< John 8 >
1 And Jesus went to the mount of Olives.
Kasi Yesu akendeki na ngomba ya banzete ya olive.
2 And in the morning he came again to the temple; and all the people came to him, and he sat down and taught them.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, azongaki kati na lopango ya Tempelo; mpe lokola bato nyonso bayaki kozingela Ye, avandaki mpe abandaki koteya bango.
3 And the Scribes and Pharisees brought forward a woman that was caught in adultery. And when they had placed her in the midst,
Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bakumbaki mwasi moko oyo bakutaki azali kosala ekobo; batambolisaki ye kati na ebele ya bato mpe batiaki ye liboso ya Yesu, na miso ya bato nyonso.
4 they say to him: Teacher, this woman was caught openly in the act of adultery.
Balobaki na Yesu: — Moteyi, mwasi oyo asali ekobo; bakuti ye penza azali kosala yango!
5 And in the law of Moses, God hath commanded us to stone such persons. What therefore dost thou say?
Kati na mibeko, Moyize apesa biso mitindo ya koboma basi ya boye na mabanga. Bongo yo, olobi nini na tina na yango?
6 And this they said, tempting him, so that they might have ground to accuse him. But Jesus having stooped down, was writing on the ground.
Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye. Kasi Yesu agunzamaki; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele.
7 And as they continued asking him, he straightened himself up, and said to them: Whoever among you is without sin, let him first cast a stone at her.
Lokola bakobaki kaka kopesa Ye mituna, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango: — Tika ete moto oyo, kati na bino, asala nanu lisumu te abamba ye libanga moto ya liboso.
8 And, having again stooped down, he wrote on the ground.
Bongo Yesu agunzamaki lisusu mpe azongelaki kokoma na mabele.
9 And they, when they heard it, went out one by one, beginning with the older; and the woman was left, alone where she had stood in the midst.
Tango bayokaki bongo, bango nyonso babendanaki moko sima na moninga, kobanda na mikolo. Mpe Yesu atikalaki Ye moko. Lokola mwasi yango azalaki kaka wana kati na lopango ya Tempelo,
10 And when Jesus had straightened himself up, he said to the woman: Where are they? Doth no one condemn thee?
Yesu atombolaki moto mpe alobaki na ye: — Mwasi, bato oyo bayei kofunda yo bazali wapi? Boni, ata moko te akateli yo etumbu?
11 And she said: No man, Lord. And Jesus said: Neither do I condemn thee. Go thou, and henceforth sin no more.
Mwasi azongisaki: — Nkolo, moko te! Bongo Yesu alobaki na ye: — Ngai mpe nakateli yo etumbu te. Kende; kasi, kobanda lelo, kosala lisusu masumu te.]
12 And Jesus again conversed with them, and said: I am the light of the world: he that cometh to me, will not walk in darkness; but will find for himself the light of life.
Yesu alobaki lisusu na bato: — Nazali pole ya mokili; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.
13 The Pharisees said to him: Thou bearest witness of thyself, thy testimony is not certain.
Bafarizeo balobaki na Ye: — Ozali kotatola mpo na yo moko, litatoli na yo ezali ya solo te.
14 Jesus answered and said to them: Although I bear witness of myself, my testimony is certain, because I know whence I came, and whither I go. But ye do not know, whence I came, and whither I go.
Yesu azongiselaki bango: — Ezala soki natatoli mpo na Ngai moko, litatoli na Ngai ezali ya solo, pamba te nayebi epai nawuti mpe epai nazali kokende; kasi bino, boyebi te ezala epai nawuti to epai nazali kokende.
15 Ye judge according to the flesh: I judge no one.
Bino, bosambisaka na ndenge ya bomoto; kasi Ngai, nasambisi moto ata moko te.
16 Yet if I Judge, my judgment is certain, because I am not alone, but I and my Father who sent me.
Mpe ezala soki esalemi ete Ngai nasambisi moto, kosambisa na Ngai ezali ya solo, pamba te nazali Ngai moko te: Tata oyo atindi Ngai azali elongo na Ngai.
17 And in your law it is written, that the testimony of two persons is certain.
Ekomama kutu, kati na mibeko na bino, ete litatoli ya bato mibale nde ezalaka ya solo.
18 I am one: who bear witness of myself, and my Father who sent me, beareth witness of me.
Ngai, nazali kopesa litatoli na tina na Ngai moko, mpe Tata oyo atindaki Ngai azali lisusu kotatola na tina na Ngai.
19 They say to him: Where is thy Father? Jesus replied, and said to them: Ye neither know me nor my Father. If ye had known me, ye would also have known my Father.
Bongo batunaki Ye: — Tata na yo azali wapi? Yesu azongisaki: — Boyebi Ngai te, mpe boyebi Tata na Ngai te. Soki boyebaki Ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na Ngai.
20 These words spake Jesus in the treasury, as he taught in the temple: and no one laid hands on him, because his hour was not yet come.
