< 1 Kings 7 >

1 Solomon took thirteen years to build his own palace.
Salomo atongaki lisusu ndako na ye ya bokonzi; asalaki mibu zomi na misato mpo na kosilisa kotonga yango.
2 He built the Palace of the Forest of Lebanon. Its length was one hundred cubits, its width was fifty cubits, and its height was thirty cubits. The palace was built with four rows of cedar pillars with cedar beams on the pillars.
Atongaki mpe ndako oyo bazalaki kobenga « Ndako ya Zamba ya Libani. » Ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda. Ezalaki na milongo minei ya makonzi ya banzete ya sedele; mpe na likolo ya makonzi yango, ezalaki na mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
3 The house was roofed with cedar that rested on beams. Those beams were supported by pillars. There were forty-five beams, fifteen in a row.
Bongo, na likolo ya mabaya ya sedele yango oyo esimbaki motondo, ezalaki na milongo misato ya mabaya mosusu ya sedele na likolo ya makonzi: molongo moko na moko ezalaki na mabaya ya sedele zomi na mitano. Na kosangisa, mabaya yango ezalaki tuku minei na mitano.
4 There were beams in three rows, and each window was opposite another window in three sets.
Maninisa na yango ezalaki na mipanzi nyonso ya ndako mpe ezalaki etalana yango na yango, na ba-etaje nyonso misato.
5 All the doors and posts were made square with beams, and window was opposite window in three sets.
Bikuke na yango nyonso ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, mpe ezalaki etalana na ba-etaje nyonso misato.
6 There was a colonnade fifty cubits long and thirty cubits wide, with a portico in front and pillars and a roof.
Salomo atongaki lisusu na makonzi, ndako moke ya kokotela ya bametele pene tuku mibale na mitano na molayi mpe bametele pene zomi na mitano na mokuse, mpe ezalaki na motondo likolo ya makonzi.
7 Solomon built the hall of the throne where he was to judge, the hall of justice. It was covered with cedar from floor to floor.
Atongaki lisusu ndako ya kiti ya bokonzi epai wapi azalaki kosambisa bato. Alatisaki yango mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo.
8 Solomon's house in which he was to live, in another courtyard within the palace grounds, was similarly designed. He also built a house like this for Pharaoh's daughter, whom he had taken as a wife.
Ndako na ye ya kovanda ezalaki kati na lopango mosusu, na sima ya ndako moke ya kokotela; mpe batongaki yango ndenge moko kaka na ndako ya kiti ya bokonzi. Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe atongiselaki ye ndako oyo ekokana na ndako ya kiti ya bokonzi.
9 These buildings were adorned with costly hewn stones, precisely measured and cut with a saw and smoothed on all sides. These stones were used from the foundation to the stones on top, and also on the outside to the great court.
Batongaki bandako oyo nyonso na mabanga bakata kitoko mpe babongisa na si na bangambo nyonso mibale. Basalelaki yango kobanda na miboko kino na mitondo, mpe na libanda, mpo na bamir ya lopango ya monene.
10 The foundation was constructed with very large, costly stones of eight and ten cubits in length.
Basalelaki mabanga minene ya talo mpo na kotonga miboko oyo ezalaki na molayi ya bametele pene minei to mitano.
11 Above were costly hewn stones precisely cut to size, and cedar beams.
Na likolo ya miboko yango, batiaki mabanga oyo bakata mpe mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
12 The great courtyard surrounding the palace had three rows of cut stone and a row of cedar beams like the courtyard of the temple of Yahweh and the temple portico.
Salomo azingelaki lopango monene na mir ya milongo misato ya mabanga bakata mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele, ndenge ezalaki mpo na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe mpe mpo na ndako moke ya kokotela.
