< Luke 7 >

1 When Jesus had finished saying all this in the hearing of the people, he entered Capernaum.
Sima na Yesu koloba makambo oyo nyonso epai ya bato, akotaki na Kapernawumi.
2 There a centurion's servant, who was highly regarded by him, was sick and about to die.
Kuna, mosali moko ya mokonzi ya basoda azalaki kobela mpe akomaki pene ya kokufa. Mokonzi yango ya basoda azalaki kolinga mingi mosali na ye.
3 The centurion heard about Jesus and sent some Jewish elders to him, asking him to come and heal his servant.
Tango mokonzi ya basoda ayokaki sango na tina na Yesu, atindaki ndambo ya bampaka ya Bayuda epai na Yesu mpo na kosenga na Ye ete akende kobikisa mosali ya mokonzi ya basoda.
4 When they came to Jesus, they earnestly pleaded with him, saying, “This man is worthy to have yoʋ do this for him,
Tango bakomaki epai ya Yesu, babondelaki Ye makasi; balobaki: — Tata wana abongi penza ete osalela ye likambo oyo asengi epai na Yo,
5 for he loves our nation and built our synagogue for us.”
pamba te alingaka ekolo na biso, mpe ye nde atongaki ndako na biso ya mayangani.
6 So Jesus went with them. When he was not far from the house, the centurion sent friends to say to him, “Lord, do not trouble yoʋrself, for I am not worthy to have yoʋ enter under my roof;
Boye Yesu akendeki elongo na bango. Kasi tango akomaki pene ya ndako, mokonzi ya basoda atindaki baninga na ye koloba na Yesu: — Nkolo, komitungisa na Yo te, pamba te nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai.
7 therefore I did not even consider myself worthy to come to yoʋ. But just say the word, and my servant will be healed.
Ezali mpe mpo na yango nde namimonaki ete nabongi te mpo na koya epai na Yo. Kasi loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.
8 For I too am a man set under authority, with soldiers under me. I say to this one, ‘Go,’ and he goes; and to another, ‘Come,’ and he comes; and to my servant, ‘Do this,’ and he does it.”
Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko: « Kende, » akendaka; mpe na mosusu: « Yaka, » ayaka; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai: « Sala mosala oyo, » asalaka yango.
9 When Jesus heard this, he was amazed at the centurion. And turning to the crowd that was following him, he said, “I tell you, not even in Israel have I found such great faith.”
Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki ye mingi; bongo abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda Ye mpe alobaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: ezala kati na Isalaele, natikali nanu komona te kondima ya boye.
10 Then the men the centurion had sent returned to the house and found that the servant who had been sick was well.
Tango bato oyo mokonzi ya basoda atindaki bazongaki na ndako, bakutaki mosali yango nzoto kolongono.
11 Soon afterward Jesus went to a town called Nain, and many of his disciples went with him, along with a large crowd.
Sima na yango, Yesu akendeki na engumba moko na kombo Nayini; bayekoli na Ye elongo na ebele ya bato balandaki Ye.
12 As he drew near to the gate of the town, behold, a man who had died was being carried out, the one and only son of his mother (who was a widow). And a large crowd from the town was with her.
Wana akomaki pene ya ekuke ya engumba, akutanaki na bato bazali kokende kokunda mwana mobali moko oyo awutaki kokufa: azalaki mwana kaka moko ya mwasi moko akufisa mobali. Mpe bato mingi ya engumba yango bazalaki elongo na mwasi yango.
13 When the Lord saw her, he was moved with compassion for her and said to her, “Do not weep.”
Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye: — Kolela te!
14 Then he came up and touched the bier, and those who were carrying it stood still. He said, “Young man, I say to yoʋ, arise!”
Apusanaki mpe asimbaki tsipoyi oyo bazalaki komema na yango mwana oyo akufaki, mpe bato oyo bazalaki komema yango batelemaki. Yesu alobaki: — Elenge mobali, nalobi na yo, lamuka!
15 So the dead man sat up and began to speak, and Jesus gave him back to his mother.
Moto oyo akufaki avandaki mpe abandaki koloba; mpe Yesu azongisaki ye epai ya mama na ye.
16 Then all the people were filled with awe and began glorifying God, saying, “A great prophet has arisen among us,” and, “God has visited his people.”
Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba: — Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye!
17 This news about Jesus then spread throughout Judea and all the surrounding region.
Sango oyo na tina na Yesu epanzanaki kati na Yuda mpe kati na bamboka ya zingazinga.
