< Jeremiah 10 >

1 Hear ye the word which Jehovah speaketh to you, O house of Israel!
Eh libota ya Isalaele, yoka liloba oyo Yawe azali koloba na yo!
2 Thus saith Jehovah: Conform ye not to the way of the heathen, And be not dismayed at the signs of the heavens, Because the heathen are dismayed at them!
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Kolanda bizaleli ya bikolo ya bapaya te mpe kobanga bilembo ya likolo te ata soki ezali kobangisa bato ya bikolo.
3 The customs of the nations are vanity. For a tree of the wood is cut down, It is wrought by the hands of the artificer with the axe,
Pamba te bizaleli ya bikolo ya bapaya ezali se pamba, banzambe na bango ezali se banzete ya pamba oyo bakataka kati na zamba, bongo moto ya misala ya maboko nde abongisaka yango na bambeli na ye.
4 It is decked with silver and gold, And with nails and with hammers is it fastened, That it may not totter.
Bapakolaka yango palata mpe wolo, babetaka yango basete na marto mpo ete eningana te.
5 They are like a turned palm-tree pillar, and cannot speak; They must be borne by men, for they cannot walk. Be not afraid of them, for they cannot hurt, Nor is it in their power to do good.
Banzambe yango ya bikeko ezali lokola bikeko oyo batiaka na elanga ya bapasiteki mpo na kokimisa bandeke: elobaka te, bamemaka yango mpo ete etambolaka te. Kobanga yango te, pamba te ekokaka kosala bato mabe to malamu te. »
6 There is none like thee, O Jehovah! Thou art great, And great is thy name by mighty deeds.
Eh Yawe, moko te akokani na Yo! Ozali monene, mpe Kombo na Yo ezali na nguya monene.
7 Who shall not fear thee, O king of nations, For to thee doth it belong! For among all the wise men of the nations, And in all their kingdoms, there is none like thee.
Oh Mokonzi ya bikolo, nani akoki koboya kotosa Yo? Obongi na lokumu, pamba te moko te azali lokola Yo kati na bato nyonso ya bwanya ya bikolo mpe kati na mikili na bango nyonso.
8 They are all brutish and without understanding; A doctrine of vanities is the stock.
Bango nyonso bazangi mayele mpe bazali bazoba; mateya na bango ezalaka ya pamba, mpe banzambe na bango ezalaka se banzete ya pamba!
9 Beaten silver is brought from Tarshish, And gold from Uphaz, The work of the artificer and the founder; Blue and purple is their clothing; The work of the skilful is it all.
Bapakola yango palata balekisa na moto, oyo ewuta na Tarsisi, mpe wolo oyo ewuta na Ufazi; bato oyo basalaka bililingi na banzete mpe ba-oyo balambaka bibende na moto nde basalaka yango: balatisaka yango bilamba ya langi ya ble mpe ya motane; ezali misala ya bato oyo basalaka misala ya maboko, oyo bayebi penza mosala malamu.
10 But Jehovah is the true God, He is the living God, and an everlasting king; At his wrath the earth trembleth, And the nations are not able to abide his indignation.
Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.
11 [[Thus shall ye say to them: The gods, that have not made the heavens and the earth, Shall perish from the earth and from under these heavens.]]
Tala maloba oyo bokoloba na bango: « Banzambe oyo esala te likolo mpe mabele ekolimwa na mabele mpe na se ya likolo. »
12 He made the earth by his power; He established the world by his wisdom, And by his understanding he spread out the heavens.
Kasi Yawe asala mabele na nguya na Ye, alendisa mokili na bwanya na Ye mpe atanda likolo na mayele na Ye.
13 When he uttereth his voice there is an abundance of water in the heavens; He causeth clouds to ascend from the ends of the earth; He maketh lightnings with rain; He bringeth the wind from his storehouses.
Tango agangaka, mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo, asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili, apelisaka mikalikali, anokisaka mvula mpe abimisaka mopepe wuta na bibombelo na Ye.
14 Brutish is every one who hath not this knowledge; By his image is every founder put to shame, For his molten-work is deceit; There is no breath in it.
Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, lokola bato oyo basili mayele; monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, ezalaka na pema te kati na yango.
15 They are vanity, deceptive work; In the time of their punishment shall they perish.
Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola; ekolimwa na tango ya kosambisama.
16 Not like them is He who is the portion of Jacob; He is the former of all things, And Israel is his allotted inheritance; Jehovah of hosts is his name.
Kasi Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata Isalaele, ekolo oyo ezali libula na Ye; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.
17 Gather up thy goods out of the land, O inhabitant of the fortress!
Yo ekolo oyo bazingeli, kamata bisaka na yo mpe bima na mokili!
18 For thus saith Jehovah: Behold, I will sling forth the inhabitants of the land at this time; I will distress them, so that they shall be taken.
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: « Ya mbala oyo, nakobengana bavandi ya mokili oyo mpe nakotindela bango pasi mpo ete bakanga bango. »
19 “Ah me! my wound!” [[saith the daughter of Zion; ]] “My bruise is deadly; Yet I say, This is my affliction, and I must bear it!
Mawa na ngai, pamba te nazoki makasi na motema! Pota na ngai ezali kosila te! Namilobelaki: « Ezali pasi na ngai moko, esengeli na ngai kokanga motema. »
20 My tent is torn down, And all my cords broken. My children are gone forth from me, and are no more; There is none to stretch forth my tent any more, Or to set up my curtains.
Ndako na ngai ya kapo ebebisami, basinga na yango nyonso ekatani, bamemi bana na ngai ya mibali, natikali lisusu ata na mwana moko te. Nazali lisusu na moto ata moko te oyo akotelemisela ngai ndako ya kapo to akobongisela ngai esika ya kovanda.
21 For the shepherds have become brutish; They have not sought Jehovah; Therefore have they not prospered, And all their flock is dispersed.”
Pamba te bakambi bazangaki mayele, balukaki Yawe te; yango wana, balongaki te, mpe bato nyonso oyo bango bazalaki kokamba bapanzanaki.
22 [[Hark!]] the sound of tiding! Behold it cometh, And a great tumult from the land of the North, To make the cities of Judah desolate, A dwelling-place for jackals.
Boyoka! Makelele moko ezali koya, lokito moko ya makasi ewuti na mokili ya nor, ekosilisa bato kati na bingumba ya Yuda mpe ekokomisa yango bandako ya mbwa ya zamba.
23 “I know, O Jehovah, that the way of a man is not within his power, That it is not within the power of a man that walketh to establish his steps.
Oh Yawe, nayebi ete moto moko te azali mokonzi ya bomoi na ye; moto oyo azali kotambola azali na bokonzi te ya kokamba matambe na ye.
24 Chasten me, O Jehovah, but in measure; Not in thine anger, lest thou bring me to nothing!
Oh Yawe, pesa biso etumbu oyo ekoki na biso; kasi kopesa yango na kanda te, noki te okosilisa koboma biso.
25 Pour out thy wrath on the nations which acknowledge thee not, And on the kingdoms which call not on thy name! For they have devoured Jacob; They have devoured and consumed him, And laid waste his dwelling-place.”
Sopa kanda na Yo likolo ya bikolo ya bapaya oyo endimaka Yo te, likolo ya bato oyo babelelaka Kombo na Yo te, pamba te babebisi Jakobi, babebisi ye mobimba mpe bapanzi mokili na ye.

< Jeremiah 10 >