13 King Solomon sent for Huram and brought him from Tyre.
Mokonzi Salomo atindaki bato na mboka Tiri kobenga mosali moko na kombo Irami
14 Huram was the son of a widow of the tribe of Naphtali; his father was a man of Tyre, a craftsman in bronze. Huram was filled with wisdom and understanding and skill to do great work with bronze. He came to King Solomon to work with bronze for the king.
oyo tata na ye azalaki moto ya Tiri; mpe mama na ye, moto ya libota ya Nefitali, azalaki mwasi akufisa mobali. Irami ayebaki kosalela bronze. Bongo lokola azalaki na bwanya, mayele mpe boyebi mingi, azalaki kosala lolenge nyonso ya biloko ya bronze. Boye, ayaki epai ya mokonzi Salomo mpe asalelaki ye misala nyonso oyo asengaki ye.
15 Huram fashioned the two pillars of bronze, each eighteen cubits high and twelve cubits in circumference.
Irami asalaki makonzi nyonso mibale ya bronze: likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na molayi, mpe bametele pene motoba na monene.
16 He made two capitals of polished bronze to set on the tops of the pillars. The height of each capital was five cubits.
Asalaki lisusu na bronze banyangwisa na moto mito ya makonzi mpo na kotia yango na songe: moto moko na moko ya likonzi ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda.
17 Checker latticework and wreaths of chain work for the capitals decorated the top of the pillars, seven for each capital.
Batiaki na mito ya makonzi yango bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe ya basinga elingama-lingama lokola basheni. Na moto ya likonzi moko na moko, ezalaki na bililingi sambo.
18 So Huram made two rows of pomegranates around the top of each pillar to decorate their capitals.
Irami atiaki milongo mibale ya bililingi ya bambuma ya grenade zingazinga ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kokomisa mito ya makonzi yango kitoko.
19 The capitals on the tops of the portico pillars were decorated with lilies, four cubits high.
Mito ya makonzi ya ndako moke ya kokotela ezalaki ya bametele pene mibale na bosanda, mpe batiaki na likolo na yango bililingi ya fololo ya lisi.
20 The capitals on these two pillars also included, close to their very top, two hundred pomegranates in rows all around.
Bazingelaki moto ya likonzi moko na moko na bililingi ya bambuma ya grenade nkama mibale oyo ezalaki likolo ya bililingi ya basinga oyo basala lokola ya monyama.
21 He raised up the pillars at the temple portico. The pillar on the right was named Jakin, and the pillar on the left was named Boaz.
Irami atongaki makonzi nyonso mibale liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo; abengaki likonzi oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mobali Yakini, mpe oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mwasi, Boazi.
22 On the top of the pillars were decorations like lilies. The fashioning of the pillars was done in this way.
Likolo ya likonzi moko na moko, atiaki bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki ndenge wana nde asilisaki mosala ya kotelemisa makonzi.
23 Huram made the round sea of cast metal, ten cubits from brim to brim. Its height was five cubits, and the sea was thirty cubits in circumference.
Irami asalaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu: monene na yango ezalaki na bametele pene mitano, mpe bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano; mpe zingazinga na yango, bametele pene zomi na mitano.
24 Under the brim encircling the sea were gourds, ten in each cubit, cast in one piece with “The Sea,” when that basin was cast.
Na se ya monoko ya nzungu yango ya monene, na pembeni na yango nyonso, ezalaki na milongo mibale ya bililingi ya bakolokente oyo banyangwisaki mpe babambaki na nzungu ya monene mpo ete esala eloko kaka moko; ezalaki bililingi zomi mpo na molayi ya kati-kati ya metele moko.
25 “The Sea” stood on twelve oxen, three looking toward the north, three looking toward the west, three looking toward the south, and three looking toward the east. “The Sea” was set on top of them, and all their hindquarters were toward the inside.
Nzungu yango evandisamaki na likolo ya bikeko ya bangombe zomi na mibale: misato etalaki na ngambo ya nor; misato, na ngambo ya weste; misato, na ngambo ya sude, mpe misato, na ngambo ya este. Bongo sima na bangombe yango nyonso etalaki na ngambo ya kati.
26 The sea was as thick as the width of a hand, and its brim was forged like the brim of a cup, like a lily blossom. The sea held two thousand baths of water.