18 John's disciples told him about all these things.
Bayekoli ya Yoane bayebisaki makambo wana nyonso epai ya nkolo na bango. Yoane abengaki bayekoli na ye, mibale kati na bango,
19 So John called two of his disciples and sent them to ask Jesus, “Are yoʋ the one who is to come, or should we wait for another?”
mpe atindaki bango epai ya Nkolo Yesu mpo na kotuna: — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu?
20 When the men came to him, they said, “John the Baptist has sent us to yoʋ to ask, ‘Are yoʋ the one who is to come, or should we wait for another?’”
Tango bakomaki epai ya Yesu, balobaki na Ye: — Yoane Mobatisi atindi biso epai na Yo mpo ete totuna: « Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu? »
21 Now in that very hour Jesus had healed many people of diseases, afflictions, and evil spirits, and had given sight to many who were blind.
Kaka na tango, Yesu abikisaki bato ebele na bokono, na pasi mpe na milimo mabe, mpe afungolaki miso ya bakufi miso ebele.
22 So Jesus replied to John's disciples, “Go tell John what you have seen and heard: The blind receive their sight, the lame walk, lepers are made clean, the deaf hear, the dead are raised, and the poor have good news preached to them.
Boye, Yesu azongiselaki bayekoli oyo Yoane atindaki: — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe oyo boyoki: bakufi miso bazali komona, bakufi matoyi bazali koyoka, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.
23 And blessed is anyone who does not take offense at me.”
Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai!
24 When John's messengers had gone away, Jesus began to speak to the crowds about John: “What did you go out into the wilderness to see? A reed shaken by the wind?
Tango bato oyo Yoane atindaki bazongaki, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane: — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai?
25 What then did you go out to see? A man clothed in soft garments? Behold, those who are dressed in splendid clothing and who live in luxury are in royal palaces.
Soki te, bokendeki penza kotala nini? Moto moko alata bilamba ya kitoko? Te! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko mpe bamisepelisaka kati na bozwi na bango bavandaka kati na bandako ya bakonzi.
26 But what did you go out to see? A prophet? Yes, I tell you, and more than a prophet.
Kasi nani bino bokendeki penza kotala? Mosakoli? Iyo, nazali koloba na bino, mpe aleki kutu ata mosakoli.
27 This is the one of whom it is written, ‘Behold, I am sending my messenger ahead of yoʋ, who will prepare yoʋr way before yoʋ.’
Yoane azali moto oyo Makomi ezali koloba boye na tina na ye: « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo, oyo akobongisela Yo nzela. »
28 For I tell you, among those born of women there is no prophet greater than John the Baptist, but whoever is least in the kingdom of God is greater than he.”
Nazali koloba na bino: kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane na monene; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Nzambe aleki Yoane Mobatisi na monene.
29 (When all the people heard this, including the tax collectors, they acknowledged the justice of God, because they had been baptized with the baptism of John.
Bato nyonso elongo na bafutisi mpako oyo bayokaki maloba na Yesu bandimaki ete nzela ya Nzambe ezali sembo, pamba te Yoane abatisaki bango
30 But the Pharisees and the lawyers rejected the will of God for themselves, because they had not been baptized by John.)
Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko baboyaki mokano ya Nzambe mpo na bango, pamba te baboyaki ete Yoane abatisa bango.
31 “To what then should I compare the people of this generation, and what are they like?
Boye Yesu alobaki: — Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo? Bakokani penza na banani?
32 They are like children who sit in the marketplace and call out to one another, ‘We played the flute for you, but you did not dance; we sang a lament for you, but you did not weep.’
Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga, bamoko na bamosusu: « Tobetaki baflite, kasi bobinaki te; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki te! »
33 For John the Baptist came neither eating bread nor drinking wine, and you say, ‘He has a demon.’
Pamba te, tango Yoane Mobatisi ayaki, azalaki kolia mapa te mpe azalaki komela vino te, mpe bolobaki: « Azali na molimo mabe kati na ye! »
34 The Son of Man came eating and drinking, and you say, ‘Behold, a glutton and a drunkard, a friend of tax collectors and sinners!’
Mwana na Moto ayaki, azali kolia, azali komela, mpe bozali koloba: « Azali na lokoso ya kolia mpe ya komela masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu! »
35 Yet wisdom is justified by all her children.”
Kasi bato nyonso oyo bayambaka Bwanya ya Nzambe batalisaka ete ezali sembo.
36 One of the Pharisees asked Jesus to eat with him, so he went into the Pharisee's house and reclined at the table.
Mofarizeo moko abengisaki Yesu mpo ete alia mesa moko elongo na ye. Yesu akendeki na ndako ya Mofarizeo yango mpe avandaki na mesa mpo na kolia.
