< 2 Kings 14 >

1 After Jehoash had been ruling Israel for almost two years, Joash’s son Amaziah became the king of Judah.
Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele, Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
2 He was 25 years old when he started to rule, and he ruled in Jerusalem for 29 years. His mother was Jehoaddin; she was from Jerusalem.
Amatsia azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yeoyadani. » Yeoyadani azalaki moto ya Yelusalemi.
3 Amaziah did many things that pleased Yahweh, but he did not do as many things that pleased Yahweh as King David had done. He did some of the good things that his father Joash had done.
Amatsia asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi ezalaki te lokola Davidi, koko na ye. Na makambo nyonso, alandaki ndakisa ya Joasi, tata na ye.
4 But, [like his father, ] he did not tear down the places for worshipping Yahweh at pagan shrines. The people continued to burn incense [to honor Yahweh] on those hills [instead of in Jerusalem, the place that Yahweh had appointed].
Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.
5 As soon as he was completely in control of his kingdom, he caused to be executed the officials who had murdered his father.
Sima na Amatsia kolendisa bokonzi na ye, abomaki bakalaka oyo babomaki tata na ye.
6 But he did not execute their children. He obeyed what was written in the laws that God gave to Moses: “Parents must not be executed for [the crimes/sins committed by] their children, and children must not be executed for [crimes/sins committed by] their parents. People must be executed only for the sins that they themselves [have committed].”
Kasi abomaki te bana mibali ya babomi ya tata na ye, pamba te, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize, Yawe apesaki mitindo oyo: « Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. »
7 Amaziah’s soldiers killed 10,000 soldiers of the Edom people-group in the Salt Valley [south of the Dead Sea], and they captured Sela [city] and gave it a new name, Joktheel. That is still its name.
Ezali Amatsia nde moto alongaki bato ya Edomi, nkoto zomi na Lubwaku ya Mungwa, mpe abotolaki na bitumba engumba ya Sela; mpe abengaki yango « Yokiteyeli, » kombo oyo babengelaka yango kino lelo.
8 Then Amaziah sent messengers to King Jehoash of Israel, saying “Come here and let’s talk together.”
Bongo Amatsia atindaki bantoma epai ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi mpe koko ya Jewu, mokonzi ya Isalaele, mpo na koyebisa ye: — Yaka tobunda!
9 But King Jehoash replied to King Amaziah: “Once a thornbush growing [in the mountains] in Lebanon sent a message to a cedar tree, saying, ‘Give your daughter to my son in order that he may marry her.’ But a wild animal in Lebanon passed by the thornbush and trampled it.
Kasi Joasi, mokonzi ya Isalaele, azongiselaki Amatsia, mokonzi ya Yuda: — Mokolo moko, nzete ya sende ya Libani etindaki maloba epai ya nzete ya sedele ya Libani: « Balisa mwana na yo ya mwasi epai ya mwana na ngai ya mobali. » Kasi nyama moko ya zamba elekaki mpe enyataki nzete ya sende.
10 [The meaning of what I am saying is that] your army has defeated the army of Edom, so now you have become very proud. But you should be content with defeating the people of Edom, and allow your soldiers to stay at home. If you cause trouble [by fighting against] us, you will surely [RHQ] cause a disaster to happen to you and to your people.”
Solo, olongi Edomi, mpe motema na yo ezali komikumisa. Sepela na yo, kasi vanda na ndako na yo. Mpo na nini koluka ete pasi makasi ekweyela yo elongo na Yuda?
11 But Amaziah refused to heed Jehoash’s message. So he marched with his army to fight against the Israeli army at Beth-Shemesh [city] in Judah.
Kasi Amatsia ayokaki ye te. Boye, Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kobundisa Amatsia, mokonzi ya Yuda. Ye mpe Amatsia, mokonzi ya Yuda, babundaki na Beti-Shemeshi kati na mokili ya Yuda.
12 The Israeli army defeated the army of Judah, and all the soldiers of Judah fled and ran back home.
Isalaele alongaki Yuda, mpe bato ya Yuda bakimaki, moto na moto na ndako na ye.
13 Jehoash’s army also captured King Amaziah there, and they also marched to Jerusalem and tore down the wall that was around the city, from the Ephraim Gate to the Corner Gate. That was a section that was about (200 yards/180 meters) long.
Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Akazia, na Beti-Shemeshi. Boye Joasi akendeki na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka.
