< Romans 5 >
1 Therefore being accepted as righteous through faith, we have peace with God through our Lord Jesus Christ;
Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto
2 through whom also we have had admission into this grace in which we stand, and rejoice in the hope of the glory which God will confer.
oyo na nzela na Ye, tozwi ndingisa, na nzela ya kondima, ya kozwa ngolu oyo kati na yango tozali kowumela mpe tozali komikumisa kati na elikya ete tokobika nkembo ya Nzambe.
3 And not only so, but we rejoice in afflictions also, knowing that affliction produceth endurance,
Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko,
4 and endurance proof [[of faith]], and proof [[of faith giveth]] hope;
koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya.
5 and hope will not disappoint us; because the love of God hath been shed abroad in our hearts by the Holy Spirit which hath been given to us.
Nzokande, elikya ekosaka te, pamba te Nzambe asopaki bolingo na Ye kati na mitema na biso na nzela ya Molimo Mosantu oyo Ye Nzambe apesaki biso.
6 For while we were yet without strength, in due season Christ died for the ungodly.
Solo, wana tozalaki nanu bato na bolembu, Klisto akufaki mpo na bato ya masumu, na tango oyo Nzambe abongisaki.
7 Now hardly for a righteous man will one die; perhaps, however, for a benefactor one might even dare to die.
Ezali pasi komona moto kondima kokufa mpo na moto ya sembo; tango mosusu, moto akoki kondima kokufa mpo na moto ya malamu.
8 But God commendeth his love toward us, in that, while we were yet sinners, Christ died for us.
Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye: wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.
9 Much more then, being now accepted as righteous through his blood, we shall be saved through him from the [[coming]] wrath.
Lokola tokomi sik’oyo bato ya sembo na nzela ya makila na Ye, Klisto akobikisa biso mpe na kanda ya Nzambe.
10 For if while enemies we were reconciled to God through the death of his Son, much more having been reconciled shall we be saved by his life;
Solo, wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, Ye moko Nzambe azongisaki boyokani na biso elongo na Ye na nzela ya kufa ya Mwana na Ye. Boye lokola azongisi boyokani yango, akobikisa biso mpe na nzela ya bomoi ya mwana na Ye.
11 and not this only, but also having joy in God through our Lord Jesus Christ, through whom we have now received the reconciliation.
Yango kaka te! Tozali mpe komikumisa kati na Nzambe na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo azongisi boyokani na biso elongo na Nzambe.
12 So then as through one man sin entered into the world, and through sin death, and thus [[death]] came through unto all men, because all sinned—
Yango wana, ndenge lisumu ekotaki na mokili na nzela ya moto moko, mpe kufa na nzela ya lisumu, ndenge wana mpe kufa ekangaki bato nyonso na nzela ya lisumu, pamba te bato nyonso basalaki masumu.
13 (for all the time before the Law sin was in the world; but sin is not set to one's account when there is no law.
Solo, liboso ete Nzambe apesa Mobeko, lisumu ezalaki kati na mokili, kasi lisumu ekoki kotangama te soki Mobeko ezali te.
14 Yet death reigned from Adam to Moses, even over those who had not sinned in the manner in which Adam transgressed; who is a type of him who was to come.—
Nzokande, wuta na tango ya Adamu kino na tango ya Moyize, kufa ezalaki na bokonzi ata epai ya bato oyo basalaki masumu te, na lolenge ya Adamu oyo abukaki mobeko mpe azali elilingi ya moto oyo asengelaki koya.
15 But the free gift was not as the transgression. For if through the offence of the one the many died, much more hath the grace of God, and the gift which is by the grace of the one man Jesus Christ, abounded to the many.
Kasi ezali na bokeseni monene kati na likabo ya ofele ya Nzambe mpe lisumu! Pamba te soki lisumu ya moto moko ememelaki bato ebele kufa, ngolu ya Nzambe mpe likabo ya ofele oyo eyaki na nzela ya ngolu ya moto moko, Yesu-Klisto, efulukaki meke mpo na bato ebele.
16 And the free gift is not like what happened through one man who sinned. For sentence of condemnation followed one offence; but the free gift is a justification after many offences.
Likabo ya Nzambe ezali na motuya makasi koleka mabe ya lisumu ya moto moko: likolo ya lisumu moko, kosambisama eyei mpe ememi etumbu; kasi likolo ya masumu ebele, likabo ya ngolu eyei mpe elongoli etumbu.
17 For if by one trespass death reigned through the one man, much more will they who receive the abundance of grace and of the gift of righteousness reign in life through the one man Jesus Christ.)—
Pamba te soki na nzela ya mabe ya moto moko, kufa ezwaki bokonzi likolo ya moto wana se moko, ndenge nini bato oyo bazwaka bomengo ya ngolu ya Nzambe mpe likabo ya bosembo bazala na bokonzi te kati na bomoi na nzela ya Yesu-Klisto Ye moko!
18 As then through one trespass all men have come under condemnation, so through one act of righteousness all obtain the gift of righteousness unto life.
Na mokuse, ndenge mabe ya moto moko ememelaki bato nyonso etumbu, ndenge wana mpe mosala ya moto moko mpo na kokokisa bosembo ememeli bato nyonso bonsomi mpe bomoi.
19 For as through the disobedience of the one man the many were made sinners, so through the obedience of the one man will the many be made righteous.
Pamba te ndenge kozanga botosi ya moto moko ekomisaki bato ebele bato ya masumu, ndenge wana mpe botosi ya moto moko ekomisi bato ebele bato ya sembo.
20 Moreover the law came in in addition, that the trespass might abound; but where sin abounded, grace abounded much more;
Mobeko eyaki mpo ete lisumu ebotana. Kasi epai lisumu ebotanaki, ngolu efulukaki koleka
21 that as sin reigned in death, so grace might reign through righteousness to everlasting life, through Jesus Christ our Lord. (aiōnios )
mpo ete, ndenge lisumu elakisaki bokonzi na yango na nzela ya kufa, ngolu mpe elakisa bokonzi na yango na nzela ya bosembo mpo na komema na bomoi ya seko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso. (aiōnios )