< Numbers 33 >

1 These are the journeys of the children of Israel, when they went forth out of the land of Egypt by their hosts under the hand of Moses and Aaron.
Tala bisika oyo bana ya Isalaele batongaki milako na bango tango bazalaki na mobembo wuta na mokili ya Ejipito. Bazalaki kotambola na molongo ya bitumba na bokambami ya Moyize mpe Aron.
2 And Moses wrote their goings out according to their journeys by the commandment of the LORD: and these are their journeys according to their goings out.
Moyize akomaki na mokanda bisika nyonso oyo bazalaki koleka na etinda ya Yawe. Tala bakombo ya moko na moko ya bisika yango:
3 And they journeyed from Rameses in the first month, on the fifteenth day of the first month; on the morrow after the passover the children of Israel went out with an high hand in the sight of all the Egyptians,
Bana ya Isalaele balongwaki na Ramisesi na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya liboso; ezalaki mokolo oyo elandaki mokolo ya Pasika. Babimaki na matata te na miso ya bato nyonso ya Ejipito,
4 while the Egyptians were burying all their firstborn, which the LORD had smitten among them: upon their gods also the LORD executed judgments.
wana bato ya Ejipito bazalaki kokunda bibembe ya bana mibali na bango ya liboso oyo Yawe abetaki mpo na kopesa etumbu na banzambe na bango.
5 And the children of Israel journeyed from Rameses, and pitched in Succoth.
Tango balongwaki na Ramisesi, bana ya Isalaele bakendeki kotonga molako na bango na Sukoti.
6 And they journeyed from Succoth, and pitched in Etham, which is in the edge of the wilderness.
Kolongwa na Sukoti, bakendeki kotonga molako na bango na Etami, pene ya mondelo ya esobe.
7 And they journeyed from Etham, and turned back unto Pi-hahiroth, which is before Baal-zephon: and they pitched before Migdol.
Tango balongwaki na Etami, bazongaki na ngambo ya Pi-Ayiroti oyo etalana na Bala-Tsefoni, mpe batongaki molako na bango liboso ya Migidoli.
8 And they journeyed from before Hahiroth, and passed through the midst of the sea into the wilderness: and they went three days’ journey in the wilderness of Etham, and pitched in Marah.
Kolongwa na Pi-Ayiroti, bakatisaki ebale monene mpe bakomaki na esobe; batambolaki mikolo misato na esobe ya Etami mpe batongaki molako na bango, na Mara.
9 And they journeyed from Marah, and came unto Elim: and in Elim were twelve springs of water, and threescore and ten palm trees; and they pitched there.
Kolongwa na Mara, bakomaki na Elimi epai wapi bakutaki bitima zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo; batongaki molako na bango kuna.
10 And they journeyed from Elim, and pitched by the Red Sea.
Kolongwa na Elimi, bakendeki kotonga molako na bango pene ya ebale monene ya barozo.
11 And they journeyed from the Red Sea, and pitched in the wilderness of Sin.
Kolongwa na ebale monene ya barozo, bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Tsini.
12 And they journeyed from the wilderness of Sin, and pitched in Dophkah.
Kolongwa na esobe ya Tsini, bakendeki kotonga molako na bango na Dofika.
13 And they journeyed from Dophkah, and pitched in Alush.
Kolongwa na Dofika, bakendeki kotonga molako na bango na Alushi.
14 And they journeyed from Alush, and pitched in Rephidim, where was no water for the people to drink.
Kolongwa na Alushi, bakendeki kotonga molako na bango na Refidimi epai wapi bato bazangaki mayi ya komela.
15 And they journeyed from Rephidim, and pitched in the wilderness of Sinai.
Kolongwa na Refidimi, bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Sinai.
16 And they journeyed from the wilderness of Sinai, and pitched in Kibroth-hattaavah.
Kolongwa na esobe ya Sinai, bakendeki kotonga molako na bango na Kibiroti-Atava.
17 And they journeyed from Kibroth-hattaavah, and pitched in Hazeroth.
Kolongwa na Kibiroti-Atava, bakendeki kotonga molako na bango na Atseroti.
