< Genesis 43 >

1 Now the famine was severe in the land.
Nzala makasi ekotaki kati na mokili.
2 So it came about when they had eaten up the grain which they had brought out of Egypt, that their father said to them, "Go again, buy us a little more food."
Tango libota ya Jakobi baliaki biloko nyonso oyo bamemaki wuta na Ejipito, Jakobi alobaki na bana na ye: — Bozonga kuna kosomba ndambo ya biloko.
3 But Judah spoke to him, saying, "The man strictly warned us, saying, 'You may not see my face unless your brother is with you.'
Yuda azongisaki: — Moto wana alobaki na biso ete tozonga kuna te soki ndeko na biso azali elongo na biso te.
4 If you'll send our brother with us, we'll go down and buy you food,
Soki otiki ndeko na biso kokende elongo na biso, wana tokokende na Ejipito mpe tokosombela yo biloko.
5 but if you will not send him, we will not go down, for the man said to us, 'You may not see my face unless your brother is with you.'"
Kasi soki otiki ye te, biso mpe tokokende te; pamba te moto wana ayebisaki biso malamu: « Bokotelema liboso na ngai te soki ndeko na bino azali te. »
6 Then Israel said, "Why did you bring this trouble on me by telling the man that you had another brother?"
Isalaele azongisaki: — Mpo na nini bosali ngai mabe boye? Mpo na nini boyebisaki moto wana ete bozali na ndeko mosusu?
7 They said, "The man kept asking about ourselves, and concerning our relatives, saying, 'Is your father still alive? Do you have another brother?' So we just answered his questions. How were we to know that he would say, 'Bring your brother down?'"
Bazongisaki: — Moto yango atunaki biso malamu makambo oyo etali biso moko mpe libota na biso. Atunaki biso: « Tata na bino azali nanu na bomoi? Bozali na ndeko mosusu ya mobali? » Mpe biso topesaki eyano na mituna na ye. Tokokaki te koyeba ete akoloba na biso: « Boya na ndeko na bino ya mobali awa. »
8 Then Judah said to his father Israel, "Send the boy with me and we'll get up and go, so that we may live and not die, both we and you, and also our little ones.
Yuda ayebisaki tata na ye Isalaele: — Tata, tika Benjame akende elongo na ngai. Tokotelema mpe tokokende mpo ete biso elongo na yo mpe bana na biso, tozala na bomoi, kasi tokufa te na nzala.
9 I will be collateral for him. You can hold me responsible for him. If I fail to bring him to you and set him before you, then let me bear the blame forever,
Nandimi kobatela ye; boye okotuna ye na maboko na ngai. Soki nazongiseli yo ye te mpe namemi ye liboso na yo te, tika ete nazala na ngambo epai na yo bomoi na ngai mobimba.
10 for if we hadn't delayed, surely we would have returned a second time by now."
Soki towumelaki te, tokokaki kozonga mbala ya mibale.
11 Then their father Israel said to them, "If it must be so, then do this: Take some of the best fruits of the land in your bags and bring a gift for the man, a little balm, a little honey, spices and myrrh, pistachio nuts and almonds.
Tata na bango Isalaele alobaki na bango: — Soki esengeli kozala bongo, wana bosala boye: botia na basaki na bino biloko oyo eleki kitoko kati na mokili mpe bopesa yango lokola kado epai ya moto wana: ndambo ya mafuta ya solo kitoko, ndambo ya mafuta ya nzoyi, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, lodanumi, pisitashi mpe bambuma ya amande.
12 Take twice as much silver in your hand, and take back the silver that was returned in the mouth of your sacks. Perhaps it was an oversight.
Bozwa mbala mibale motuya ya mbongo oyo ezalaki kati na basaki na bino mpe bozongisa mbongo oyo bokutaki na basaki na bino; tango mosusu ezalaki libunga.
13 Take your brother also, and get up, go back to the man.
Bozwa ndeko na bino ya mobali, botelema mpe bozonga epai ya moto wana.
14 And may El Shaddai grant you mercy before the man, that he may release to you your other brother and Benjamin. If I am deprived of my children, then I am deprived."
Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso ayokela bino mawa tango bokotelema liboso ya moto wana, mpo ete bokoka kozwa ndeko na bino mosusu, mpe Benjame azonga elongo na bino. Kasi mpo na ngai, soki nakozanga bana, malamu nazanga bango!
