< John 11 >

1 Now a certain man was sick, Lazarus from Bethany, of the village of Mary and her sister, Martha.
Kati na mboka Betani, ezalaki na mobali moko na kombo Lazare; azalaki kobela mpe azalaki na bandeko basi mibale: Mari mpe Marte.
2 It was that Mary who had anointed the Lord with ointment, and wiped his feet with her hair, whose brother, Lazarus, was sick.
Mari azali mwasi oyo asopelaki Nkolo malasi mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo ya Yesu, mpe Lazare oyo azali kobela azali ndeko na ye ya mobali.
3 The sisters therefore sent to him, saying, "Lord, look, the one you love is sick."
Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu: — Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela.
4 But when Jesus heard it, he said, "This sickness is not to death, but for the glory of God, that God's Son may be glorified by it."
Tango Yesu ayokaki yango, alobaki: — Bokono oyo ekoboma ye te, kasi ekopesa Nzambe nkembo mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa lokumu.
5 Now Jesus loved Martha, and her sister, and Lazarus.
Nzokande, Yesu azalaki kolinga makasi Marte, ndeko na ye ya mwasi mpe Lazare.
6 When therefore he heard that he was sick, he stayed two days in the place where he was.
Atako ayokaki ete Lazare azali kobela, kasi avandaki lisusu mikolo mibale na esika oyo azalaki.
7 Then after this he said to the disciples, "Let us go into Judea again."
Bongo alobaki na bayekoli na Ye: — Tosengeli sik’oyo kozonga na Yuda.
8 The disciples told him, "Rabbi, the Jewish leaders were just trying to stone you, and are you going there again?"
Bayekoli balobaki na Ye: — Moteyi, wuta mokolo oyo Bayuda balingaki koboma Yo na mabanga, eleki nanu mikolo mingi te; bongo mpo na nini olingi lisusu kozonga kuna?
9 Jesus answered, "Are there not twelve hours of daylight? If anyone walks in the day, he does not stumble, because he sees the light of this world.
Yesu azongisaki: — Boni, moyi ezalaka na bangonga zomi na mibale te? Soki moto atamboli na moyi, akobeta mabaku te, pamba te azali komona pole ya mokili oyo.
10 But if anyone walks in the night, he stumbles, because the light is not in him."
Nzokande, soki moto atamboli na butu, akobeta penza mabaku, pamba te pole ezali te.
11 He said these things, and after that, he said to them, "Our friend, Lazarus, has fallen asleep, but I am going so that I may awake him out of sleep."
Sima na Ye koloba bongo, alobaki na bango lisusu: — Molingami na biso, Lazare, alali pongi; kasi nazali kokende kolamusa ye.
12 Then the disciples said to him, "Lord, if he has fallen asleep, he will recover."
Bayekoli balobaki na Yesu: — Nkolo, soki azali kolala pongi, akobika na bokono na ye!
13 Now Jesus had spoken of his death, but they thought that he spoke of taking rest in sleep.
Solo, Yesu alingaki koloba ete Lazare akufi, kasi bayekoli bakanisaki ete azali kolobela nde pongi oyo tolalaka.
14 So Jesus said to them plainly then, "Lazarus is dead.
Bongo Yesu alobaki na bango na polele: — Lazare akufi.
15 I am glad for your sakes that I was not there, so that you may believe. Nevertheless, let us go to him."
Mpe nazali na esengo makasi mpo na bino lokola bozalaki kuna te, pamba te likambo oyo ekosala ete kondima na bino elendisama. Kasi sik’oyo tokende epai na ye.
16 Thomas therefore, who is called Didymus, said to his fellow disciples, "Let us go also, that we may die with him."
Na bongo, Toma, oyo bazalaki mpe kobenga « Lipasa, » alobaki na bayekoli mosusu: — Biso mpe, tokende mpo ete tokufa elongo na Yesu!
17 So when Jesus came, he found that he had been in the tomb four days already.
Tango Yesu akomaki, ayokaki ete basilaki kokunda Lazare kati na kunda wuta mikolo minei.
18 Now Bethany was near Jerusalem, about two miles away.
Mpe lokola Betani ezalaki mosika ya Yelusalemi na bakilometele pene misato,
19 Many of the Jewish people had come to Martha and Mary, to console them concerning their brother.
Bayuda mingi bayaki epai ya Mari mpe Marte mpo na kokabola mawa elongo na bango, mpo na kufa ya ndeko na bango.
