< Ecclesiastes 3 >
1 For, every thing, there is a season, —and a time for every pursuit, under the heavens: —
Likambo nyonso ezalaka na tango na yango, mpe mosala nyonso ezalaka na ngonga na yango, na se ya moyi.
2 A time to be born, and a time to die, —A time to plant, and a time to uproot what is planted;
Ezali na tango ya kobotama mpe tango ya kokufa, tango ya kolona mpe tango ya kopikola oyo elonami;
3 A time to kill, and a time to heal, —A time to break down, and a time to build up;
tango ya koboma mpe tango ya kobikisa, tango ya kobuka mpe tango ya kotonga;
4 A time to weep, and a time to laugh, —A time to wail, and a time to dance for joy;
tango ya kolela mpe tango ya koseka, tango ya kosala matanga mpe tango ya kobina;
5 A time to cast away stones, and a time to heap up stones, —A time to embrace, and a time to be far from loving embrace;
tango ya kopanza mabanga mpe tango ya kosangisa yango, tango ya kopesa beze mpe tango ya kotika kopesa beze;
6 A time to seek, and a time to give up as lost, —A time to keep, and a time to cast away;
tango ya koluka mpe tango ya kobungisa, tango ya kobomba mpe tango ya kobwaka;
7 A time to rend, and a time to sew, —A time to be silent, and a time to speak;
tango ya kopasola mpe tango ya kobamba, tango ya kokanga monoko mpe tango ya koloba;
8 A time to love and a time to hate, —A time of war, and a time of peace.
tango ya kolinga mpe tango ya koyina, tango ya bitumba mpe tango ya kimia.
9 What profit hath he that worketh, in that wherein, himself, hath toiled?
Litomba nini mosali azwaka na mosala oyo amonelaka pasi?
10 I looked at the employment which God hath given to the sons of men, to work therein:
Natalaki mokumba oyo Nzambe amemisaki bato.
11 Everything, hath he made beautiful in its own time, —also, intelligence, hath he put in their heart, without which men could not find out the work which God hath wrought, from the beginning even unto the end.
Nzambe asalaka eloko na eloko malamu na tango na yango; atiaka lisusu, kati na mitema ya bato, posa ya koyeba mabombami na Ye. Nzokande, bato bakokaka te kososola mosala ya Nzambe, kobanda na ebandeli kino na suka.
12 I know that there is no blessedness in them, —save to be glad, and to do well with one’s life.
Nayebi ete ezali na eloko moko oyo eleki malamu mpo na bato: ezali kaka kosepela mpe kozala malamu tango bazali na bomoi.
13 Though indeed, that any man should eat and drink, and see blessedness, in all his toil, it is, the gift of God.
Yango wana, tika ete moto na moto alia, amela mpe amona bolamu kati na mosala na ye nyonso, pamba te ezali likabo ya Nzambe.
14 I know, that, whatsoever God doeth, the same, shall be age-abiding, unto it, there is nothing to add, and, from it, there is nothing to take away, —and, God, hath done it, that men should stand in awe before him.
Nayebi ete makambo nyonso oyo Nzambe asalaka ewumelaka seko; boye ezali ata na eloko moko te ya kobakisa na likolo na yango to ya kolongola kati na yango. Nzambe asalaka yango bongo mpo ete bakumisa Ye.
15 That which was, already, had been, and, that which shall be, already, shall have been, —but, God, seeketh that which hath been chased away.
Makambo oyo ezali lelo esila kozala na kala, mpe makambo oyo ekoya ezala wuta kala; Nzambe nde azongisaka makambo oyo esila koleka na tango ya kala.
16 Then, again, I saw under the sun, the place of justice, that there was lawlessness, and, the place of righteousness, that there was lawlessness.
Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi: ezala na esika oyo basambisaka bato, mabe ezali kaka; ezala na esika ya bosembo, mabe ezangaka te.
17 Said, I, in my heart, Both the righteous and the lawless, will God judge, —for [there will be] a time for every pursuit, and concerning every work—there.
Namilobelaki kati na ngai: « Nzambe akosambisa, ezala bato ya sembo to bato mabe, pamba te ezali na tango mpo na likambo moko na moko, mpe ezali na tango mpo na kosambisa likambo moko na moko. »
18 Said, I, in my heart, as concerning the sons of men, That God was minded to prove them, —and that they might see, that they were beasts, of themselves.
Namilobelaki lisusu: « Nzambe amekaka bato mpo ete bakoka komimona bango moko ete bazali lokola banyama.
19 For, as regardeth the destiny of the sons of men and the destiny of beasts, one fate, have they, as dieth the one, so, dieth the other, and, one spirit, have they all, —and, the pre-eminence of man over beast, is nothing, for, all, were vanity:
Suka ya moto ezali lokola suka ya nyama: bango mibale basukaka kaka ndenge moko; ndenge moko akufaka, mosusu mpe akufaka kaka bongo. Bango nyonso bazali kaka na pema moko: moto aleki nyama na eloko te. Nyonso wana ezali kaka pamba.
20 all, go unto one place, —all, came from the dust, and all, return to the dust.
Nyonso ekendaka kaka esika moko; nyonso ewutaki na putulu, mpe nyonso ekozonga kaka na putulu.
21 Who knoweth the spirit of the sons of men, whether it, ascendeth, above, —or the spirit of the beast, whether it, descendeth, below, to the earth?
Nani ayebi soki molimo ya moto emataka na likolo, mpe soki molimo ya nyama ekitaka na se ya mabele? »
22 So I saw, that there was nothing better than that a man should be glad in his works, for, that, is his portion, —for who can bring him in, to look upon that which shall be after him?
Boye, nasosolaki ete ezali na eloko moko te oyo eleki malamu mpo na moto, soki kaka te kosepela mpe komona bolamu na mosala na ye, pamba te yango nde ezali litomba na ye. Nani akoki kosunga ye mpo ete amona makambo oyo ekoya sima na ye?