< Isaiah 53 >

1 YHWH, who has believed our message? And to whom has the arm of YHWH been revealed?
Nani andimaki makambo oyo tosakolaki? Mpe epai ya nani loboko na Yawe emonisamaki?
2 For he grew up before him as a tender plant, and as a root out of dry ground. He had no beauty or majesty to attract us to him, nor special appearance that we should desire him.
Pamba te akolaki liboso na Ye lokola nzete ya moke, lokola mosisa oyo ebimi na esobe; azalaki ata na kitoko to lokumu te oyo ekokaki kobenda miso na biso ete etala ye; lolenge na ye ezalaki ata na eloko moko te oyo ekokaki kosala ete tosepela na ye.
3 He was despised, and rejected by people; a man of sorrows, and familiar with illness; and as one from whom people hide their face. He was despised, and we did not value him.
Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.
4 Surely he bore our diseases, and took our pains; yet we considered him stricken, and struck down by God, and afflicted.
Solo, amemaki mokumba ya bokono na biso mpe alataki pasi na biso kati na nzoto na ye; kasi biso, tokanisaki ete Nzambe nde abetaki ye, apesaki ye etumbu mpe asambwisaki ye.
5 But he was pierced for our transgressions, and he was crushed for our iniquities. The punishment that brought our peace was on him; and by his wounds we are healed.
Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso, banyokolaki ye mpo na masumu na biso; etumbu oyo ememelaki biso kimia ekweyaki na nzoto na ye; mpe na nzela ya bapota na ye, biso tobikisami na bokono na biso.
6 We all like sheep have gone astray. Everyone has turned to his own way; and YHWH has laid on him the iniquity of us all.
Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.
7 He was oppressed, yet when he was afflicted he did not open his mouth. He was led like a sheep to the slaughter, and like a lamb before its shearer is silent, so he does not open his mouth.
Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi, kasi atikalaki kofungola monoko na ye te lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale; akangaki monoko na ye.
8 In his oppression his justice was taken away. Who will consider his generation? For his life was cut off from the earth. For the transgression of my people he was led to death.
Babomaki ye na nzela ya minyoko mpe ya etumbu; kasi nani kati na bato ya tango na ye akokaki komitungisa na tina na ye? Pamba te balongolaki ye na mokili ya bato ya bomoi, babetaki ye likolo ya masumu ya bato na Ngai.
9 And they assigned his grave with the wicked, yet with the rich at his death, though he had committed no sin, nor was deceit found in his mouth.
Bapesaki ye kunda kati na bato mabe, mpe kunda na ye ezalaki elongo na bazwi, atako asalaki likambo moko te ya mabe, mpe monoko na ye etikalaki koloba lokuta te.
10 Yet YHWH was pleased to crush him and make him ill. Although his soul is made a reparation offering, he will see his offspring, he will prolong his days, and the desire of YHWH will succeed by his hand.
Nzokande, ezalaki mokano na Yawe ete anyokwama na nzela ya pasi. Atako Yawe akomisaki bomoi na ye mbeka mpo na masumu, akomona bakitani na ye mpe mikolo na ye ekobakisama; bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye.
11 After the suffering of his soul he will see light and be satisfied by his knowledge. The righteous one, my servant, will make many righteous, and he will bear their iniquities.
Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.
12 Therefore I will divide him a portion with the great, and he will divide the spoil with the strong; because he poured out his soul to death, and he was numbered with transgressors; yet he bore the sins of many, and made intercession for their transgressions.
Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, pamba te akabaki bomoi na ye na kufa mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, pamba te amemaki masumu ya bato ebele mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.

< Isaiah 53 >