< Judges 8 >

1 The men of Ephraim said to him, "Why have you done such a thing to us, not calling us when you went to fight with Midian?" And they argued with him fiercely.
Mibali ya Efrayimi batunaki Jedeon: — Bizaleli ya boye elakisi nini epai na biso? Mpo na nini obengaki biso te tango okendeki kobundisa bato ya Madiani? Mpe basilikelaki ye makasi.
2 He said to them, "What have I now done in comparison with you? Isn't the gleaning of the grapes of Ephraim better than the vintage of Abiezer?
Kasi Jedeon azongiselaki bango: — Nasali nini oyo ekokani na oyo bino bosala? Boni, ndambo ya bambuma ya vino oyo etikalaki na sima mpo ete Efrayimi abuka yango ezali kitoko te koleka bambuma ya vino ya liboso ya Abiezeri?
3 God has delivered into your hand the princes of Midian, Oreb and Zeeb; and what was I able to do in comparison with you?" Then their anger subsided toward him, when he had said that.
Nzambe akabaki bakonzi ya bato ya Madiani, Orebi mpe Zeebi, na maboko na bino. Eloko nini ya lokumu ngai nasali oyo ekokani na oyo bino bosala? Liloba oyo ekitisaki kanda na bango.
4 Gideon came to the Jordan, and passed over, he, and the three hundred men who were with him, exhausted and famished.
Jedeon elongo na basoda na ye nkama misato bakomaki na Yordani mpe bakatisaki yango. Atako balembaki, bakobaki kaka kolanda bato ya Madiani.
5 He said to the men of Succoth, "Please give loaves of bread to the people who follow me; for they are exhausted, and I am pursuing after Zebah and Zalmunna, the kings of Midian."
Tango bakomaki na mboka Sukoti, Jedeon asengaki na bato ya mboka: — Bopesa basoda na ngai mapa, pamba te basili kolemba na nzala. Nazali kolanda Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi ya Madiani.
6 The princes of Succoth said, "Are the hands of Zebah and Zalmunna now in your hand, that we should give bread to your army?"
Kasi bakonzi ya mboka Sukoti bazongiselaki ye: — Boni, osili kozwa Zeba mpe Tsalimuna na se ya bokonzi na yo mpo ete biso topesa basoda na yo mapa?
7 Gideon said, "Therefore when YHWH has delivered Zebah and Zalmunna into my hand, then I will thresh your flesh with the thorns of the wilderness and with briers."
Jedeon alobaki: — Lokola bolobi boye, tango Yawe akokaba, na maboko na ngai, Zeba mpe Tsalimuna, nakopasola-pasola misuni na bino na basende ya esobe mpe na singa ya nzube.
8 He went up there to Penuel, and spoke to them in like manner; and the men of Penuel answered him as the men of Succoth had answered.
Wuta kuna, Jedeon amataki na mboka Penueli mpe asengaki epai ya bavandi na yango, ndenge kaka asengaki epai ya bato ya Sukoti. Kasi bato ya Penueli bazongiselaki ye ndenge kaka bato ya Sukoti basalaki.
9 He spoke also to the men of Penuel, saying, "When I come again in peace, I will break down this tower."
Jedeon alobaki na bato ya Penueli: « Soki nakozonga na kimia mpe na bomoi, nakobuka ndako molayi na bino. »
10 Now Zebah and Zalmunna were in Karkor, and their armies with them, about fifteen thousand men, all who were left of all the army of the Kedemites; for there fell one hundred twenty thousand men who drew sword.
Nzokande, Zeba mpe Tsalimuna bazalaki na Karikori elongo na basoda na bango, nkoto zomi na mitano. Oyo ezali nde motango nyonso ya basoda ya bato ya este oyo batikalaki. Pamba te basoda nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi kobunda na mopanga bakufaki.
11 And Gideon went up by the way of those who dwell in tents on the east of Nobah and Jogbehah, opposite Zebah, and struck the army, when the army was unsuspecting.
