< Luke 1 >
1 Inasmuch as many have undertaken to arrange a narrative of those things which are fully believed among us,
Bato mingi bamekaki kokoma makambo oyo elekaki kati na biso,
2 even as they were delivered to us by those who were eye-witnesses from the beginning and became ministers of the word,
kolanda ndenge bayebisaki biso yango na bato oyo, wuta na ebandeli, bamonaki yango na miso mpe bakomaki basali ya Liloba na Nzambe.
3 it seemed good to me also, having accurately traced up all things from the first, to write to thee a connected account, most excellent Theophilus,
Yango wana, ngai mpe, sima na ngai kotuna-tuna mpo na koluka koyeba malamu makambo nyonso, banda na ebandeli, namonaki lisusu ete ezali malamu mpo na ngai kokomela yo yango ndenge elandanaki, Teofile ya lokumu,
4 that thou mightst know the exact truth with regard to those things in which thou wast instructed.
mpo ete oyeba bosolo ya malakisi oyo ozwaki.
5 There was in the days of Herod, king of Judaea, a certain priest named Zachariah, of the course of Abijah; and he had a wife of the daughters of Aaron, and her name was Elizabeth.
Na tango oyo Erode azalaki mokonzi ya Yuda, ezalaki na Nganga-Nzambe moko, kombo na ye ezalaki « Zakari; » azalaki moko kati na Banganga-Nzambe ya lisanga ya Abiya. Mwasi na ye, Elizabeti, azalaki mokitani ya Aron.
6 And they were both righteous in the sight of God, walking in all the commandments and ordinances of the Lord blameless.
Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa, na ndenge esengeli, mibeko nyonso mpe mitindo nyonso ya Nkolo.
7 And they had no child, because Elizabeth was barren, and they were both far advanced in years.
Kasi bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki ekomba; mpe bango mibale bakomaki mibange.
8 And it came to pass, that, while he was serving as priest before God in the order of his course,
Mokolo moko, wana Zakari azalaki kosala mosala na ye lokola Nganga-Nzambe, liboso ya Nzambe, pamba te ezalaki ngala ya lisanga na ye,
9 according to the custom of the priesthood the lot fell to him to go into the temple of the Lord and burn the incense.
aponamaki na zeke, kolanda momesano ya bonganga-Nzambe, mpo na kokota kati na Esika ya bule ya Nkolo mpe kotumba kuna malasi ya ansa.
10 And the whole multitude of the people was praying without at the time of the incense.
Tango ekomaki ngonga ya kotumba malasi ya ansa, lisanga mobimba ya basambeli ezalaki kosambela na libanda.
11 And there appeared to him an angel of the Lord, standing on the right of the altar of incense.
Bongo anjelu moko ya Yawe abimelaki ye ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya etumbelo ya malasi ya ansa.
12 And Zachariah was troubled at the sight, and fear fell upon him.
Tango Zakari amonaki ye, abangaki makasi, mpe somo monene ekangaki ye.
13 But the angel said to him, Fear not, Zachariah; for thy prayer was heard, and thy wife Elizabeth shall bear thee a son; and thou shalt call his name John.
Kasi anjelu alobaki na ye: — Zakari, kobanga te! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. »
14 And thou wilt have joy and gladness, and many will rejoice for his birth.
Mwana yango akosala esengo na yo, mpe okosepela na ye makasi; mpe bato ebele bakosepela mpo na mbotama na ye,
15 For he will be great in the sight of the Lord; and will drink neither wine nor strong drink; and he will be filled with the Holy Spirit from his very birth.
pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.
16 And many of the sons of Israel will he turn to the Lord their God.
Akozongisa bato ebele ya Isalaele epai ya Nkolo, Nzambe na bango,
17 And he will go before his face in the spirit and power of Elijah, to turn the hearts of fathers to children, and the disobedient to the wisdom of the righteous, to make ready for the Lord a prepared people.
mpe akotambola liboso ya Nzambe, elongo na molimo mpe nguya oyo ezalaki kovanda kati na Eliya, mpo na kozongisa boyokani kati na batata mpe bana na bango, mpo na kosala ete batomboki bakoma kokanisa lokola bato ya sembo, mpe mpo na kobongisa bato mpo na Nkolo.
18 And Zachariah said to the angel, Whereby shall I know this? for I am an old man, and my wife is far advanced in years.
