< 1 Samuel 26 >
1 And the Ziphites came unto Saul in Gibeah, saying, —Is not David hiding himself in the hill of Hachilah, overlooking Jeshimon?
Bato ya Zifi bakendeki na Gibea epai ya Saulo, mpe balobaki: « Boni, oyebi ete Davidi abombami na likolo ya Akila, ngomba moke oyo etalani na Yeshimoni? »
2 Then Saul arose, and went down into the wilderness of Ziph, and, with him, three thousand chosen men of Israel, —to seek David in the wilderness of Ziph.
Boye Saulo atelemaki mpo na kokende na esobe ya Zifi elongo na basoda ya mpiko ya Isalaele, nkoto misato, mpo na koluka Davidi kati na esobe ya Zifi.
3 And Saul encamped in the hill of Hachilah, which overlooketh Jeshimon, by the way, —but, David, was staying in the wilderness, so he saw that Saul was coming after him into the wilderness.
Saulo atongaki molako na ye na likolo ya Akila, ngomba moke, oyo etalani na Yeshimoni, pembeni ya nzela. Na tango wana, Davidi azalaki kovanda kati na esobe. Lokola amonaki ete Saulo alandi ye kino na esobe,
4 David therefore sent runners, —and took knowledge that Saul had come, for a certainty.
Davidi atindaki banongi mpe, na nzela na bango, ayokaki ete Saulo akomi penza.
5 So then David arose, and came to the place where Saul had encamped, and David saw the place where Saul was lying, with Abner, son of Ner, prince of his host, —and, Saul, was lying within the circular trench, with, the people, encamped round about him.
Davidi atelemaki mpe akendeki na esika oyo Saulo atongaki molako na ye. Amonaki esika oyo Saulo mpe Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga na ye, balalaki. Saulo azalaki ya kolala na kati-kati ya molako, mpe basoda bazingelaki ye.
6 And David responded, and said unto Ahimelech the Hittite, and unto Abishai son of Zeruiah, brother of Joab, saying, Who will go down with me unto Saul, within the camp? And Abishai said, I, will go down with thee.
Davidi atunaki Ayimeleki, moto ya Iti, mpe Abishayi, mwana mobali ya Tseruya mpe ndeko mobali ya Joabi: — Nani kati na bino akoki kokende elongo na ngai kino na molako epai ya Saulo? Abishayi azongisaki: — Ngai, nakokende elongo na yo.
7 So David came, with Abishai, unto the people by night, and lo! Saul lying asleep, within the trench, and his spear stuck in the ground, at his head, —and Abner and the people lying round about him.
Boye Davidi mpe Abishayi bakomaki, na butu, na esika oyo basoda bazalaki. Bakutaki Saulo alali pongi na kati-kati ya molako, mpe likonga na ye epikamaki na mabele, na pembeni ya moto na ye. Abineri mpe basoda balalaki zingazinga na ye.
8 Then said Abishai unto David, God hath surrendered, to-day, thine enemy, into thy hand: Now, therefore, let me smite him, I pray thee, with the spear to the earth, at one stroke, I, will not do it twice.
Abishayi alobaki na Davidi: — Lelo, Nzambe akabi monguna na yo na maboko na yo. Pesa ngai sik’oyo nzela mpo ete natobola ye kaka mbala moko likonga na ngai mpe apikama na mabele, nakozongela yango te mbala mibale.
9 But David said unto Abishai, Do not destroy him, —for who that hath thrust forth his hand against the Anointed of Yahweh, shall be guiltless?
Kasi Davidi alobaki na Abishayi: — Te! Koboma ye te! Pamba te nani akosembola loboko na ye likolo ya mopakolami na Yawe mpe azanga kozwa etumbu?
10 And David said—By the life of Yahweh, surely, Yahweh himself, must smite him, —or, his day, must come that he die, or, into battle, must he go down, and be swept away.
Mpe Davidi alobaki lisusu: — Na Kombo na Yawe! Ye moko Yawe nde akoboma ye: akokufa, ezala soki tango na ye ya kokufa ekoki to soki akokende na bitumba.
11 Far be it from me, of Yahweh, that I should thrust forth my hand against the anointed of Yahweh! Now, therefore, take, I pray thee, the spear that is at his head, and the cruse of water, and let us go our way.
Kasi Yawe apekisi ngai kosembola loboko likolo ya mopakolami na Ye. Sik’oyo, zwa kaka likonga mpe eloko ya mayi oyo ezali pembeni ya moto na ye, mpe tokende na biso.
12 So David took the spear, and the cruse of water, from near the head of Saul, and they went their way, —and no man saw, and no man knew, and no man awoke, for all of them were sleeping, for, a deep sleep from Yahweh, had fallen upon them.
Boye Davidi azwaki likonga mpe eloko ya mayi oyo ezalaki pembeni ya moto ya Saulo, mpe bakendeki. Moto moko te amonaki mpe ayebaki likambo yango, mpe moko te alamukaki. Bato nyonso bazalaki ya kolala, pamba te Yawe alalisaki bango pongi makasi.
13 Then David crossed over to the other side, and took his stand on the top of the mountain, afar off, —a great space, being between them.
