< Job 4 >

1 Then Eliphaz the Temanite answered,
Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki:
2 "If someone ventures to talk with you, will you be grieved? But who can withhold himself from speaking?
« Soki moto moko ameki koloba na yo ata liloba moko, boni, okotomboka mpo na yango te? Kasi nani akoki penza kokanga motema mpe kozanga maloba?
3 Look, you have instructed many, you have strengthened the weak hands.
Kanisa nanu ndenge ozalaki koteya bato ebele, ndenge ozalaki kolendisa bato oyo balembaki!
4 Your words have supported him who was falling, You have made firm the feeble knees.
Maloba na yo ezalaki kolendisa bato oyo bazalaki kotepatepa, mpe oyo mabolongo na bango ezalaki kolemba.
5 But now it is come to you, and you faint. It touches you, and you are troubled.
Kasi awa sik’oyo pasi ekomeli yo, olembi na yo! Awa pasi ebeti yo, okomi na yo koyoka somo!
6 Isn't your piety your confidence? Isn't the integrity of your ways your hope?
Boni, kondima na yo epai ya Nzambe esengeli te kozala likonzi na yo, mpe bosembo na yo esengeli te kosimba elikya na yo?
7 "Remember, now, whoever perished, being innocent? Or where were the upright cut off?
Kanisa nanu: Nani akotikala kokufa te mpo ete asalaka mabe te? Esika nini bato ya sembo bakotikala kokufa te?
8 According to what I have seen, those who plow iniquity, and sow trouble, reap the same.
Kolanda makambo oyo ngai nasili komona, bato oyo basalaka mabe, mpe ba-oyo balonaka minyoko, babukaka mpe kaka mabe lokola mbuma;
9 By the breath of God they perish. By the blast of his anger are they consumed.
bakufaka na mopepe ya Nzambe mpe basilaka na mopepe ya kanda na Ye.
10 The roaring of the lion, and the voice of the fierce lion, the teeth of the young lions, are broken.
Nkosi ekoki na yango koganga, mpe mwana ya nkosi ekoki kotia makelele ndenge elingi, kasi Nzambe abukaka minu ya nkosi.
11 The old lion perishes for lack of prey. The cubs of the lioness are scattered abroad.
Nkosi ekufaka mpo na kozanga nyama ya kolia, mpe bana ya nkosi ya mwasi epanzanaka.
12 "Now a thing was secretly brought to me. My ear received a whisper of it.
Liloba moko eyelaki ngai na nkuku, mpe matoyi na ngai eyokaki yango na se penza:
13 In thoughts from the visions of the night, when deep sleep falls on men,
kati na bandoto ya butu, na tango bato bazwaka pongi makasi,
14 fear came on me, and trembling, which made all my bones shake.
kobanga mpe somo ekangaki ngai mpe eningisaki mikuwa na ngai nyonso;
15 Then a spirit passed before my face. The hair of my flesh stood up.
molimo moko elekaki liboso ya elongi na ngai lokola mopepe, mpe suki ya moto na ngai etelemaki.
16 It stood still, but I couldn't discern its appearance. A form was before my eyes. Silence, then I heard a voice, saying,
Molimo yango etelemaki wana, kasi nalongaki te kososola soki ezali nini; elilingi yango etelemaki liboso ya miso na ngai, mpe nayokaki mongongo moko koloba na se penza:
17 'Shall mortal man be more just than God? Shall a man be more pure than his Maker?
‹ Boni, moto akoki solo koleka Nzambe na bosembo to akoki solo koleka Mokeli na ye na bule?
18 Look, he puts no trust in his servants. He charges his angels with error.
Soki Nzambe atielaka basali na Ye motema te, soki kutu amonaka mabunga epai ya ba-anjelu na Ye,
19 How much more, those who dwell in houses of clay, whose foundation is in the dust, who are crushed before the moth.
mpo na nini te epai ya bato oyo basalema na mabele, ba-oyo bazali kaka putulu mpe bakoki kofinafina bango lokola mitsopi?
20 Between morning and evening they are destroyed. They perish forever without any regarding it.
Kobanda na tongo kino na pokwa, bakataka-kataka bango na biteni; bakufaka mpo na libela, mpe moto ata moko te alandelaka likambo na bango;
21 Isn't their tent cord plucked up within them? They die, and that without wisdom.'
basinga oyo esimbaka bandako na bango ya kapo epikolamaka na mbalakata, mpe bakufaka ndenge wana bazanga bwanya. ›

< Job 4 >