Yesu alobaki bongo, wana azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, pene ya esika oyo bazalaki kotia makabo; mpe moto ata moko te amekaki kokanga Ye, pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.
21 Again Jesus said to them: I go away, and ye will seek me, and will die in your sins. And whither I go, ye cannot come.
Yesu alobaki na bango lisusu: — Ngai, nazali kokende; mpe bokoluka Ngai, kasi bokokufa kati na lisumu na bino. Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna.
22 The Jews said: Is he about to kill himself, that he should say, Whither I go ye cannot come?
Na bongo, Bayuda batunanaki bango na bango: — Boni, azali na makanisi ya komiboma, yango wana alobi: « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokokoka te koya kuna? »
23 And he said to them: Ye are from below, I am from above; ye are of this world, I am not of this world
Yesu azongiselaki bango: — Bino, bozali bato ya se; kasi Ngai, nawuti na Likolo. Bino, bozali bato ya mokili oyo; kasi Ngai, nazali ya mokili oyo te.
24 I said to you, That ye will die in your sins; for if ye believe not that I am he, ye will die in your sins.
Yango wana nalobaki na bino: « Bokokufa kati na lisumu na bino; » pamba te soki bondimi te ete « Nazali oyo azali, » bokokufa kati na lisumu na bino.
25 The Jews said to him: Who art thou? Jesus said to them: Although I have begun to converse with you,
Batunaki Ye: — Boye ozali nani? Yesu azongiselaki bango: — Oyo nazali koloba na bino wuta na ebandeli.
26 I have yet many things to say and to Judge concerning you. But he that sent me is true: and the things which I have heard from him, them I speak in the world.
Nazali na makambo mingi ya koloba na tina na bino mpe ya kosambisa kati na bino; kasi Ye oyo atindaki Ngai azali solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na Ye, yango nde nazali koyebisa mokili.
27 And they did not know, that he spake to them of the Father.
Kasi bazalaki kososola te ete Yesu azalaki koloba na bango na tina na Tata.
28 Jesus said to them again: When ye shall have lifted up the Son of man, then will ye know that I am he, and that I do nothing from my own pleasure, but as my Father taught me, so I speak.
Alobaki lisusu: — Sima na bino kotombola Mwana na Moto nde bokoyeba ete, Ngai, nazali oyo azali, mpe ete nasalaka eloko moko te na ndenge na Ngai moko, kasi nalobaka kolanda makambo oyo Tata ateyaki Ngai.
29 And he that sent me, is with me; and my Father hath not left me alone, because I do, at all times, that which pleaseth him.
Ye oyo atindaki Ngai azali elongo na Ngai; atikaki Ngai moko te, pamba te, Ngai, nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka Ye.
30 And when he had spoken these things, many believed on him.
Wana Yesu azalaki koloba bongo, bato mingi bandimaki Ye.
31 And Jesus said to those Jews who believed on him: If ye continue in my word, ye will be truly my disciples.
Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye: — Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai,
32 And ye will know the truth; and the truth will make you free.
bokoyeba solo, mpe solo ekokangola bino.
33 They say to him: We are the seed of Abraham, and never were in servitude to any man; and how sayest thou, Ye will be freemen?
Bazongiselaki Ye: — Biso, tozali bato ya libota ya Abrayami, totikala kozala te bawumbu ya moto; ndenge nini oloba ete tokokoma bansomi?
34 Jesus said to them: Verily, verily, I say to you, That whoever committeth sin, is the servant of sin.
Yesu azongiselaki bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo asalaka masumu azali mowumbu ya lisumu.
35 And a servant abideth not for ever in the house; but the Son abideth for ever. (aiōn )
Nzokande, mowumbu azalaka kati na libota tango nyonso te, kasi mwana azali kati na yango mpo na seko. (aiōn )
36 If therefore the Son shall make you free, ye will really be free men.
Boye, soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bansomi.
37 I know that ye are the children of Abraham; but ye seek to kill me, because ye do not acquiesce in my word.
Nayebi ete bozali bato ya libota ya Abrayami; nzokande, bozali koluka koboma Ngai, pamba te boboyi koyamba Liloba na Ngai.
38 I speak that which I have seen with my Father, and ye do that which ye have seen with your father.
Ngai, nazali koloba makambo oyo namonaki epai ya Tata na Ngai; bino mpe bozali kosala makambo oyo boyokaki epai ya tata na bino.
39 They answered, and said to him: Our father is Abraham. Jesus said to them: If ye were children of Abraham, ye would do the works of Abraham.
Bazongisaki: — Ezali Abrayami nde azali tata na biso. Yesu alobaki na bango: — Soki bozalaki bana ya Abrayami, bolingaki kosala misala oyo Abrayami asalaki.
40 But now ye seek to kill me, a man who hath told you the truth, which I have heard from God: this did not Abraham.
Kasi sik’oyo, na esika ete bosala yango, bozali koluka koboma Ngai, Ngai oyo nalobi na bino solo oyo nayokaki epai ya Nzambe! Abrayami atikala kosala bongo te.
