< Acts 2 >

1 And on the day of Pentecost they were all together in one place.
Tango mokolo ya Pantekoti ekomaki, bango nyonso basanganaki esika moko.
2 And suddenly there came out of heaven a sound, as of a rushing mighty wind; and it filled the whole house where they were sitting;
Mbala moko, lokito moko ewutaki na likolo lokola lokito ya mopepe makasi, mpe etondisaki ndako mobimba epai wapi bazalaki kosangana.
3 and there appeared to them tongues as of fire, distributing themselves; and one sat upon each of them.
Bamonaki biloko moko lokola ndemo ya moto kokabwana mpe kovanda na moto ya moko na moko kati na bango.
4 And they were all filled with the Holy Spirit, and began to speak with other tongues, even as the Spirit gave them utterance.
Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.
5 Now there were dwelling at Jerusalem Jews, devout men, from every nation under heaven.
Nzokande, kati na Yelusalemi, ezalaki na Bayuda oyo babangaka Nzambe, oyo bawutaki na bikolo nyonso ya mokili.
6 And when this sound took place, the multitude came together, and were confounded, because every one heard them speaking in his own language.
Tango bayokaki lokito wana, ebele ya bato bayaki mbangu kosangana wana mpe bakomaki kokamwa, pamba te moko na moko kati na bango azalaki koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka.
7 And they were amazed, and marveled, saying, Behold, are not all these who speak Galilaeans?
Bakamwaki mingi penza mpe bakomaki kotuna: « Boni, bato nyonso oyo bazali koloba, bazali bato ya Galile te?
8 and how is it that we every one hear them in our own language, wherein we were born?
Boye, ndenge nini moto na moto kati na biso azali koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka?
9 Parthians and Medes and Elamites, and those who inhabit Mesopotamia, Judaea and Cappadocia, Pontus and Asia,
Bato ya Parte, ya Mede mpe ya Elami, bavandi ya Mezopotami, ya Yuda, ya Kapadose, ya Ponti mpe ya Azia,
10 Phrygia and Pamphylia, Egypt and the parts of Libya about Cyrene, and Romans who sojourn here, both Jews and Proselytes,
ya Friji mpe ya Pafili, ya Ejipito mpe ya Libi oyo ezali pembeni ya Sirene, bapaya oyo bawutaki na Rome,
11 Cretans and Arabians—how is it that we hear them speaking in our tongues the wonderful works of God?
bango nyonso, ezala Bayuda to bapaya oyo bakota na lingomba ya Bayuda: bato ya Kreti mpe ya Arabi, biso nyonso tozali koyoka bango kotatola misala minene ya Nzambe, na nkota na biso ya mboka! »
12 And they were all amazed and were in doubt, saying one to another, What can this mean?
Bango nyonso, elekelaki bango, bazalaki kokamwa mingi mpe bakomaki kotunana: « Likambo oyo elingi koloba nini? »
13 Others making sport of it, said, They are full of new wine.
Nzokande, bato mosusu bazalaki koseka bango mpe koloba: « Balangwe vino ya sika. »
14 But Peter, standing up with the eleven, lifted up his voice, and said to them, Men of Judea, and all that dwell at Jerusalem, be this known to you, and hearken to my words.
Petelo atelemaki elongo na bantoma zomi na moko; mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato: — Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbola mpo na bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba.
15 For these are not drunken, as ye suppose; for it is the third hour of the day;
Bato oyo balangwe masanga te ndenge bozali kokanisa. Pamba te tozali nanu na ngonga ya libwa ya tongo.
16 but this is what was spoken through the prophet Joel,
Kasi ezali nde makambo oyo mosakoli Joeli alobaki:
17 “It shall be in the last days, saith God, that I will pour out of my Spirit upon all flesh; and your sons and your daughters will prophesy, and your young men will see visions, and your old men will dream dreams;
« Na mikolo ya suka, elobaki Nzambe, nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso. Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola; bilenge na bino bakozwa bimoniseli, mibange na bino bakolota bandoto.
18 and even on my servants, and on my handmaids, I will pour out of my Spirit in those days, and they will prophesy.
Solo, na mikolo wana, nakosopa Molimo na Ngai kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi, mpe bakosakola.
19 And I will show wonders in heaven above, and signs on the earth beneath, blood, and fire, and vapor of smoke;
Nakolakisa bikamwa kuna na Likolo, mpe bilembo ya kokamwa awa na mokili: makila, moto mpe likonzi ya milinga.
20 the sun will be turned into darkness and the moon into blood, before the day of the Lord cometh, the great and notable day.
Moyi ekobongwana molili, sanza ekobongwana makila liboso ete mokolo ya Nkolo ekoma, mokolo oyo ya monene mpe ya nkembo.
21 And it shall be that every one that calleth on the name of the Lord shall be saved.”
Boye, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama. »
22 Men of Israel, hear these words! Jesus the Nazarene, a man approved of God to you by miracles, and wonders, and signs, which God wrought by him in the midst of you, as ye yourselves know, —
Bato ya Isalaele, boyoka maloba oyo: Yesu ya Nazareti, moto oyo, na nzela ya bikamwa, ya bilembo mpe ya misala ya minene, Nzambe alakisaki bino ete awutaki epai na Ye ndenge bino moko boyebi yango,
23 this man, being delivered up by the settled purpose and foreknowledge of God, ye, by the hand of godless men, crucified and slew.
akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu.