Zakari atunaki anjelu: — Ndenge nini nakoki koyeba ete ezali ya solo? Pamba te, ngai, nazali mobange, mpe mibu ya mbotama ya mwasi na ngai esili kopusana makasi.
19 And the angel answering said to him, I am Gabriel, who stand in the presence of God; and I was sent to speak to thee, and to tell thee these glad tidings.
Anjelu azongiselaki ye: — Nazali Gabrieli; natelemaka liboso ya Nzambe oyo atindi ngai mpo na koyebisa yo mpe kopesa yo basango oyo ya malamu.
20 And lo! thou shalt be silent, and not able to speak, until the day when these things shall come to pass, because thou didst not believe my words, which will be fulfilled in their season.
Lokola ondimeli maloba na ngai te, oyo ekokokisama solo na tango na yango oyo ekatama, okokoma baba mpe okokoka lisusu koloba te kino na mokolo oyo makambo yango ekokokisama.
21 And the people were looking for Zachariah, and wondering that he remained so long in the temple.
Na tango yango, bato bazalaki kozela Zakari mpe komituna mpo na nini azali kowumela tango molayi kati na Esika ya bule.
22 And on coming out, he was not able to speak to them; and they perceived that he had seen a vision in the temple; and he was beckoning to them, and remained speechless.
Tango abimaki, azalaki lisusu te na makoki ya koloba na bango; boye basosolaki ete azwi emoniseli kati na Esika ya bule, pamba te akomaki koloba na bango na nzela ya bilembo mpe atikalaki baba.
23 And it came to pass, when the days of his ministration were completed, that he returned to his house.
Tango mikolo na ye ya mosala ekokaki, azongaki na ndako na ye.
24 And after those days his wife Elizabeth conceived, and hid herself five months, saying,
Sima na mwa tango, mwasi na ye, Elizabeti, akomaki na zemi mpe abombamaki sanza mitano.
25 Thus hath the Lord dealt with me in the days wherein he looked on me to take away my reproach among men.
Azalaki komilobela: « Tala likambo oyo Nkolo asali mpo na ngai! Na mikolo oyo, atalisi ngai ngolu na Ye mpe alongoli soni na ngai na miso ya bato. »
26 And in her sixth month the angel Gabriel was sent from God to a city of Galilee, called Nazareth,
Sima na basanza motoba, Nzambe atindaki anjelu Gabrieli kati na engumba moko ya Galile, kombo na yango ezalaki « Nazareti. »
27 to a virgin betrothed to a man whose name was Joseph, of the house of David; and the virgin's name was Mary.
Atindaki ye epai ya elenge mwasi Mari oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe azalaki mobandami ya libala na mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jozefi, mokitani ya Davidi.
28 And the angel came in to her and said, Hail, thou that art highly favored! the Lord is with thee.
Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye: — Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene! Nkolo azali elongo na yo!
29 And she was troubled at the words, and was considering what this salutation could mean.
Tango Mari ayokaki maloba ya anjelu, amitungisaki makasi mpe akomaki komituna soki mbote yango elakisi nini.
30 And the angel said to her, Fear not, Mary; for thou hast found favor with God.
Kasi anjelu alobaki na ye: — Mari, kobanga te! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu!
31 And lo! thou shalt conceive in thy womb, and hear a son, and shalt call his name Jesus.
Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo « Yesu. »
32 He shall be great, and shall be called the Son of the Most High; and the Lord God will give to him the throne of David his father;
Akozala Moto monene, mpe bakobenga Ye: Mwana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya Davidi, koko na Ye.
33 and he shall reign over the house of Jacob for ever; and of his kingdom there shall be no end. (aiōn )
Akozala Mokonzi ya libota ya Jakobi mpo na libela, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te. (aiōn )
34 Then said Mary to the angel, How shall this be, since I know not a man?
Mari atunaki anjelu: — Ekosalema ndenge nini, pamba te nayebi nanu nzoto ya mibali te?
35 And the angel answering said to her, The Holy Spirit will come upon thee, and the power of the Most High will overshadow thee; wherefore the holy one that is to be born will be called the Son of God.
Anjelu azongiselaki ye: — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe.
36 And lo! Elizabeth, thy kinswoman, she also hath conceived a son in her old age; and this is the sixth month with her who is called barren.
Ndeko na yo ya mwasi, Elizabeti, azali mpe na zemi; akobota mwana mobali, atako akomi mobange. Ye oyo bazalaki kobenga « ekomba » akomi sik’oyo na zemi ya sanza motoba.