20 Then when Martha heard that Jesus was coming, she went and met him, but Mary stayed in the house.
Tango Marte ayokaki ete Yesu azali koya, akendeki kokutana na Ye; kasi Mari atikalaki ya kovanda kati na ndako.
21 Therefore Martha said to Jesus, "Lord, if you would have been here, my brother would not have died.
Marte alobaki na Yesu: — Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te!
22 Even now I know that whatever you ask of God, God will give you."
Kasi nazali na kondima ete, ata sik’oyo, Nzambe akopesa Yo nyonso oyo okosenga Ye.
23 Jesus said to her, "Your brother will rise again."
Yesu alobaki na ye: — Ndeko na yo akosekwa.
24 Martha said to him, "I know that he will rise again in the resurrection at the last day."
Marte azongiselaki Yesu: — Nayebi solo ete akosekwa, na mokolo ya suka, na tango bakufi bakosekwa.
25 Jesus said to her, "I am the resurrection and the life. He who believes in me will still live, even if he dies.
Yesu alobaki na ye: — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi.
26 And whoever lives and believes in me will never die. Do you believe this?" (aiōn g165)
Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango? (aiōn g165)
27 She said to him, "Yes, Lord. I have come to believe that you are the Christ, the Son of God, he who comes into the world."
Marte azongisaki: — Iyo, Nkolo! Nandimi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe, oyo asengelaki koya na mokili.
28 And when she had said this, she went away, and called Mary, her sister, secretly, saying, "The Teacher is here, and is calling you."
Sima na Marte koloba bongo, akendeki kobenga Mari, ndeko na ye; mpe wana abendaki ye pembeni, alobaki na ye na mongongo ya se penza: — Moteyi ayei, azali kobenga yo.
29 When she heard this, she arose quickly, and went to him.
Tango kaka Mari ayokaki bongo, atelemaki na lombangu mpe akendeki epai ya Yesu.
30 Now Jesus had not yet come into the village, but was still in the place where Martha met him.
Nzokande, Yesu akotaki nanu te na mboka; azalaki kaka na esika oyo Marte akutanaki na Ye.
31 Then the Judeans who were with her in the house, and were consoling her, when they saw Mary, that she rose up quickly and went out, followed her, supposing that she was going to the tomb to weep there.
Tango Bayuda oyo bazalaki elongo na Mari kati na ndako mpo na kokabola mawa elongo na ye, bamonaki Mari kotelema na lombangu mpe kobima libanda, balandaki ye, pamba te bakanisaki ete akei kolela na kunda.
32 Therefore when Mary came to where Jesus was, and saw him, she fell down at his feet, saying to him, "Lord, if you would have been here, my brother would not have died."
Tango kaka Mari akomaki na esika oyo Yesu azalaki mpe amonaki Ye, amibwakaki na makolo na Ye mpe alobaki: — Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te!
33 When Jesus therefore saw her weeping, and the Judeans weeping who came with her, he was deeply moved in spirit and was troubled,
Tango Yesu amonaki Mari mpe Bayuda oyo bayaki elongo na ye kolela, ayokaki mawa makasi mpe amitungisaki.
34 and said, "Where have you put him?" They told him, "Lord, come and see."
Atunaki bango: — Bokundaki ye wapi? Bazongisaki: — Nkolo, yaka kotala.
35 Jesus wept.
Yesu alelaki.
36 The Judeans therefore said, "See how he loved him."
Bongo Bayuda balobaki: — Tala ndenge nini alingaki ye!
37 But some of them said, "Could not this man, who opened the eyes of him who was blind, have also kept this man from dying?"
Kasi bamosusu kati na bango balobaki: — Ezali ye te oyo abikisaki mokufi miso? Bongo ndenge nini akokaki te kosala ete Lazare akufa te?
38 So Jesus, deeply moved again, came to the tomb. Now it was a cave, and a stone lay against it.
Lokola Yesu amitungisaki lisusu makasi, akendeki na kunda. Ezalaki kati na ebombamelo ya mabanga oyo, na ekotelo na yango, batiaki libanga moko ya monene.
39 Jesus said, "Take away the stone." Martha, the sister of the dead man, said to him, "Lord, by this time there is a stench, for he has been dead four days."
Yesu alobaki na bango: — Botindika libanga. Kasi Marte, ndeko ya mowei, alobaki na Yesu: — Nkolo, azali kolumba solo! Wuta bakundaki ye, esali mikolo minei.
40 Jesus said to her, "Did I not tell you that if you believed, you would see God's glory?"
Yesu alobaki na ye: — Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe?