41 But ye do the works of your father. They say to him: We are not the offspring of whoredom; we have one Father, God.
Bozali penza kosala misala ya tata na bino. Bazongisaki: — Tozali bana ya makangu te; tozali kaka na tata moko: Nzambe!
42 Jesus said to them: If God were your Father, ye would love me; for I proceeded and came from God: I did not come of my own accord, but he sent me.
Yesu alobaki na bango: — Soki Nzambe azalaki penza Tata na bino, bolingaki kolinga Ngai, pamba te nawutaki epai ya Nzambe, mpe ezali kolanda mokano na Ye nde nazali sik’oyo awa. Nayaki na ndenge na Ngai moko te, kasi Ye nde atindaki Ngai.
43 Why do ye not understand my speech? It is because ye cannot hear my speech.
Mpo na nini bozali kososola te elobeli na Ngai? Ezali mpo ete bozali kokoka te koyoka makambo oyo nazali koloba na bino.
44 Ye are of your father, the calumniator; and the lust of your father ye are disposed to do. He was from the beginning a manslayer, and abode not in the truth; for the truth is not in him, and when he speaketh a lie he speaketh from himself, for he is a liar, and the father of it.
Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.
45 But me, because I speak the truth, ye believe me not.
Kasi Ngai, lokola nalobi solo, yango wana bozali kondima Ngai te.
46 Which of you convicteth me of sin? And if I speak the truth, why do ye not believe me?
Nani kati na bino akoki kotalisa Ngai ete nasali masumu? Soki nalobaka solo, mpo na nini bondimaka Ngai te?
47 He that is of God, heareth the words of God. Therefore ye do not hear, because ye are not of God.
Moto oyo azali ya Nzambe ayokaka makambo oyo Nzambe alobaka; kasi soki bino boyokaka te, ezali mpo ete bozali ya Nzambe te.
48 The Jews answered, and said to him: Did we not well say, that thou art a Samaritan, and hast a demon?
Bayuda bazongiselaki Ye: — Omoni! Yango wana tolobaki na biso ete ozali moto ya Samari mpe ozali na molimo mabe kati na yo.
49 Jesus said to them: I have no demon: but I honor God; and ye contemn me.
Yesu azongisaki: — Nazali na molimo mabe te kati na Ngai. Ngai nazali nde kopesa Tata na Ngai lokumu, kasi bino bozali kotiola Ngai.
50 But I seek not my own glory: there is one that seeketh it, and judgeth.
Nalukaka lokumu na Ngai moko te; ezali na Moko oyo alukaka yango mpe asambisaka.
51 Verily, verily, I say to you: He that keepeth my word, will never see death. (aiōn )
Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo akobatela Liloba na Ngai kati na ye akotikala kokufa te. (aiōn )
52 The Jews say to him: Now we know, that thou hast a demon. Abraham is dead, and the prophets; yet thou sayest: He that keepeth my word, will never taste death. (aiōn )
Na yango, Bayuda balobaki na Ye: — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te! (aiōn )
53 Art thou greater than our father Abraham who is dead, or than the prophets who died? What dost thou make thyself?
Boni, yo okanisi ete oleki Abrayami, tata na biso, oyo akufa to mpe oleki basakoli nyonso oyo bakufa? Yango yo, ozali komimona nani?
54 Jesus said to them: If I glorify myself, my glory is nothing. It is my Father that glorifieth me, of whom ye say, He is our God.
Yesu azongiselaki bango: — Soki namipesaki Ngai moko lokumu, lokumu na Ngai elingaki kozala na tina te. Kasi ezali Tata na Ngai, Ye oyo bino bozali koloba ete azali Nzambe na bino, nde azali kopesa Ngai lokumu.
55 And ye know him not. But I know him; and if I should say, I know him not, I should be a liar, like you: but I do know him, and I observe his word.
Solo, bino, boyebi Ye te; kasi Ngai, nayebi Ye. Soki nameki koloba ete nayebi Ye te, wana nakozala mokosi lokola bino. Kasi nayebi Ye mpe nabatelaka Liloba na Ye.
56 Abraham your father desired to see my day: and he saw it, and rejoiced.
Tata na bino, Abrayami, atondaki na esengo, wana akanisaki ete akomona mokolo na Ngai. Amonaki yango mpe atondaki na esengo.
57 The Jews say to him: Thou art not yet fifty years old, and hast thou seen Abraham?
Bayuda balobaki na Ye: — Nini? Yo moto oyo okokisi nanu te ata mibu tuku mitano ya mbotama, ozali koloba ete omonaki Abrayami!
58 Jesus said to them: Verily, verily I say to you, That before Abraham existed, I was.
Yesu azongisaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: liboso ete Abrayami abotama, Ngai nazali.
59 And they took up stones to stone him. But Jesus concealed himself, and went out of the temple, and passed along among them, and went away.
Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.