37 For nothing will be impossible with God.
Pamba te Nzambe alembanaka eloko te.
38 And Mary said, Lo, the handmaid of the Lord! May it be to me according to thy word. And the angel departed from her.
Mari azongiselaki ye: — Nazali mwasi mowumbu ya Nkolo, tika ete maloba na yo ekokisamela ngai! Bongo anjelu akabwanaki na ye.
39 And Mary arose and went in those days into the hill-country with haste, into a city of Judah.
Sima na mwa mikolo, Mari atelemaki mpe akendeki na lombangu, na engumba moko kati na mokili ya bangomba ya Yuda.
40 And she entered the house of Zachariah, and saluted Elizabeth.
Kuna, akotaki na ndako ya Zakari mpe apesaki Elizabeti mbote.
41 And it came to pass, when Elizabeth heard the salutation of Mary, that the babe leaped in her womb; and Elizabeth was filled with the Holy Spirit,
Tango kaka Elizabeti ayokaki mbote ya Mari, mwana aninganaki kati na libumu na ye. Elizabeti atondisamaki na Molimo Mosantu
42 and cried out with a loud voice, and said, Blessed art thou among women; and blessed is the fruit of thy womb!
mpe agangaki na mongongo makasi: — Ozali ya kopambolama kati na basi, mpe esengo na mwana oyo azali kati na libumu na yo!
43 And whence is this to me, that the mother of my Lord should come to me?
Ngai nde nani mpo ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai?
44 For lo! as soon as the voice of thy salutation came to my ears, the babe leaped in my womb in exultation.
Pamba te, tango kaka nayoki mbote na yo, mwana aningani na esengo kati na libumu na ngai.
45 And blessed is she who hath believed that there will be an accomplishment of those things which were told her from the Lord.
Esengo na mwasi oyo andimaki ete Nkolo akokokisa elaka oyo apesaki ye!
46 And Mary said, My soul magnifieth the Lord,
Bongo Mari alobaki: — Molimo na ngai ezali kokumisa Nkolo,
47 and my spirit hath exulted in God my Saviour;
mpe natondi na esengo mpo na Nzambe, Mobikisi na ngai,
48 for he hath looked upon the low estate of his handmaiden. For lo! from this time all generations will call me blessed;
pamba te atali kozanga lokumu ya mwasi mowumbu na Ye. Yango wana, kobanda lelo, bato ya tango nyonso bakobanda kobengaka ngai mwasi ya esengo,
49 for the Mighty One hath done great things for me; and holy is his name;
pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene; Kombo na Ye ezali Bule.
50 and his mercy is from generation to generation on them that fear him.
Atalisaka boboto na Ye tango nyonso epai ya bato oyo batosaka Ye.
51 He hath wrought mightily with his arm; he hath scattered the proud in the device of their heart.
Asali misala minene na nguya ya loboko na Ye, apanzi bato oyo batonda na lolendo,
52 He hath cast down princes from thrones, and exalted men of low degree.
akitisi bakambi wuta na bakiti na bango ya bokonzi, kasi atomboli bato oyo bamikitisaka.
53 The hungry he hath filled with good things, and the rich he hath sent away empty.
Atondisi na biloko ya malamu bato oyo bazalaki na nzala, mpe azongisi bazwi maboko pamba.
54 He hath given help to Israel his servant, in remembrance of his mercy
Solo, asungi Isalaele, mosali na Ye, abosani te kotalisa boboto na Ye,
55 toward Abraham and his offspring for ever, as he spoke to our fathers. (aiōn )
ndenge alakaki yango epai ya bakoko na biso, epai ya Abrayami mpe epai ya bakitani na ye, mpo na tango nyonso. (aiōn )
56 And Mary abode with her about three months, and returned to her own house.
Mari avandaki basanza pene misato elongo na Elizabeti; sima, azongaki na ndako na ye.
57 Now Elizabeth's full time came that she should be delivered; and she brought forth a son.
Wana eleko oyo Elizabeti asengelaki kobota ekokaki, abotaki mwana mobali.
58 And her neighbors and her kinsfolk heard that the Lord had showed great mercy toward her; and they rejoiced with her.
Baninga mpe bandeko ya Elizabeti bayokaki ete Nkolo asaleli ye ngolu monene, mpe basepelaki na ye elongo.