Davidi akatisaki lubwaku, akendeki na ngambo mosusu mpe atelemaki mosika, na songe ya ngomba, mosika penza ya molako.
14 And David cried aloud unto the people, and unto Abner son of Ner, saying, Wilt thou not answer, Abner? Then answered Abner, and said, Who art thou, that hast cried aloud unto the king?
Davidi abelelaki epai ya mampinga mpe epai ya Abineri, mwana mobali ya Neri; alobaki: — Abineri, okoyanola ngai? Abineri azongisaki: — Yo nani oyo ozali koganga na matoyi ya mokonzi?
15 And David said unto Abner—Art not thou, a man? Who indeed is like thee, in Israel? Wherefore, then, hast thou not kept watch over thy lord, the king? For one of the people hath entered, to destroy the king—thy lord.
Davidi alobaki na Abineri: — Ozali mobali, boye te? Nani akokani na yo kati na Isalaele? Mpo na nini obateli te mokonzi, nkolo na yo? Moto moko ayaki mpo na koboma mokonzi na yo.
16 Not good, is this thing which thou hast done, by the life of Yahweh, verily, worthy of death, ye are, in that ye have not kept watch over your lord, over, the Anointed of Yahweh. Now, therefore, see where the spear of the king is, and the cruse of water, that was at his head?
Likambo oyo osali ezali malamu te. Na Kombo na Yawe, yo mpe bato na yo bosengeli kokufa; pamba te bobateli te nkolo na bino, mopakolami na Yawe. Botala zingazinga na bino! Wapi likonga mpe eloko ya mayi ya mokonzi, oyo ezalaki pembeni ya moto na ye?
17 And Saul knew the voice of David, and said—Thy voice, is this, my son David? And David said, My voice, my lord O king!
Saulo asosolaki ete ezali mongongo ya Davidi mpe alobaki: — Oyo wana ezali mongongo na yo Davidi, mwana na ngai. Davidi azongisaki: — Solo, ezali mongongo na ngai, oh mokonzi, nkolo na ngai.
18 And he said, Wherefore is it, that my lord is in pursuit of his servant? For what have I done? or what is in my hand that is wrong?
Bongo Davidi alobaki lisusu: — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolanda mosali na ye? Nasali nini? Likambo nini ya mabe nasali mpo ete namema ngambo?
19 Now, therefore, I pray thee, let my lord the king hear the words of his servant, —If, Yahweh, have goaded thee on against me, let him accept the sweet smell of a gift, but, if the sons of men, accursed, they are before Yahweh, for they have driven me out, to-day, from joining myself with the inheritance of Yahweh, saying—Go, serve other gods!
Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai: « Kende kosalela banzambe mosusu. »
20 Now, therefore, let not my blood fall to the earth, away from the presence of Yahweh, —for the king of Israel hath come out to hunt for a single flea, as when one pursueth a partridge among the mountains.
Sik’oyo, tika ete makila na ngai esopana na mabele te, mosika na miso ya Yawe! Pamba te mokonzi ya Isalaele abimaki mpo na koluka ngenga kaka moko, ndenge balandaka soso ya zamba, na bangomba.
21 Then said Saul—I have sinned, Return, my son David, for I will harm thee no more, because my life was precious in thine eyes, this day, —lo! I have acted foolishly and, greatly, erred.
Boye Saulo alobaki: — Solo, nasali masumu! Davidi, mwana na ngai ya mobali, zonga! Mpo ete omonaki ete bomoi na ngai ezali motuya, nakomeka lisusu te kosala yo mabe. Nasalaki penza lokola moto ya liboma mpe napengwaki.
22 And David responded, and said, Lo! the spear of the king! Let, therefore, one of the young men come over, and fetch it.
Davidi azongisaki: — Likonga ya mokonzi, yango oyo! Tika ete moko kati na bilenge mibali na yo aya kozwa yango.
23 And let, Yahweh, give back to each man, his righteousness, and his faithfulness, —in that Yahweh delivered thee, to-day, into my hand, but I would not thrust forth my hand against the Anointed of Yahweh.
Yawe oyo afutaka moto nyonso kolanda bosembo mpe boyengebene na ye, akabaki yo na maboko na ngai lelo; kasi naboyaki kosembola loboko na ngai likolo ya mopakolami na Yawe.
24 Lo! then, as thy life was much set by this day in mine eyes, so, let my life be much set by in the eyes of Yahweh, and let him rescue me out of all tribulation.
Ndenge bomoi na yo ezalaki lelo motuya makasi na miso na ngai, ndenge wana mpe bomoi na ngai ekozala motuya makasi na miso ya Yawe, mpe akokangola ngai na pasi nyonso.
25 Then said Saul unto David—Blessed, be thou, my son David, thou shalt both, do, and shalt, prevail. And David went on his way, but, Saul, returned unto his own place.
Saulo alobaki na Davidi: — Tika ete opambolama, Davidi, mwana na ngai ya mobali! Solo, okosala penza makambo minene mpe, solo, okolonga. Bongo Davidi akobaki nzela na ye, mpe Saulo azongaki epai na ye.