Bongo, Jedeon akendeki na nzela ya bavandi ya bandako ya kapo, na ngambo ya este ya Noba mpe ya Yogibeka; abetaki mampinga ya banguna na mopanga mpe alongaki bango tango bazalaki kokanisa ete bazali na kimia.
12 Zebah and Zalmunna fled, and he pursued after them, and he took the two kings of Midian, Zebah and Zalmunna, and routed the entire army.
Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi mibale ya Madiani, bakimaki; kasi Jedeon alandaki mpe akangaki bango. Mpe apanzaki mampinga na bango nyonso.
13 Gideon the son of Joash returned from the battle from the ascent of Heres.
Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azongaki wuta na bitumba na nzela ya ngomba Eresi.
14 He caught a young man of the men of Succoth, and inquired of him: and he described for him the officials of Succoth, and its elders, seventy-seven men.
Akangaki elenge mobali moko kati na mibali ya mboka Sukoti, mpe atunaki ye mituna. Boye, elenge mobali yango akomelaki ye bakombo ya bakambi mpe ya bampaka tuku sambo na sambo ya engumba.
15 He came to the men of Succoth, and said, "Look Zebah and Zalmunna, concerning whom you taunted me, saying, "Are the hands of Zebah and Zalmunna now in your hand, that we should give bread to your men who are weary?"
Jedeon akendeki epai ya bato ya mboka Sukoti mpe alobaki na bango: « Tala Zeba mpe Tsalimuna oyo bofingelaki ngai na koloba: ‹ Osili kotia na se ya bokonzi na yo Zeba mpe Tsalumuna mpo ete biso topesa lipa na basoda na yo, oyo basili kolemba? › »
16 He took the elders of the city, and thorns of the wilderness and briers, and with them he threshed the men of Succoth.
Azwaki bampaka ya engumba Sukoti mpe abetisaki bango fimbu, na basende ya esobe mpe singa ya nzube.
17 He broke down the tower of Penuel, and killed the men of the city.
Abukaki ndako molayi ya Penueli mpe abomaki mibali ya engumba.
18 Then he said to Zebah and Zalmunna, "What kind of men were they whom you killed at Tabor?" They answered, "As you are, so were they; each one resembled the son of a king."
Jedeon atunaki Zeba mpe Tsalimuna: — Mibali oyo bobomaki na Tabori, bazalaki ndenge nini? Bazongisaki: — Bakokanaki na yo mpe bazalaki lokola bana ya bakonzi.
19 He said, "They were my brothers, the sons of my mother. As YHWH lives, if you had saved them alive, I would not kill you."
Jedeon alobaki na bango lisusu: — Bato wana bazalaki bandeko na ngai ya mibali, bana ya mama na ngai penza. Na Kombo na Yawe, soki bobikisaki bango, ngai mpe nalingaki koboma bino te.
20 He said to Jether his firstborn, "Get up, and kill them." But the youth did not draw his sword; for he feared, because he was yet a youth.
Mpe apesaki mitindo na Yeteri, mwana na ye ya liboso ya mobali: « Telema mpe boma bango! » Kasi elenge mobali abimisaki mopanga na ye te, pamba te azalaki nanu elenge mpe azalaki na somo.
21 Then Zebah and Zalmunna said, "Rise up yourself, and kill us, for a man is judged by his strength." Gideon arose, and killed Zebah and Zalmunna, and took the crescent ornaments that were on their camels' necks.
Zeba mpe Tsalimuna balobaki: « Telema mpe boma biso yo moko, pamba te likambo oyo ekoki na bato ya mitema makasi. » Boye, Jedeon atelemaki mpe abomaki bango. Akamataki bamedayi ya wolo oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.
22 Then the men of Israel said to Gideon, "Rule over us, both you, and your son, and your son's son also; for you have saved us out of the hand of Midian."
Bana ya Isalaele balobaki na Jedeon: — Zala mokonzi na biso, yo moko, mwana na yo ya mobali mpe koko na yo ya mobali, pamba te obikisi biso na loboko ya bato ya Madiani.