18 And they journeyed from Hazeroth, and pitched in Rithmah.
Kolongwa na Atseroti, bakendeki kotonga molako na bango na Ritima.
19 And they journeyed from Rithmah, and pitched in Rimmon-perez.
Kolongwa na Ritima, bakendeki kotonga molako na bango na Rimoni-Peretsi.
20 And they journeyed from Rimmon-perez, and pitched in Libnah.
Kolongwa na Rimoni-Peretsi, bakendeki kotonga molako na bango na Libina.
21 And they journeyed from Libnah, and pitched in Rissah.
Kolongwa na Libina, bakendeki kotonga molako na bango na Risa.
22 And they journeyed from Rissah, and pitched in Kehelathah.
Kolongwa na Risa, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Keyelata.
23 And they journeyed from Kehelathah, and pitched in mount Shepher.
Kolongwa na ngomba Keyelata, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Seferi.
24 And they journeyed from mount Shepher, and pitched in Haradah.
Kolongwa na ngomba Seferi, bakendeki kotonga molako na bango na Arada.
25 And they journeyed from Haradah, and pitched in Makheloth.
Kolongwa na Arada, bakendeki kotonga molako na bango na Makeyeloti.
26 And they journeyed from Makheloth, and pitched in Tahath.
Kolongwa na Makeyeloti, bakendeki kotonga molako na bango na Taati.
27 And they journeyed from Tahath, and pitched in Terah.
Kolongwa na Taati, bakendeki kotonga molako na bango na Tera.
28 And they journeyed from Terah, and pitched in Mithkah.
Kolongwa na Tera, bakendaki kotonga molako na bango na Mitika.
29 And they journeyed from Mithkah, and pitched in Hashmonah.
Kolongwa na Mitika, bakendaki kotonga molako na bango na Ashimona.
30 And they journeyed from Hashmonah, and pitched in Moseroth.
Kolongwa na Ashimona, bakendeki kotonga molako na bango na Moseroti.
31 And they journeyed from Moseroth, and pitch in Bene-jaakan.
Kolongwa na Moseroti, bakendeki kotonga molako na bango na Bene-Yaakani.
32 And they journeyed from Bene-jaakan, and pitched in Hor-haggidgad.
Kolongwa na Bene-Yaakani, bakendeki kotonga molako na bango na Ori-Gidigadi.
33 And they journeyed from Hor-haggidgad, and pitched in Jotbathah.
Kolongwa na Ori-Gidigadi, bakendeki kotonga molako na bango na Yotibata.
34 And they journeyed from Jotbathah, and pitched in Abronah.
Kolongwa na Yotibata, bakendeki kotonga molako na bango na Abrona.
35 And they journeyed from Abronah, and pitched in Ezion-geber.
Kolongwa na Abrona, bakendeki kotonga molako na bango na Etsioni-Geberi.
36 And they journeyed from Ezion-geber, and pitched in the wilderness of Zin (the same is Kadesh).
Kolongwa na Etsioni-Geberi, bakendeki kotonga molako na bango na Kadeshi, na esobe ya Tsini.
37 And they journeyed from Kadesh, and pitched in mount Hor, in the edge of the land of Edom.
Kolongwa na Kadeshi, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Ori, na mondelo ya Edomi.
38 And Aaron the priest went up into mount Hor at the commandment of the LORD, and died there, in the fortieth year after the children of Israel were come out of the land of Egypt, in the fifth month, on the first day of the month.
Ezali kuna na ngomba Ori nde, kolanda etinda ya Yawe, Nganga-Nzambe Aron amataki mpe akufaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, sima na mibu tuku minei wuta bana ya Isalaele babimaki na Ejipito.
39 And Aaron was an hundred and twenty and three years old when he died in mount Hor.
Aron azalaki na mibu ya mbotama nkama moko na tuku mibale na misato tango akufaki likolo ya ngomba Ori.
40 And the Canaanite, the king of Arad, which dwelt in the South in the land of Canaan, heard of the coming of the children of Israel.
Boye, mokonzi ya Aradi, moto ya mboka Kanana, oyo azalaki kovanda na Negevi ya mboka Kanana, ayokaki sango ya koya ya bana ya Isalaele.