Mbinga ya nzungu yango ezalaki na basantimetele pene mwambe. Babongisaki pembeni ya monoko na yango lokola pembeni ya kopo oyo batia bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki kotonda na balitele ya mayi pene nkoto tuku minei.
27 Huram made the ten stands of bronze. Each stand was four cubits long and four cubits wide, and the height was three cubits.
Irami asalaki lisusu bivandelo zomi ya bronze: evandelo moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na molayi, bametele pene mibale na mokuse, metele moko na basantimetele tuku mitano na bosanda.
28 The work of the stands was like this. They had panels that stood between frames,
Tala ndenge basalaki bivandelo yango: bakangisaki bitando ya bronze mpe balekisaki bibende mosusu ya bronze mpo na kosimba yango.
29 and on the panels and on the frames were lions, oxen, and cherubim. Above and below the lions and oxen were wreaths of hammered work.
Irami asalaki bililingi ya nkosi, ya bangombe mpe ya basheribe, mpe abambaki yango likolo ya bitando mpe likolo ya bibende mosusu ya bronze. Ezalaki na bililingi ya singa ya bafololo na se mpe na likolo ya bangombe mpe ya bankosi.
30 Every stand had four bronze wheels and axles, and its four corners had supports beneath for the basin. The supports were cast with wreaths on the side of each one.
Shario moko na moko ezalaki na bapine minei ya bronze mpe na bibende ya bronze mpo na kosimba bapine.
31 The opening was round like a pedestal, a cubit and a half wide, and was within a crown that rose up a cubit. On the opening were engravings, and their panels were square, not round.
Na likolo ya evandelo moko na moko, ezalaki na lidusu evimba, na lolenge ya libungutulu; bongo eteni na yango oyo ezalaki ya kovimba ezalaki na basantimetele pene tuku mitano na bosanda mpe basantimetele pene tuku sambo na mitano na monene; mpe nzungu ya monene evandaki na lidusu yango. Irami abambaki bililingi na lidusu yango. Molayi mpe mokuse ya evandelo yango ezalaki ndenge moko, ezalaki na lolenge ya libungutulu te.
32 The four wheels were underneath the panels, and the axles of the wheels and their housings were in the stand. The height of a wheel was a cubit and a half.
Bapine nyonso minei ezalaki na se ya evandelo, mpe bakangisaki bibende oyo esimbaki bapine yango na mipanzi. Pine moko na moko ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano na monene.
33 The wheels were forged like chariot wheels. Their housings, rims, spokes, and hubs were all cast metal.
Basalaki bapine yango lokola bapine ya shareti: bibende oyo esimbaki bapine, bajante, mabende ya mike oyo ezalaka na kati ya pine mpe oyo esungaka pine mpo na kobaluka, nyonso ezalaki ya bronze banyangwisa na moto.
34 There were four handles at the four corners of each stand, forged into the stand itself.
Mabende nyonso minei oyo ezalaki lokola makolo ezalaki na basonge nyonso minei mpe ekanganaki na evandelo.
35 In the top of the stands there was a round band half a cubit deep, and on the top of the stand its supports and panels were attached.
Na likolo ya evandelo moko na moko, ezalaki na elilingi ya motole ya basantimetele pene tuku mibale na mitano na monene; mpe elilingi yango ezalaki zingazinga ya lidusu, na eteni oyo ezalaki ya kovimba. Na likolo ya evandelo, bibende oyo balekisaki na bangambo ekanganaki na evandelo mpo na kolendisa evandelo yango.
36 On the surfaces of the supports and on the panels Huram engraved cherubim, lions, and palm trees that covered the space available, and they were surrounded by wreaths.
Na likolo ya bibende yango, babambaki bililingi ya basheribe, ya bankosi mpe ya mandalala; mpe bazingelaki yango na bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni.
37 He made the ten stands in this manner. All of them were cast in the same molds, and they had one size, and the same shape.
Asalaki ndenge moko mpo na bivandelo nyonso zomi: asalaki nyonso na bronze banyangwisa na moto, mpe ezalaki lolenge moko.
38 Huram made ten basins of bronze. One basin could hold forty baths of water. Each basin was four cubits across and there was one basin on each of ten stands.