14 Jehoash’s soldiers seized all the gold and silver that they found, and all the utensils that were in the temple, and all the valuable things that were in the palace, and took them to Samaria. They also took to Samaria some prisoners whom they had captured.
Akamataki wolo nyonso, palata nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi; akangaki bato na bowumbu mpe azongaki na Samari.
15 [If you want to know about] all the other things that Jehoash did when he was king, including when he [and his army] fought against [the army of] King Amaziah of Judah, they are written in the scroll called ‘The History of the Kings of Israel’.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi, misala na ye mpe elonga na ye tango abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
16 Jehoash died [EUP], and he was buried in Samaria, where the other kings of Israel had been buried. Then his son Jeroboam became the king.
Joasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele. Mpe Jeroboami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
17 Amaziah, the king of Judah, lived for 15 more years after Jehoash, the king of Israel, died.
Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, awumelaki lisusu na bomoi mibu zomi na mitano sima na kufa ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele.
18 [If you want to know more about] everything else that Amaziah did, it is written [RHQ] in the scroll called ‘The History of the Kings of Judah’.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amatsia mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
19 Some people in Jerusalem plotted against Amaziah, so he fled to Lachish [city]. But they followed him there and killed him.
Basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye, mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna.
20 They took his corpse back to Jerusalem and buried it where his ancestors had been buried, in [the part of Jerusalem called] ‘The City of David’.
Bamemaki nzoto na ye na likolo ya mpunda mpe bakundaki ye na Yelusalemi, esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi.
21 Then all the people of Judah appointed Amaziah’s son Uzziah, when he was 16 years old, to be their king
Bato nyonso ya Yuda bakamataki Azaria oyo azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama mpe bakomisaki ye mokonzi na esika ya tata na ye, Amatsia.
22 After his father died, Uzziah’s workers captured Elath [city], and it came under the control of Judah again.
Ezalaki ye nde moto atongaki lisusu engumba ya Eyilati mpe azongisaki yango na Yuda sima na kufa ya tata na ye, mokonzi Amatsia.
23 When Amaziah had been ruling Judah for almost 15 years, Jeroboam became the king of Israel. He ruled in Samaria [city] for 41 years.
Tango Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi, akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari mpe akonzaki mibu tuku minei na moko.
24 He did many things that Yahweh considered to be evil. He did not stop committing the same kind of sins that Jeroboam, the son of Nebat, committed, sins which led the Israeli people to sin also.
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
25 His soldiers conquered again some of the territory that had previously belonged to Israel, from Hamath [city] in the north to the Dead Sea in the south. That is what Yahweh, the God whom the Israelis worshiped, promised the prophet Jonah, the son of Amittai, from Gath-Hepher [town], would happen.
Ezalaki ye nde moto abotolaki lisusu bamboka ya Isalaele longwa na Lebo-Amati kino na ebale monene ya Araba, kolanda Liloba na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, mosakoli Yona, mwana mobali ya Amitayi, moto ya Gati-Eferi.
26 That happened because Yahweh saw that [the Israelis’ enemies were causing] the Israelis [to] suffer very much. And there was absolutely no one [IDM] who would help them.
Yawe amonaki ndenge nini bana nyonso ya Isalaele bazalaki konyokwama. Ezala bawumbu to bansomi, moto moko te akokaki kosunga bango.
27 But Yahweh said that he would not destroy Israel completely, so he enabled King Jeroboam to rescue them.
Lokola Yawe alobaki te ete akolimwisa kombo ya Isalaele na se ya moyi, abikisaki bango na nzela ya loboko ya Jeroboami, mwana mobali ya Joasi.
28 [If you want to know more about] everything else that Jeroboam did, [about] his fighting courageously in battles, and [about] his [enabling the Israelis to] capture again Damascus and Hamath [cities], they are written [RHQ] in the scroll called ‘The History of the Kings of Israel’.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jeroboami, misala na ye nyonso mpe elonga na ye na bitumba, ezala ndenge azongisaki na se ya bokonzi ya Isalaele Damasi mpe Amati, bingumba mibale oyo ezalaki ya Yuda, nyonso wana ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
29 Jeroboam died [EUP], [and was buried] where the other kings of Israel [were buried], and his son Zechariah became the king.
Jeroboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele; mpe Zakari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

< 2 Kings 14 >