41 And they journeyed from mount Hor, and pitched in Zalmonah.
Tango balongwaki na ngomba Ori, bakendeki kotonga molako na bango na Tsalimona.
42 And they journeyed from Zalmonah, and pitched in Punon.
Kolongwa na Tsalimona, bakendeki kotonga molako na bango na Punoni.
43 And they journeyed from Punon, and pitched in Oboth.
Kolongwa na Punoni, bakendeki kotonga molako na bango na Oboti.
44 And they journeyed from Oboth, and pitched in Iye-abarim, in the border of Moab.
Kolongwa na Oboti, bakendeki kotonga molako na bango na Iye-Abarimi, na mondelo ya Moabi.
45 And they journeyed from Iyim, and pitched in Dibon-gad.
Kolongwa na Iye-Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na Diboni-Gadi.
46 And they journeyed from Dibon-gad, and pitched in Almon-diblathaim.
Kolongwa na Diboni-Gadi, bakendeki kotonga molako na bango na Alimoni-Dibilatayimi.
47 And they journeyed from Almon-diblathaim, and pitched in the mountains of Abarim, before Nebo.
Kolongwa na Alimoni-Dibilatayimi, bakendeki kotonga molako na bango na bangomba Abarimi, pembeni ya Nebo.
48 And they journeyed from the mountains of Abarim, and pitched in the plains of Moab by the Jordan at Jericho.
Kolongwa na bangomba Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na bitando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalana na Jeriko.
49 And they pitched by Jordan, from Beth-jeshimoth even unto Abel-shittim in the plains of Moab.
Batongaki molako na bango pembeni ya Yordani, kolongwa na Beti-Yeshimoti kino na Abele-Shitimi, na etando ya Moabi.
50 And the LORD spake unto Moses in the plains of Moab by the Jordan at Jericho, saying,
Na bitando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalana na Jeriko, Yawe alobaki na Moyize:
51 Speak unto the children of Israel, and say unto them, When ye pass over Jordan into the land of Canaan,
« Loba na bana ya Isalaele, mpe yebisa bango: ‹ Tango bokokatisa ebale Yordani mpo na kokota na mokili ya Kanana,
52 then ye shall drive out all the inhabitants of the land from before you, and destroy all their figured [stones], and destroy all their molten images, and demolish all their high places:
bokobengana bato nyonso oyo bavandaka na mboka yango, bokosilisa kobuka banzambe nyonso ya bikeko oyo basala na mabanga, na bibende banyangwisa na moto mpe bokobebisa bisambelo na bango nyonso ya likolo ya bangomba.
53 and ye shall take possession of the land, and dwell therein: for unto you have I given the land to possess it.
Bokobotola mokili yango mpe bokokoma kovanda kuna, pamba te napesi bino mokili yango mpo ete bobotola yango.
54 And ye shall inherit the land by lot according to your families; to the more ye shall give the more inheritance, and to the fewer thou shalt give the less inheritance: wheresoever the lot falleth to any man, that shall be his; according to the tribes of your fathers shall ye inherit.
Bokokabola na kobeta zeke mabele ya mokili oyo ezali libula na bino: libota oyo eleki monene ekozwa mpe eteni ya mabele oyo eleki monene; libota ya moke, ekozwa mpe eteni ya mabele ya moke. Libota moko na moko ekozwa eteni na yango ya mabele na esika oyo zeke ekokweya. Bokokabola yango kolanda masanga ya bituka na bino.
55 But if ye will not drive out the inhabitants of the land from before you; then shall those which ye let remain of them be as pricks in your eyes, and as thorns in your sides, and they shall vex you in the land wherein ye dwell.
Kasi soki bobengani te bavandi ya mokili yango, ba-oyo bakotikala bakokoma lokola banzube na miso na bino mpe lokola basende na mipanzi na bino. Bakomonisa bino pasi na mokili oyo bokovanda.
56 And it shall come to pass, that as I thought to do unto them, so will I do unto you.
Boye, nakosala bino ndenge nakanaki kosala bango. › »

< Numbers 33 >