37 And behold, a woman in the city who was a sinner, when she found out that Jesus was reclining at the table in the Pharisee's house, brought an alabaster jar of ointment.
Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki kobika bomoi ya masumu. Tango ayokaki ete Yesu azali kolia na ndako ya Mofarizeo, ayaki wana na molangi ya alibatre etonda na malasi,
38 As she stood behind him at his feet, weeping, she began to wet his feet with her tears. Then she wiped them with the hair of her head, kissed his feet, and anointed them with the ointment.
atelemaki na sima ya Yesu, na makolo na Ye; azalaki kolela mpe, na mpinzoli na ye, akomaki kopolisa makolo ya Yesu. Bongo apangusaki makolo yango na nzela ya suki na ye, apesaki yango beze mpe asopelaki yango malasi.
39 When the Pharisee who had invited him saw it, he said to himself, “If this man were a prophet, he would know who is touching him and what kind of woman she is—that she is a sinner.”
Tango Mofarizeo oyo abengisaki Yesu amonaki bongo, amilobelaki: — Soki moto oyo azali mosakoli, alingaki koyeba soki mwasi oyo azali kosimba Ye azali nani, mpe soki azali mwasi ya lolenge nini: moto ya masumu.
40 Jesus said to him in response, “Simon, I have something to say to yoʋ.” So he said, “Say it, Teacher.”
Yesu alobaki na ye: — Simona, nazali na likambo ya koyebisa yo. Mofarizeo azongisaki: — Moteyi, loba yango.
41 “A certain moneylender had two debtors. The one owed five hundred denarii, and the other owed fifty.
Yesu alobaki: — Moto moko adefisaki bato mibale mbongo. Moto ya liboso asengelaki kozongisa mbongo ya bibende nkama mitano, mpe oyo ya mibale, mbongo ya bibende tuku mitano.
42 When they did not have the means to repay, he forgave the debts of them both. So tell me, which of them will love him more?”
Kasi lokola, kati na bango mibale, moko te azalaki na mbongo ya kozongisa, modefisi alimbisaki bango mpo ete bafuta lisusu niongo yango te. Na makanisi na yo, nani kati na bango mibale akolinga modefisi koleka?
43 Simon answered, “I suppose that it would be the one for whom he forgave the larger debt.” Jesus said to him, “Yoʋ have judged correctly.”
Simona azongisaki: — Nakanisi ete ezali moto oyo balimbisi niongo ya mbongo oyo eleki ebele. Yesu alobaki na ye: — Okati malamu!
44 Then he turned toward the woman and said to Simon, “Do yoʋ see this woman? When I came into yoʋr house, yoʋ did not give me water for my feet, but this woman has wet my feet with her tears and wiped them with the hair of her head.
Bongo abalukaki epai ya mwasi, mpe alobaki na Simona: — Omoni mwasi oyo? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki Ngai mayi te ya kosukola makolo na Ngai; kasi ye, apolisi yango na mpinzoli na ye mpe apangusi yango na nzela ya suki na ye.
45 Yoʋ did not give me a kiss, but from the time I came in, this woman has not stopped kissing my feet.
Opesaki Ngai beze te; kasi ye, banda nakotaki awa, atiki te kopesa makolo na Ngai beze.
46 Yoʋ did not anoint my head with oil, but this woman has anointed my feet with ointment.
Opakolaki Ngai mafuta te na moto; kasi ye, asopeli makolo na Ngai malasi.
47 Therefore I tell yoʋ, her many sins are forgiven; that is why she has shown great love. But he to whom little is forgiven shows little love.”
Yango wana, nazali koloba na yo: ebele ya masumu na ye elimbisami, lokola atalisi bolingo monene. Kasi moto oyo balimbisaki niongo moke azali kotalisa bolingo moke.
48 Then Jesus said to her, “Yoʋr sins are forgiven.”
Bongo Yesu alobaki na mwasi: — Masumu na yo elimbisami.
49 But those who were reclining at the table with him began to say among themselves, “Who is this man that even forgives sins?”
Bato mosusu oyo babengamaki elongo na Ye bakomaki koloba, bango na bango: — Moto oyo azali penza nani, oyo akomi ata kolimbisa masumu?
50 And Jesus said to the woman, “Yoʋr faith has saved yoʋ; go in peace.”
Kasi Yesu alobaki na mwasi yango: — Kondima na yo ebikisi yo; kende na kimia!

< Luke 7 >