomaki bango na mopanga. Bakengeli mpe bakonzi ya basoda babwakaki bibembe na libanda mpe bakotaki kino na esika ya bule ya ndako ya nzambe Bala.
26 They dragged out the stone pillars that were in the house of Baal, and they burned them.
Babimisaki libanga ya bule na libanda ya ndako ya nzambe Bala mpe batumbaki yango.
27 Then they broke down the pillar of Baal, and destroyed the house of Baal and made it a latrine, which it is to this day.
Babukaki libanga yango ya bule, bakweyisaki ndako ya nzambe Bala mpe bakomisaki yango zongo kino na mokolo ya lelo.
28 That is how Jehu destroyed Baal worship from Israel.
Ezali bongo nde Jewu asukisaki losambo ya Bala kati na Isalaele.
29 But Jehu did not leave the sins of Jeroboam son of Nebat, by which he made Israel sin—that is, the worship of the golden calves in Bethel and Dan.
Kasi Jewu atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu. Lisumu yango ezali: kosambela bikeko ya bangombe ya wolo, na Beteli mpe na Dani.
30 So Yahweh said to Jehu, “Because you have done well in executing what was right in my eyes, and have done to the house of Ahab according to all that was in my heart, your descendants will sit on the throne of Israel to the fourth generation.”
Yawe alobaki na Jewu: « Lokola osali malamu mpo na kokokisa oyo ezali sembo na miso na Ngai, mpe lokola osali na libota ya Akabi nyonso oyo nakanaki kosala, bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. »
31 But Jehu took no care to walk in the law of Yahweh, the God of Israel, with all his heart. He did not turn away from the sins of Jeroboam, by which he made Israel sin.
Nzokande, Jewu asalaki bokebi te mpo na kobatela mibeko ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema na ye mobimba. Atikaki te masumu ya Jeroboami oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu.
32 In those days Yahweh began to cut off regions from Israel, and Hazael defeated the Israelites at the borders of Israel,
Na tango wana, Yawe abandaki kokomisa moke bandelo ya Isalaele. Azaeli alongaki bana ya Isalaele, na mokili na bango,
33 from the Jordan eastward, all the land of Gilead, the Gadites, and the Reubenites, and the Manassites, from Aroer, which is by the Valley of the Arnon, through Gilead to Bashan.
na este ya Yordani, na etuka nyonso ya Galadi (mabele ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya Manase), longwa na Aroeri oyo ezali pembeni ya moluka ya Arinoni kino na Galadi mpe Bashani.
34 As for the other matters concerning Jehu, and all that he did, and all his power, are they not written in the book of the events of the kings of Israel?
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jewu, misala na ye nyonso mpe elonga na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
35 Jehu slept with his ancestors, and they buried him in Samaria. Then Jehoahaz his son became king in his place.
Jewu akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Bongo Yoakazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
36 The time that Jehu reigned over Israel in Samaria was twenty-eight years.
Jewu akonzaki Isalaele, na Samari mibu tuku mibale na mwambe.