23 Gideon said to them, "I will not rule over you, neither shall my son rule over you: YHWH shall rule over you."
Kasi Jedeon alobaki na bango: — Nakozala mokonzi na bino te, ezala ata mwana na ngai ya mobali. Yawe nde akozala mokonzi na bino.
24 Gideon said to them, "I would make a request of you, that you would give me every man the earrings from his plunder." (For they had golden earrings, because they were Ishmaelites.)
Jedeon abakisaki: — Nalingi kosenga bino eloko moko: Kati na biloko oyo bino bosili kozwa na bitumba, tika ete moko na moko kati na bino apesa ngai eloko ya litoyi. Pamba te banguna na biso bazalaki kolata biloko ya matoyi mpo ete bazali bana ya Isimaeli.
25 They answered, "We will willingly give them." They spread a garment, and every one of them threw an earring from his plunder.
Bana ya Isalaele bazongisaki: — Tokopesa yango. Batandaki elamba na mabele, moko na moko abwakaki eloko na ye ya litoyi, oyo ewutaki na bomengo ya bitumba.
26 The weight of the golden earrings that he requested was one thousand and seven hundred pieces of gold, besides the crescents, and the pendants, and the purple clothing that was on the kings of Midian, and besides the chains that were about their camels' necks.
Biloko ya matoyi ya wolo, oyo Jedeon asengaki ezalaki ya bakilo pene tuku mibale, longola bamedayi ya wolo oyo ezalaki lokola sanza ya ndambo, biloko ya matoyi oyo ediembelaka, bilamba ya talo ya motane makasi oyo bakonzi ya Madiani balataki mpe mayaka oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.
27 Gideon made an ephod of it, and put it in his city, even in Ophrah: and all Israel prostituted themselves after it there; and it became a snare to Gideon, and to his house.
Jedeon asalelaki yango ekeko oyo atiaki na Ofira, engumba na ye. Bana ya Isalaele bakomaki kokende kofukama liboso ya ekeko yango, mpe ekomaki motambo monene mpo na Jedeon mpe libota na ye.
28 So Midian was subdued before the children of Israel, and did not become a threat again. The land had rest forty years in the days of Gideon.
Boye, bato ya Madiani bakitisamaki liboso ya bana ya Isalaele mpe batombolaki lisusu mito na bango te. Na tango nyonso oyo Jedeon azalaki na bomoi, mokili etikalaki na kimia mibu tuku minei.
29 Jerubbaal the son of Joash went and lived in his own house.
Yerubali, mwana mobali ya Joasi, azongaki na ndako na ye mpe avandaki kuna.
30 Gideon had seventy sons conceived from his body; for he had many wives.
Jedeon azalaki na bana tuku sambo oyo bawutaki na mokongo na ye, pamba te azalaki na basi ebele.
31 His secondary wife who was in Shechem, she also bore him a son, and he named him Abimelech.
Makangu na ye, oyo azalaki kovanda na Sishemi, abotelaki ye mpe mwana mobali oyo bapesaki kombo « Abimeleki. »
32 Gideon the son of Joash died in a good old age, and was buried in the tomb of Joash his father, in Ophrah of the Abiezrites.
Jedeon, mwana mobali ya Joasi, akufaki na kimobange ya esengo, mpe bakundaki ye kati na kunda ya Joasi, na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.
33 It happened, as soon as Gideon was dead, that the children of Israel turned again, and played the prostitute after the Baals, and made Baal Berith their god.
Sima na kufa ya Jedeon, bana ya Isalaele bazongelaki kosambela banzambe Bala. Bakomisaki Bala-Beriti nzambe na bango.
34 The children of Israel did not remember YHWH their God, who had delivered them out of the hand of all their enemies on every side;
Bana ya Isalaele babosanaki Yawe, Nzambe na bango, oyo akangolaki bango na maboko ya banguna na bango.
35 neither did they show kindness to the house of Jerubbaal, who is Gideon, according to all the goodness which he had shown to Israel.
Bazongisaki ata bolamu moko te na libota ya Yerubali oyo elakisi Jedeon, mpo na bolamu nyonso oyo asalelaki Isalaele.

< Judges 8 >