59 And it came to pass that on the eighth day they came to circumcise the child; and they were about to call him Zachariah, after the name of his father.
Na mokolo ya mwambe, sima na mbotama ya mwana, bakendeki kokatisa mwana ngenga; balingaki kopesa ye kombo ya tata na ye, Zakari.
60 And his mother answering said, Not so; but he shall be called John.
Kasi mama na ye alobaki: — Te! Kombo na ye ezali Yoane.
61 And they said to her, There is no one of thy kindred that is called by this name.
Kasi balobaki na ye: — Ezali na moto moko te, kati na libota na yo, oyo azali na kombo wana.
62 And they made signs to his father, how he would have him named.
Bongo batunaki tata ya mwana, na nzela ya bilembo, mpo ete bayeba soki kombo nini alingaki kopesa na mwana.
63 And he asked for a writing-tablet, and wrote, saying, His name is John. And they all marveled.
Zakari asengaki mwa libaya mpe akomaki: « Kombo na ye ezali Yoane. » Mpe bango nyonso bakamwaki.
64 And his mouth was opened immediately, and his tongue was loosed; and he spoke, blessing God.
Mbala moko, monoko ya Zakari efungwamaki mpe lolemo na ye ekangolamaki; akomaki lisusu koloba mpe kokumisa Nzambe.
65 And fear came on all that dwelt around them; and all these things were talked of throughout the whole of the hill-country of Judaea.
Baninga na bango nyonso ya pembeni batondaki na somo mpe bazalaki kolobela makambo yango nyonso, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.
66 And all that heard them laid them up in their hearts, saying, What then will this child be? For the hand of the Lord was with him.
Bato nyonso oyo bayokaki sango yango bazalaki kokamwa yango mpe komituna: « Yango mwana oyo akozala nani? » Pamba te loboko ya Nkolo ezalaki elongo na ye.
67 And Zachariah his father was filled with the Holy Spirit, and prophesied, saying,
Tata na ye, Zakari, atondisamaki na Molimo Mosantu mpe akomaki kosakola:
68 Blessed be the Lord, the God of Israel! for he hath visited and redeemed his people,
« Tika ete Nkolo, Nzambe ya Isalaele, akumisama, pamba te ayei mpe akangoli bato na Ye;
69 and hath raised up a horn of salvation for us in the house of David his servant, —
abimiseli biso Mobikisi ya nguya, kati na libota ya Davidi, mosali na Ye;
70 as he spoke by the mouth of his holy prophets of old, (aiōn )
akokisi elaka na Ye, oyo apesa wuta kala na nzela ya basakoli na Ye ya bule, (aiōn )
71 salvation from our enemies, and from the hand of all that hate us,
lobiko liboso ya banguna na biso, mpe kokangolama wuta na maboko ya bayini na biso;
72 to accomplish his mercy toward our fathers, and to remember his holy covenant,
atalisi boboto na Ye epai ya bakoko na biso mpe akanisi Boyokani na Ye ya bule;
73 the oath which he swore to Abraham our father,
akokiseli biso ndayi oyo alapaki epai ya Abrayami, koko na biso,
74 to grant to us, that being delivered from the hand of our enemies, we might worship him without fear,
ete akokangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe akopesa biso nzela ya kosalela Ye na kobanga te,
75 in holiness and righteousness before him, all our days.
kati na bosantu mpe bosembo, liboso na Ye, mikolo nyonso ya bomoi na biso.
76 And thou, child, shalt be called a prophet of the Most High; for thou shalt go in advance before the face of the Lord to prepare his ways,
Bongo yo, mwana na ngai, bakobenga yo: mosakoli ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo; pamba te okotambola na liboso ya Nkolo mpo na kobongisela Ye nzela
77 to give knowledge of salvation to his people in the remission of their sins
mpe mpo na koyebisa bato na Ye ete Nzambe akobikisa bango mpe akolimbisa masumu na bango,
78 through the tender mercy of our God, whereby the day-spring from on high hath visited us,
mpo na mawa mpe boboto ya Nzambe na biso, oyo na nzela na yango moyi ya tongo ekongengela biso wuta na likolo,
79 to give light to those sitting in darkness and the shadow of death, to guide our feet into the way of peace.
mpo na kopesa pole na bato nyonso oyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso kati na nzela ya kimia. »
80 And the child grew, and waxed strong in spirit; and was in the deserts till the day of his manifestation to Israel.
Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele.