< Numbers 21 >

1 When the Canaanite king of Arad who lived in the Negev heard that Israel came by the way of Atharim, then he fought against Israel, and took some of them captive.
Tango moto ya mboka Kanana, mokonzi ya Aradi, oyo azalaki kovanda na Negevi ayokaki ete Isalaele azali koya pembeni ya nzela ya Atarimi, abundisaki bana ya Isalaele mpe akangaki bamosusu kati na bango na boloko.
2 Israel vowed a vow to YHWH, and said, "If you will indeed deliver this people into my hand, then I will utterly destroy their cities."
Boye, bana ya Isalaele balapaki ndayi oyo epai na Yawe: « Soki okabi bato oyo na maboko na biso, tokobebisa bingumba na bango nyonso. »
3 YHWH listened to the voice of Israel, and delivered up the Canaanites; and they utterly destroyed them and their cities: and the name of the place was called Hormah.
Yawe ayokaki kolela ya bana ya Isalaele mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya mboka Kanana elongo na bingumba na bango. Yango wana, babengaka esika yango « Orima » oyo elingi koloba: kobebisama.
4 They traveled from Mount Hor by the way to the Red Sea, to compass the land of Edom: and the soul of the people was much discouraged because of the way.
Bana ya Isalaele batikaki ngomba Ori mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela ya ebale monene ya Barozo, mpo na kokima mokili ya Edomi. Kasi bato bakokaki lisusu te kokanga motema na nzela.
5 The people spoke against God, and against Moses, "Why have you brought us up out of Egypt to die in the wilderness? For there is no bread, and there is no water; and our soul loathes this light bread."
Batombokelaki Nzambe mpe Moyize, balobaki: « Mpo na nini boye! Bobimisaki biso na Ejipito mpo ete toya kokufa na esobe? Bilei ezali te, mayi ezali te mpe tolembi kolia bilei oyo ya pamba-pamba! »
6 YHWH sent fiery serpents among the people, and they bit the people; and many people of Israel died.
Bongo Yawe atindelaki bango banyoka ya ngenge oyo ekomaki koswa bato mpe bana ya Isalaele ebele bakufaki.
7 The people came to Moses, and said, "We have sinned, because we have spoken against YHWH, and against you. Pray to YHWH, that he take away the serpents from us." Moses prayed for the people.
Bato bayaki epai ya Moyize mpe balobaki: « Tosalaki masumu tango totombokelaki Yawe mpe totombokelaki yo. Bondela Yawe ete alongola mosika na biso banyoka oyo. » Boye, Moyize abondelaki mpo na bato.
8 YHWH said to Moses, "Make a fiery serpent, and set it on a standard: and it shall happen, that everyone who is bitten, when he sees it, shall live."
Yawe alobaki na Moyize: — Salisa nyoka moko ya ebende mpe telemisa yango likolo ya nzete mpo ete moto nyonso oyo aswami, atala yango mpe abika.
9 Moses made a serpent of bronze, and set it on the standard: and it happened, that if a serpent had bitten any man, when he looked to the serpent of bronze, he lived.
Boye, Moyize asalisaki nyoka moko ya ebende mpe atelemisaki yango na likolo ya nzete. Boye moto nyonso oyo nyoka eswaki, bongo atalaki nyoka ya ebende, abikaki.
10 The children of Israel traveled, and camped in Oboth.
Bana ya Isalaele balongwaki wana mpe bakendeki kotonga molako na bango na Oboti.
11 They traveled from Oboth, and camped at Iyeabarim, in the wilderness which is before Moab, toward the sunrise.
Kolongwa na Oboti bakendeki kotonga molako na bango na Iye-Abarimi, na esobe oyo etalana na Moabi, na ngambo oyo moyi ebimaka.
12 From there they traveled, and camped in the Valley of Zered.
Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na lubwaku ya Zeredi.
13 From there they traveled, and camped on the other side of the Arnon, which is in the wilderness, that comes out of the border of the Amorites: for the Arnon is the border of Moab, between Moab and the Amorites.
Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na ngambo mosusu ya Arinoni, mayi oyo elekela na esobe, wuta na etuka ya mokili ya bato ya Amori. Mayi ya Arinoni ezalaki na mondelo ya Moabi, na kati-kati ya mokili ya Moabi mpe ya Amori.
14 Therefore it is said in the Book of the Wars of YHWH, "Waheb in Suphah, the valleys of the Arnon,
Yango wana, buku ya bitumba ya Yawe eloba: « Wahebi kati na Sufa mpe miluka na yango, Arinoni
15 the slope of the valleys that incline toward the dwelling of Ar, leans on the border of Moab."
mpe nzela ya miluka ya mabwaku oyo ekenda kino na engumba Ari mpe elekela pembeni-pembeni ya mondelo ya Moabi. »
16 From there they traveled to Beer: that is the well of which YHWH said to Moses, "Gather the people together, and I will give them water."
Kolongwa wana, bakobaki kokende kino na Beri oyo ezalaki libulu ya mayi epai wapi Yawe alobaki na Moyize: « Sangisa bato esika moko mpo ete nakopesa bango mayi. »
17 Then sang Israel this song: "Spring up, well; sing to it:
Boye, bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo: « Oh libulu, bimisa mayi! Boyembela yango!
18 the well, which the princes dug, which the nobles of the people dug, with the scepter, and with their staffs." From the wilderness they traveled to Mattanah;
Libulu oyo bana bakonzi batimola, oyo bato minene batobola na mangenda mpe banzete na bango. » Kolongwa na esobe, bakendeki kino na Matana;
19 and from Mattanah to Nahaliel; and from Nahaliel to Bamoth;
kolongwa na Matana bakendeki na Naalieli, kolongwa na Naalieli bakendeki kino na Bamoti;
20 and from Bamoth to the valley that is in the field of Moab, to the top of Pisgah, which looks down on the desert.
mpe kolongwa na Bamoti bakendeki kino na lubwaku ya Moabi, na songe ya ngomba Pisiga, oyo eleki molayi na esobe.
21 Israel sent messengers to Sihon king of the Amorites, saying,
Bana ya Isalaele batindaki bantoma mpo na koyebisa Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori:
22 "Let me pass through your land: we will not turn aside into field, or into vineyard; we will not drink of the water of the wells: we will go by the king's highway, until we have passed your border."
« Tika biso tolekela na mokili na yo. Tokokota te na elanga to na elanga ya vino moko, mpe tokomela te mayi ya mabulu na bino; tokoleka kaka na nzela ya monene ya mokonzi kino tokosilisa kokatisa mokili na yo. »
23 Sihon would not allow Israel to pass through his border: but Sihon gathered all his people together, and went out against Israel into the wilderness, and came to Jahaz; and he fought against Israel.
Kasi Sikoni aboyaki kopesa bana ya Isalaele nzela ya kolekela na mokili na ye; asangisaki mampinga na ye nyonso ya basoda mpe abimaki na esobe mpo na kobundisa Isalaele. Abundisaki Isalaele tango akomaki na Yakatsi.
24 Israel struck him with the edge of the sword, and possessed his land from the Arnon to the Jabbok, even to the people of Ammon; for the border of the people of Ammon was strong.
Kasi Isalaele alongaki ye mpe akamataki mokili na ye wuta na Arinoni kino na Yaboki, mpe lisusu kino na mokili ya bato ya Amoni, mpo ete bazalaki kokengela mondelo yango makasi.
25 Israel took all these cities: and Israel lived in all the cities of the Amorites, in Heshbon, and in all its towns.
Isalaele abotolaki bingumba nyonso ya bato ya Amori mpe bakomaki kovanda kati na yango, bakisa Eshiboni mpe bamboka mike na yango nyonso ya zingazinga.
26 For Heshbon was the city of Sihon the king of the Amorites, who had fought against the former king of Moab, and taken all his land out of his hand, even to the Arnon.
Eshiboni ezalaki engumba oyo Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo abundisaki mokonzi ya kala ya Moabi mpe abotolaki na maboko na ye mokili nyonso, kino na Arinoni.
27 Therefore those who speak in proverbs say, "Come to Heshbon. Let the city of Sihon be built and established;
Yango wana balobaka na masese: « Boya na Eshiboni! Tika ete etelema lisusu! Tika ete engumba Sikoni etongama lisusu!
28 for a fire has gone out of Heshbon, a flame from the city of Sihon. It has devoured Ar of Moab, swallowed up the high places of the Arnon.
Moto ebimaki wuta na Eshiboni, ndemo ya moto ebimaki wuta na engumba ya Sikoni, etumbaki Ari ya Moabi, bavandi ya bangomba ya Arinoni.
29 Woe to you, Moab. You are undone, people of Chemosh. He has given his sons as fugitives, and his daughters into captivity, to Sihon king of the Amorites.
Oh Moabi, mawa na yo! Oh bato ya Kemoshi, bobebisami! Bakomisaki bana na ye ya mibali bakimi; mpe bana basi na ye, bakangami ya mokonzi Sikoni, mokonzi ya Amori.
30 And we shot at them. Heshbon has perished as far as Dibon. And we have laid waste as far as Nophah, which reaches to Medeba."
Kasi tolongi bango; Eshiboni nyonso ebebisami kino na Diboni, topanzi yango nyonso kino na Nofaki, mpe kino na Medeba. »
31 Thus Israel lived in the land of the Amorites.
Boye Isalaele avandaki na mokili ya bato ya Amori.
32 Moses sent to spy out Jazer; and they took its towns, and drove out the Amorites who were there.
Sima na yango, Moyize atindaki banongi na Yaezeri, bana ya Isalaele babotolaki bamboka ya mike-mike oyo ya zingazinga na yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna.
33 They turned and went up by the way of Bashan: and Og the king of Bashan went out against them, he and all his people, to battle at Edrei.
Boye bana ya Isalaele babalukaki mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela oyo ekenda kino na Bashani. Ogi, mokonzi ya Bashani, elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kokutana na bango mpe kobundisa bango na Edreyi.
34 YHWH said to Moses, "Do not fear him: for I have delivered him into your hand, and all his people, and his land; and you shall do to him as you did to Sihon king of the Amorites, who lived at Heshbon."
Bongo Yawe alobaki na Moyize: « Kobanga ye te, pamba te nakabi ye elongo na mampinga na ye nyonso mpe mokili na ye na maboko na yo; sala ye ndenge osalaki Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni. »
35 So they struck him, and his sons and all his people, until there was none left him remaining: and they possessed his land.
Boye, bana ya Isalaele babomaki ye elongo na bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso; batikaki ata moto moko te na bomoi, mpe bakamataki mokili na ye.

< Numbers 21 >