< Matthew 11 >
1 And it came to pass, when Jesus had made an end of commanding his twelve disciples, he departed thence to teach and preach in their cities.
Tango Yesu asilisaki kopesa mitindo epai ya bayekoli na Ye zomi na mibale, alongwaki wana, akendeki koteya mpe kopanza Sango Malamu kati na bingumba na bango.
2 Now when John heard in the prison the works of the Christ, he sent by his disciples,
Wana Yoane Mobatisi azalaki kati na boloko, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo Klisto azalaki kosala; atindaki bayekoli na ye
3 and said unto him, Art thou he that cometh, or look we for another?
kotuna epai ya Yesu: — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu?
4 And Jesus answered and said unto them, Go your way and tell John the things which ye do hear and see:
Yesu azongiselaki bango: — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bozali komona mpe koyoka:
5 the blind receive their sight, and the lame walk, the lepers are cleansed, and the deaf hear, and the dead are raised up, and the poor have good tidings preached to them.
bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.
6 And blessed is he, whosoever shall find none occasion of stumbling in me.
Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai!
7 And as these went their way, Jesus began to say unto the multitudes concerning John, What went ye out into the wilderness to behold? a reed shaken with the wind?
Wana bayekoli ya Yoane bazalaki kozonga, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane; atunaki bango: — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai?
8 But what went ye out for to see? a man clothed in soft [raiment]? Behold, they that wear soft [raiment] are in kings’ houses.
Soki mwa nzete yango te, bokendeki penza kotala nini? Moto moko alati bilamba ya kitoko? Te! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko bavandaka na bandako ya bakonzi.
9 But wherefore went ye out? to see a prophet? Yea, I say unto you, and much more than a prophet.
Kasi bino, bokendeki penza kotala nini kati na esobe? Mosakoli? Solo, nazali koloba na bino penza ya solo: aleki kutu ata mosakoli.
10 This is he, of whom it is written, Behold, I send my messenger before thy face, Who shall prepare thy way before thee.
Pamba te, azali moto oyo bakoma na tina na ye: « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo mpo na kobongisela Yo nzela. »
11 Verily I say unto you, Among them that are born of women there hath not arisen a greater than John the Baptist: yet he that is but little in the kingdom of heaven is greater than he.
Nazali koloba na bino penza ya solo: kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane Mobatisi na monene; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Likolo aleki Yoane Mobatisi na monene.
12 And from the days of John the Baptist until now the kingdom of heaven suffereth violence, and men of violence take it by force.
Wuta na tango oyo Yoane Mobatisi azalaki koteya kino sik’oyo, kokota na Bokonzi ya Likolo ezali likambo ya koyika mpiko, mpe ezali kaka bato oyo bazali kobunda na kondima nde bazali kokota kuna.
13 For all the prophets and the law prophesied until John.
Pamba te basakoli nyonso mpe Mobeko basakolaki yango bango nyonso kino na tango ya Yoane.
14 And if ye are willing to receive [it], this is Elijah, which is to come.
Mpe, soki bokoki kondima, boyeba ete ye nde azali Eliya oyo asengeli koya.
15 He that hath ears to hear, let him hear.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
16 But whereunto shall I liken this generation? It is like unto children sitting in the marketplaces, which call unto their fellows,
Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo? Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga epai ya bamosusu:
17 and say, We piped unto you, and ye did not dance; we wailed, and ye did not mourn.
« Tobetaki baflite, kasi bobinaki te; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki-lelaki te. »
18 For John came neither eating nor drinking, and they say, He hath a devil.
Pamba te, tango Yoane ayaki, azalaki kolia te mpe azalaki komela vino te; mpe balobaki: « Azali na molimo mabe kati na ye! »
19 The Son of man came eating and drinking, and they say, Behold, a gluttonous man, and a winebibber, a friend of publicans and sinners! And wisdom is justified by her works.
Mpe awa Mwana na Moto mpe ayei, azali kolia mpe azali komela; kasi bazali koloba: « Azali na lokoso ya kolia mpe azali molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu. » Nzokande, misala ya bwanya etalisaka solo ete ezali sembo.
20 Then began he to upbraid the cities wherein most of his mighty works were done, because they repented not.
Bongo Yesu apamelaki bingumba epai wapi asalaki mingi kati na bikamwa na Ye, pamba te bavandi na yango babongolaki mitema te.
21 Woe unto thee, Chorazin! woe unto thee, Bethsaida! for if the mighty works had been done in Tyre and Sidon which were done in you, they would have repented long ago in sackcloth and ashes.
Alobaki: — Mawa na yo, Korazini! Mawa na yo, Betisaida! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu!
22 Howbeit I say unto you, it shall be more tolerable for Tyre and Sidon in the day of judgment, than for you.
Yango wana, nazali koloba na bino: na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.
23 And thou, Capernaum, shalt thou be exalted unto heaven? thou shalt go down unto Hades: for if the mighty works had been done in Sodom which were done in thee, it would have remained until this day. (Hadēs )
Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo? Te! Okokitisama kino na mboka ya bakufi! Pamba te, soki bikamwa oyo esalemaki kati na yo esalemaki kati na Sodome, mbele Sodome ezali kowumela kino na mokolo ya lelo. (Hadēs )
24 Howbeit I say unto you, that it shall be more tolerable for the land of Sodom in the day of judgment, than for thee.
Yango wana, nazali koloba na bino: na mokolo ya kosambisama, etumbu na yo ekozala makasi koleka etumbu mokili ya Sodome.
25 At that season Jesus answered and said, I thank thee, O Father, Lord of heaven and earth, that thou didst hide these things from the wise and understanding, and didst reveal them unto babes:
Kaka na tango yango, Yesu alobaki: — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike!
26 yea, Father, for so it was well-pleasing in thy sight.
Iyo, Tata, pamba te, kati na boboto na Yo, olingaki ete esalema bongo!
27 All things have been delivered unto me of my Father: and no one knoweth the Son, save the Father; neither doth any know the Father, save the Son, and he to whomsoever the Son willeth to reveal [him].
Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.
28 Come unto me, all ye that labour and are heavy laden, and I will give you rest.
Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba; Ngai, nakopesa bino bopemi.
29 Take my yoke upon you, and learn of me; for I am meek and lowly in heart: and ye shall find rest unto your souls.
Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi.
30 For my yoke is easy, and my burden is light.
Solo, ekangiseli na Ngai ezali pasi te, mpe mokumba na Ngai ezali pepele.