Irami asalaki lisusu basani zomi ya minene ya bronze; moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na monene mpe ezalaki likolo ya evandelo moko kati na bivandelo zomi. Mpe bakokaki kotia balitele pene nkoto moko kati sani moko na moko.
39 He made five stands on the south-facing side of the temple and five on the north-facing side of the temple. He set “The Sea” on the east corner, facing toward the south of the temple.
Atiaki bivandelo mitano elongo na basani na yango na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, mpe mitano mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi. Nzungu ya monene ya bronze etiamaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, pene na songe ya sude-este.
40 Huram made the basins and the shovels and the sprinkling bowls. Then he finished all the work that he did for King Solomon in the temple of Yahweh:
Irami asalaki basani ya kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. Irami asilisaki mosala nyonso oyo mokonzi Salomo atindaki ye kosala mpo na Tempelo ya Yawe:
41 the two pillars, and the bowl-like capitals that were on top of the two pillars, and the two sets of decorative latticework to cover the two bowl like capitals that were on top of the pillars.
makonzi mibale, mito mibale ya libungutulu na suka ya makonzi nyonso mibale, bililingi mibale ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi yango,
42 He made the four hundred pomegranates for the two sets of decorative latticework (two rows of pomegranates for each set of latticework to cover the two bowl-like capitals that were on the pillars);
bililingi ya bambuma nkama minei ya grenade ekangana na maboke ya bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama: milongo mibale ya bililingi ya grenade mpo na elilingi moko na moko ya basinga oyo basala lokola monyama, mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi;
43 the ten stands, and the ten basins on the stands.
bivandelo zomi mpe basani zomi ya minene oyo batiaki na likolo ya bivandelo,
44 He made the large basin called “The Sea” with its twelve oxen under it;
nzungu ya monene ya libungutulu, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki komema nzungu ya monene,
45 also the pots, shovels, basins, and all the other implements. Huram made them out of polished bronze, for King Solomon, for the temple of Yahweh.
basani mpo na kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. Irami asalelaki mokonzi Salomo biloko oyo nyonso mpo na Tempelo ya Yawe; asalaki yango na bronze oyo bapetola na moto.
46 The king had cast them in the plain of the Jordan, in the clay ground between Succoth and Zarethan.
Mokonzi asengaki ete banyangwisa yango kati na mabele, na etando ya Yordani, kati na Sukoti mpe Tsaritani.
47 Solomon did not weigh all the utensils because there were too many to weigh, because the weight of the bronze could not be measured.
Bongo Salomo atiaki biloko oyo nyonso kati na Tempelo ya Yawe; kasi mpo ete elekaki ebele, bakokaki te koyeba kilo ya bronze oyo basalelaki.
48 Solomon had made all the furnishings that were in the temple of Yahweh out of gold: the golden altar and the table on which the bread of the presence was to be placed;
Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe: etumbelo; mesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe;
49 the lampstands, five on the right side and five on the left, in front of the inner room, were of pure gold, and the flowers, the lamps, and the tongs were of gold.
bitelemiselo ya minda elongo na minda na yango, oyo basala na wolo ya peto, mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi, liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, bafololo na yango mpe biloko ya wolo ya kozwela makala na moto,
50 Solomon also had made the cups, lamp trimmers, basins, spoons, and incense burners, all of which were made of pure gold; he had sockets of gold made for the doors of the inner room (which was the most holy place), and for the doors of the main hall of the temple.
basani ya minene, bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, elongo na bikangelo ya wolo mpo na bikuke ya kati ya Tempelo, Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe mpo na bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo.
51 In this way, all the work that King Solomon directed for the house of Yahweh was finished. So Solomon brought in the things that were set apart by David, his father, and the silver, the gold, and the furnishings, and put them into the storerooms of the house of Yahweh.
Tango Salomo asilisaki misala nyonso ya kotonga Tempelo ya Yawe, amemaki biloko oyo Davidi, tata na ye, abulisaki: palata, wolo mpe bisalelo; atiaki yango kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe.

< 1 Kings 7 >