< Psalms 86 >
1 “A prayer of David.” Incline thine ear, O LORD! and hear me, For I am poor and distressed!
Libondeli ya Davidi. Yawe, yoka mpe yanola ngai; pamba te nazali mobola mpe moto akelela.
2 Preserve my life, for I am devoted to thee! Save, O thou my God! thy servant who trusteth in thee!
Batela bomoi na ngai, pamba te nazali moyengebene na Yo. Yo, Nzambe na ngai, bikisa ngai, mosali na Yo, oyo natiaka elikya kati na Yo.
3 Have pity upon me, O Lord! For to thee do I cry daily!
Oh Nkolo, yokela ngai mawa; pamba te nabelelaka Yo tango nyonso!
4 Revive the soul of thy servant, For to thee, O Lord! do I lift up my soul!
Nkolo, sepelisa motema na ngai, mosali na Yo, pamba te natombolaka molimo na ngai epai na Yo.
5 For thou, Lord, art good, and ready to forgive; Yea, rich in mercy to all that call upon thee!
Nkolo, ozali malamu, olimbisaka, otonda na bolingo mpo na bato nyonso oyo babelelaka Yo.
6 Give ear, O LORD! to my prayer, And attend to the voice of my supplication!
Yawe, yoka losambo na ngai, yoka libondeli na ngai!
7 In the day of my trouble I call upon thee, For thou dost answer me!
Na mokolo ya pasi na ngai, nabelelaka Yo, pamba te oyanolaka ngai.
8 Among the gods there is none like thee, O Lord! And there are no works like thy works!
Nkolo, nzambe moko te ekokani na Yo, kati na banzambe; moko te ekoki kosala makambo oyo Yo osalaka.
9 All the nations which thou hast made must come and worship before thee, O Lord! And glorify thy name!
Nkolo, bikolo nyonso oyo osala ekoya kogumbama liboso na Yo mpe ekoya kopesa Kombo na Yo nkembo.
10 For great art thou, and wondrous are thy works; Thou alone art God!
Pamba te ozali monene mpe osalaka bikamwa; Yo kaka nde ozali Nzambe.
11 Teach me, O LORD! thy way, That I may walk in thy truth; Unite all my heart to fear thy name!
Yawe, lakisa ngai nzela na Yo, mpe nakotambola kolanda bosolo na Yo. Pesa ngai motema ya sembo mpo ete natosa Yo.
12 I will praise thee, O Lord, my God! with my whole heart; I will give glory to thy name for ever!
Nkolo, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo, na motema na ngai mobimba, nakopesa Kombo na Yo nkembo mpo na Yo libela.
13 For thy kindness to me hath been great; Thou hast delivered me from the depths of the underworld! (Sheol )
Pamba te bolingo na Yo mpo na ngai ezali monene, mpe okangolaki ngai wuta na mozindo ya mboka ya bakufi. (Sheol )
14 O God! the proud have risen against me; Bands of cruel men seek my life, And set not thee before their eyes.
Nzambe, bato ya lofundu bazali kobundisa ngai, mpe ngulupa ya bato na kanza bazali koluka koboma ngai; batosaka Yo ata moke te.
15 But thou, O Lord! art a God full of compassion and kindness, Long-suffering, rich in mercy and truth!
Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambe na mawa mpe na ngolu, osilikaka noki te, otonda na bolingo mpe na boyengebene.
16 Look upon me, and have compassion upon me! Give thy strength to thy servant, And save the son of thy handmaid!
Balola elongi na Yo epai na ngai mpe yokela ngai mawa; pesa ngai, mosali na Yo, makasi mpe bikisa ngai mwana ya mwasi mosali na Yo!
17 Show me a token for good, That my enemies may see it and be confounded; Because thou, O LORD! helpest and comfortest me!
Salela ngai elembo ya boboto na Yo mpo ete banguna na ngai bamona yango mpe bakufa soni! Yawe, ozali Mosungi mpe Mobondi na ngai.