< 1 Corinthians 6 >

1 Can it be that, when one of you has a dispute with another, they dare to have their case tried before the heathen, instead of before Christ’s people?
Soki ndeko moko kati na bino azwi ndeko mosusu likambo, mpo na nini akendaka kofunda yango epai ya Bapagano, na esika ete akende kofunda epai ya basantu?
2 Don’t you know that Christ’s people will try the world? And if the world is to be tried by you, are you unfit to try the most trivial cases?
Boyebi te ete basantu bakosambisa mokili? Bongo soki bosengeli kosambisa mokili, bozangi penza makoki ya kokata mwa makambo ya mike-mike?
3 Don’t you know that we are to try angels – to say nothing of the affairs of this life?
Boyebi te ete tokosambisa ba-anjelu? Bongo mpo na nini te makambo ya bomoi oyo?
4 Why, then, if you have cases relating to the affairs of this life, do you set to try them those who carry no weight with the church? To your shame I ask it.
Tango bobendanaka na tina na makambo ya bomoi oyo, bozwaka lokola basambisi, bato oyo bazali na tina te na miso ya Lingomba!
5 Can it be that there is not one among you wise enough to decide between two of their fellow followers?
Nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni! Boni, ezali ata na moto moko te ya bwanya kati na bino, oyo akoki kokata makambo kati na bandeko na ye?
6 Must a follower sue a fellow follower? In front of unbelievers?
Kasi mpo na nini ndeko moko akende kofunda ndeko mosusu, mpe asala yango liboso ya Bapagano?
7 To begin with, it is undoubtedly a loss to you to have lawsuits with one another. Why not rather let yourselves be wronged? Why not rather let yourselves be cheated?
Solo, awa bozali kofundana bino na bino, boyeba ete bosili komikweyisa. Mpo na nini bondimaka te ete basala bino mabe? Mpo na nini bondimaka te ete bakosa bino?
8 Instead of this, you wrong and cheat others yourselves – yes, even other followers!
Nzokande, bino, bokosaka mpe bosalaka mabe; mpe bosalaka yango epai ya bandeko na bino.
9 Don’t you know that wrongdoers will have no share in God’s kingdom? Do not be deceived. No one who is immoral, or an idolater, or an adulterer, or licentious, or a sexual pervert,
Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe? Bomikosa te: bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali,
10 or a thief, or covetous, or a drunkard, or abusive, or grasping, will have any share in God’s kingdom.
miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, bato oyo bakoselaka baninga makambo mpo na kobebisa lokumu na bango, ba-oyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.
11 Such some of you used to be; but you washed yourselves clean. You became Christ’s people! You were pronounced righteous through the name of our Lord Jesus Christ, and through the Spirit of our God!
Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.
12 Everything is allowable for me! Yes, but everything is not profitable. Everything is allowable for me! Yes, but for my part, I will not let myself be enslaved by anything.
Bolobaka: « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » kasi nyonso ezali na litomba te; « nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » kasi nakomitika te na se ya bokonzi ya eloko songolo;
13 Food exists for the stomach, and the stomach for food; but God will put an end to both the one and the other. The body, however, exists, not for immorality, but for the Lord, and the Lord for the body;
« bilei esalema mpo na libumu, mpe libumu esalema mpo na bilei, » nzokande ezali na mokolo oyo Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalema te mpo na pite, nzoto ezali nde mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto.
14 and, as God has raised the Lord, so he will raise us up also by the exercise of his power.
Solo, lokola Nzambe asekwisaki Nkolo kati na bakufi, akosekwisa mpe biso, na nguya na Ye.
15 Don’t you know that your bodies are Christ’s members? Am I, then, to take the members that belong to the Christ and make them the members of a prostitute? Heaven forbid!
Boyebi te ete banzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto? Boni, nakoki kozwa biteni ya nzoto ya Klisto mpo na kokomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba? Ata moke te!
16 Or don’t you know that a man who unites himself with a prostitute is one with her in body (for ‘the two,’ it is said, ‘will become one’);
Boyebi te ete moto oyo asangani na mwasi ya ndumba akomi elongo na ye nzoto moko? Pamba te elobama: « Bango mibale bakokoma nzoto moko. »
17 while a man who is united with the Lord is one with him in spirit?
Kasi moto oyo asangani na Nkolo azali moko na Ye kati na Molimo.
18 Shun all immorality. Every other sin that people commit is something outside the body; but an immoral person sins against their own body.
Yango wana, bokima pite. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali na libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo amipesi na kindumba asali masumu mpo na libebi ya nzoto na ye moko.
19 Again, don’t you know that your body is a shrine of the Holy Spirit that is within you – the Spirit which you have from God?
Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te?
20 Moreover, you are not your own masters; you were bought, and the price was paid. Therefore, honor God in your bodies.
Bosikolamaki na motuya makasi penza. Boye, bopesa Nzambe nkembo kati na banzoto na bino.

< 1 Corinthians 6 >