< Job 3 >

1 After this Job opened his mouth, and cursed his day.
Sima na yango, Yobo afungolaki monoko na ye mpe alakelaki mokolo ya mbotama na ye mabe.
2 Job answered:
Yobo alobaki:
3 "Let the day perish in which I was born, the night which said, 'A man is conceived.'
« Tika ete mokolo ya mbotama na ngai, mpe butu oyo elobaki: ‹ Mwana mobali moko abotami, › ekufa!
4 Let that day be darkness. May God above not care about it, neither let the light shine on it.
Tika ete mokolo yango ebongwana molili! Tika ete, wuta na likolo, Nzambe akanisa yango lisusu te! Tika ete pole engengela yango lisusu te!
5 Let darkness and the shadow of death claim it for their own. Let a cloud dwell on it. Let the blackness of the day terrify it.
Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango! Tika ete lipata ezipa yango, mpe molili ebangisa pole na yango!
6 As for that night, let thick darkness seize on it. Let it not rejoice among the days of the year. Let it not come into the number of the months.
Tika ete molili makasi ekotela butu yango, ete batanga yango lisusu te kati na mikolo ya mibu to kati na mikolo ya basanza!
7 Look, let that night be barren. Let no joyful voice come in it.
Tika ete butu yango etikala ekomba, ete koganga moko te ya esengo eyokana na butu yango!
8 Let them curse it who curse the day, who are ready to rouse up leviathan.
Tika ete bato oyo balakelaka mikolo mabe, bato oyo balamusaka bilima minene ya mayi, balakela yango mabe!
9 Let the stars of its twilight be dark. Let it look for light, but have none, neither let it see the eyelids of the morning,
Tika ete minzoto ya tongo na yango ekoma molili, ezela na pamba tongo oyo ekotana mpe emona kongenga ya tongo te.
10 because it did not shut up the doors of my mother's womb, nor did it hide trouble from my eyes.
Pamba te ekangelaki ngai te bikuke ya libumu ya mama na ngai mpo na kobombela miso na ngai pasi ya boye!
11 "Why did I not die from the womb? Why did I not give up the spirit when my mother bore me?
Mpo na nini namikufelaki te kati na libumu ya mama na ngai? Mpo na nini nakataki motema te tango nabimaki na libumu ya mama na ngai?
12 Why did the knees receive me? Or why the breast, that I should suck?
Mpo na nini mabolongo eyambaki ngai? Mpo na nini mama amelisaki ngai mabele?
13 For now should I have lain down and been quiet. I should have slept, then I would have been at rest,
Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia, nalingaki na ngai kokufa mpe kopema
14 with kings and counselors of the earth, who built up waste places for themselves;
elongo na bakonzi mpe bapesi toli ya mokili, oyo bamitongelaki malita na bango kasi lelo ebeba,
15 or with princes who had gold, who filled their houses with silver:
elongo na bakambi oyo bazalaki na wolo mpe batondisa palata kati na bandako na bango.
16 or as a hidden untimely birth I had not been, as infants who never saw light.
Mpo na nini babombaki ngai te na se ya mabele lokola zemi oyo esopani to lokola mwana oyo atikala komona te pole ya mokolo?
17 There the wicked cease from troubling. There the weary are at rest.
Kuna, bato mabe batikaka konyokola bato, bato oyo balembi bazwaka bopemi,
18 There the prisoners are at ease together. They do not hear the voice of the taskmaster.
bato ya boloko bazwaka kimia mpe bayokaka lisusu te mongongo ya mokengeli.
19 The small and the great are there. The servant is free from his master.
Ezala mobola to mozwi, bango mibale bazalaka kuna, mpe mowumbu akangolamaka na maboko ya nkolo na ye.
20 "Why is light given to him who is in misery, life to the bitter in soul,
Mpo na nini pole epesamelaka bato ya pasi? Mpo na nini bomoi epesamelaka moto oyo azali na pasi na motema?
21 Who long for death, but it doesn't come; and dig for it more than for hidden treasures,
Bazelaka kufa, kasi eyaka te; nzokande balukaka yango koleka bozwi oyo ebombama,
22 who rejoice exceedingly, and are glad, when they can find the grave?
balingaki kotonda na esengo mpe kosepela soki bamoni kunda!
23 Why is light given to a man whose way is hid, whom God has hedged in?
Mpo na nini bomoi epesamela moto oyo nzela na ye ebombama, moto oyo Nzambe azingela lokola lopango?
24 For my sighing comes before I eat. My groanings are poured out like water.
Pamba te kolela ekomi bilei na ngai, bileli na ngai ezali kosopana lokola mayi.
25 For the thing which I fear comes on me, That which I am afraid of comes to me.
Makambo oyo nazalaki kobanga, yango nde ezali kokomela ngai; oyo nazalaki koyokela somo, yango nde ezali kosalemela ngai.
26 I am not at ease, neither am I quiet, neither have I rest; but trouble comes."
Nazangi kimia, motema na ngai ezali kokita te mpe nazangi bopemi; kasi minyoko na minyoko kaka nde nazali na yango. »

< Job 3 >