41 So they took away the stone. And Jesus lifted up his eyes, and said, "Father, I thank you that you listened to me.
Boye batindikaki libanga. Bongo Yesu atombolaki miso na likolo mpe alobaki: « Tata, nazali kotonda Yo mpo ete oyoki Ngai.
42 I know that you always listen to me, but because of the crowd that stands around I said this, that they may believe that you sent me."
Nayebaki ete oyokaka Ngai tango nyonso; kasi soki nalobi bongo, ezali mpo ete bato oyo bazali zingazinga na Ngai bandima ete Yo nde otindaki Ngai. »
43 When he had said this, he shouted with a loud voice, "Lazarus, come out."
Sima na Yesu koloba bongo, agangaki: — Lazare, bima!
44 The man who had died came out, bound hand and foot with wrappings, and his face was wrapped around with a cloth. Jesus said to them, "Free him, and let him go."
Mpe mowei abimaki longwa na kunda; makolo mpe maboko na ye ezalaki ya kokangama na basinga ya bitendi, mpe elongi na ye ezalaki ya kozipama na elamba. Bongo Yesu alobaki na bato oyo bazalaki wana: — Bofungola ye basinga wana mpe botika ye kokende.
45 Therefore many of the Judeans, who came to Mary and had seen the things which he did, believed in him.
Kati na Bayuda oyo bayaki epai ya Mari, mingi kati na bango bandimaki Yesu tango bamonaki makambo oyo asalaki;
46 But some of them went away to the Pharisees, and told them the things which Jesus had done.
kasi bamosusu bakendeki kokuta Bafarizeo mpo na koyebisa bango makambo yango, oyo Yesu asalaki.
47 The chief priests therefore and the Pharisees gathered a council, and said, "What are we doing? For this man does many signs.
Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo babengisaki Likita-Monene mpe batunanaki: — Tosala nini? Moto oyo azali kosala bikamwa mingi.
48 If we leave him alone like this, everyone will believe in him, and the Romans will come and take away both our place and our nation."
Soki totiki ye kokoba kosala bongo, bato nyonso bakondima ye; bongo bato ya Rome bakoya bakobebisa Tempelo na biso mpe ekolo na biso.
49 But a certain one of them, Caiaphas, being high priest that year, said to them, "You know nothing at all,
Moko kati na bango, Kayifa, oyo azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe na mobu wana, alobaki na bango:
50 nor do you consider that it is advantageous for you that one man should die for the people, and that the whole nation not perish."
— Bozali kososola eloko moko te; bozali mpe komona te ete ezali mpo na bolamu na bino soki moto moko akufi mpo na bato nyonso, mpo ete ekolo mobimba ebebisama te?
51 Now he did not say this of himself, but being high priest that year, he prophesied that Jesus would die for the nation,
Nzokande, makambo oyo azalaki koloba na bango ewutaki na makanisi na ye moko te; kasi lokola azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe na mobu wana, yango wana asakolaki ete Yesu asengelaki kokufa mpo na ekolo ya Bayuda.
52 and not for the nation only, but that he might also gather together into one the children of God who are scattered abroad.
Mpe asengelaki kokufa kaka mpo na ekolo yango te, kasi mpe mpo na kosangisa kati na libota moko, bana nyonso ya Nzambe, oyo bapalangana bipai na bipai.
53 So from that day on they plotted to kill him.
Ezali na mokolo wana nde bazwaki mokano ya koboma Yesu.
54 Jesus therefore walked no more openly among the Judeans, but departed from there into the country near the wilderness, to a city called Ephraim; and stayed there with his disciples.
Na bongo, Yesu atikaki komilakisa na polele kati na Bayuda; alongwaki wana mpe akendeki na etuka oyo ezalaki pene ya esobe, kati na engumba moko na kombo Efrayimi; mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye.
55 Now the Jewish Passover was near, and many went up from the country to Jerusalem before the Passover, to purify themselves.
Kasi lokola feti ya Pasika ya Bayuda ekomaki pene, bato mingi ya mboka bakendeki na Yelusalemi mpo na komipetola liboso ya feti yango.
56 Then they sought for Jesus and spoke one with another, as they stood in the temple, "What do you think—that he is not coming to the feast at all?"
Bazalaki koluka Yesu mpe kotunana bango na bango kati na lopango ya Tempelo: — Bokanisi nini? Akoya penza na feti?
57 Now the chief priests and the Pharisees had given orders that if anyone knew where he was, he should report it, that they might arrest him.
Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basilaki kopesa mitindo ete moto nyonso oyo akoyeba esika oyo Yesu azali, ayebisa bango mpo ete bakanga ye.

< John 11 >