24 But God raised him up, having loosed the pains of death, because it was not possible that he should be held by it.
Kasi Nzambe abukaki minyololo ya kufa, asekwisaki Ye, pamba te ekokaki kosalema te ete kufa ekanga Ye.
25 For David saith concerning him, “I saw the Lord always before me; because he is on my right hand, that I should not be moved.
Boye, tala makambo oyo Davidi aloba na tina na Ye: « Nazalaki komona Nkolo mikolo nyonso liboso na ngai, pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.
26 Therefore my heart rejoiced, and my tongue exulted; moreover also, my flesh shall dwell in hope;
Yango wana, motema na ngai etondi na esengo, mpe lolemo na ngai ezali kosepela. Solo, nzoto na ngai ekopema na elikya,
27 because thou wilt not abandon my soul to the underworld, nor wilt thou suffer thy holy one to see corruption. (Hadēs g86)
pamba te okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi mpe okotika te ete mosantu na Yo apola. (Hadēs g86)
28 Thou didst make known to me the ways of life; thou wilt make me full of joy with thy countenance.”
Pamba te olakisaki ngai nzela ya bomoi, mpe okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo. »
29 Brethren, I may speak to you with freedom of the patriarch David, that he both died and was buried, and his tomb is among us to this day.
Bandeko na ngai, tika ete naloba na bino solo na tina na Davidi, koko na biso, ete akufa mpe bakunda ye; mpe kunda na ye ezali awa kino lelo.
30 Being then a prophet, and knowing that God had sworn to him with an oath that he would set one sprung from his loins upon his throne,
Kasi azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe apesaki ye elaka, na nzela ya ndayi, ete moko kati na bakitani na ye akovanda na kiti na ye ya bokonzi.
31 he foresaw and spoke of the resurrection of Christ, that neither was he abandoned to the underworld, nor did his flesh see corruption. (Hadēs g86)
Davidi amonaki makambo oyo wuta kala, alobelaki lisekwa ya Klisto ete Nzambe akosundola Ye te kati na mboka ya bakufi mpe akotika te ete nzoto na Ye epola. (Hadēs g86)
32 This Jesus God raised up, whereof we all are witnesses.
Nzambe asekwisaki Yesu kati na bakufi; boye biso nyonso tozali batatoli ya lisekwa yango.
33 Being therefore exalted by the right hand of God, and having received from the Father the promised Holy Spirit, he hath poured forth this, which ye both see and hear.
Sima na loboko ya mobali ya Nzambe konetola Ye, azwaki epai ya Tata, Molimo Mosantu oyo Ye Tata alakaki, mpe asopeli biso Molimo Mosantu yango ndenge bozali komona mpe koyoka sik’oyo.
34 For David did not ascend into the heavens; but he himself saith, The Lord said to my lord, “Sit thou on my right hand,
Pamba te, Davidi amataki te na Likolo, kasi alobaki: « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai: ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
35 until I make thine enemies thy footstool.”
kino nakomisa banguna na Yo enyatelo makolo na Yo. › »
36 Therefore let all the house of Israel know assuredly that God hath made him both Lord and Christ, this Jesus whom ye crucified.
Boye, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba na bosolo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobakaki na ekulusu Nkolo mpe Klisto.
37 And when they heard this, they were pierced to the heart, and said to Peter and the rest of the apostles, Brethren, what must we do?
Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Petelo mpe bantoma mosusu: — Bandeko, tosala nini?
38 But Peter said to them, Repent, and let every one of you be baptized to the name of Jesus Christ for forgiveness of sins, and ye will receive the gift of the Holy Spirit.
Petelo azongiselaki bango: — Bobongola mitema; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.
39 For the promise is to you and to your children, and to all that are afar off, as many as the Lord our God shall call.
Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.
40 And with many other words did he testify and exhort, saying, Save yourselves from this perverse generation.
Petelo azalaki kokebisa bango na maloba ebele mpe azalaki kolendisa bango na maloba oyo: — Boyamba lobiko mpo ete bozwa etumbu te oyo ezali kozela bato mabe.
41 They therefore received his word, and were baptized; and there were added on that day about three thousand souls.
Bato oyo bandimaki mateya ya Petelo bazwaki libatisi. Mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato babakisamaki na lisanga ya bandimi.
42 And they were constantly attending on the teaching of the apostles, and the imparting [[of their substance]], the breaking of bread, and the prayers.
Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kosambela.
43 And fear came upon every soul; and many wonders and signs were wrought through the apostles.
Bato nyonso batondisamaki na somo, mpo ete bantoma bazalaki kosala makamwisi ebele mpe bilembo ya kokamwa.
44 And all that believed were together, and had all things common;
Bandimi nyonso bakomaki na bomoko, mpe biloko na bango ezalaki mpo na bango nyonso.
45 and they sold their possessions and goods, and divided them among all, as any one had need.
Bazalaki koteka mabele na bango mpe biloko na bango, mpe bazalaki kokabola mbongo kati na bango, ndenge ezalaki posa ya moto na moto.
46 And attending daily with one accord in the temple, and breaking bread in a private house, they partook of their food with gladness and singleness of heart,
Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa.
47 praising God, and having favor with all the people. And the Lord added to the church daily those who were in the way of salvation.
Bazalaki kokumisa Nzambe, mpe bato nyonso bazalaki kolinga bango. Bongo, mikolo nyonso, Nkolo azalaki kobakisa na lisanga na bango bato oyo bazalaki kobika.

< Acts 2 >