15 The men took this gift, and they took twice as much silver with them, and Benjamin. Then they got up and went down to Egypt, and presented themselves before Joseph.
Boye bato yango bazwaki bakado; bazwaki lisusu mbala mibale motuya ya mbongo oyo ezalaki na basaki na bango mpe Benjame. Bakendeki na Ejipito mpe bamilakisaki na miso ya Jozefi.
16 When Joseph saw Benjamin with them, he said to the servant of his house, "Bring the men into the house, and slaughter an animal and prepare it; for the men will eat with me at noon."
Tango Jozefi amonaki Benjame elongo na bango, alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi na ye: « Mema bato oyo na ndako na ngai; boboma nyama moko mpe bolamba yango mpo ete bato oyo bakolia elongo na ngai na midi. »
17 The man did as Joseph had said, and the man brought the men to Joseph's house.
Moto yango asalaki ndenge kaka Jozefi alobaki na ye mpe amemaki bango na ndako ya Jozefi.
18 But the men were afraid because they were brought to Joseph's house, and they said, "It is because of the silver that was returned in our sacks the first time that we are brought here; so that he may capture us, and make us slaves, and take our donkeys."
Bato yango babangaki makasi tango bamemaki bango na ndako ya Jozefi mpe bazalaki kolobana bango na bango: — Bamemi biso awa likolo ya mbongo oyo batiaki na basaki na biso, na mbala ya liboso. Bakokweya likolo na biso, bakolonga biso, bakokanga biso lokola bawumbu mpe bakozwa ba-ane na biso.
19 So they came near to the man of Joseph's house and they spoke to him at the entrance of the house,
Bapusanaki pembeni ya moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako ya Jozefi mpe balobaki na ye na ekuke ya ndako:
20 and said, "My lord, we indeed came down the first time to buy food.
— Limbisa biso, nkolo na ngai! Toyaki mbala ya liboso mpo na kosomba biloko ya kolia;
21 But when we came to the lodging place, we opened our sacks, and look, every man's silver was in the mouth of his sack, our silver in full weight. So we have brought it back in our hand.
kasi tango totelemaki na esika ya kolekisa butu, tofungolaki basaki na biso; mpe moko na moko kati na biso amonaki mbongo na ye kati na saki na ye ndenge kaka ezalaki, yango wana tozongi na yango.
22 We have brought down additional silver with us to buy food. We do not know who put our silver in our sacks."
Tomemi mbongo mosusu mpo na kosomba biloko ya kolia, toyebi te nani azongisaki mbongo na biso na basaki na biso.
23 He said, "Peace to you. Do not be afraid. Your God and the God of your father has given you treasure in your sacks. I received your silver." Then he brought Simeon out to them.
Alobaki na bango: — Malamu! Bobanga te. Ezali Nzambe na bino, Nzambe ya tata na bino, nde atiaki bomengo kati na basaki na bino. Kasi mpo na mbongo na bino, ngai nazwaki yango. Sima, amemelaki bango Simeoni.
24 The man brought the men into Joseph's house and gave them water, and they washed their feet. Then he gave their donkeys food.
Moto yango akotisaki bango na ndako ya Jozefi, apesaki bango mayi ya kosukola makolo mpe abongisaki bilei mpo na ba-ane na bango.
25 They prepared the gift for Joseph's arrival at noon, for they heard that they would eat a meal there.
Babongisaki bakado na bango mpo na boyei ya Jozefi na midi, pamba te bayokaki ete bakolia kuna.
26 When Joseph came home, they prepared the gift they had brought with them into the house, and bowed themselves down to him with their face to the ground.
Tango Jozefi ayaki na ndako, bapesaki ye bakado oyo bamemaki na ndako mpe bagumbamaki liboso na ye mito na se.
27 Then he asked them of their welfare, and said, "Is your father well, the old man of whom you spoke? Is he still alive?"
Atunaki bango: — Boni, bozali malamu? Abakisaki: — Boni tata na bino ya mobange oyo boyebisaki ngai, azali malamu?
28 And they answered, "Your servant, our father, is well. He is still alive." Then he said, "Blessed be that man by God." And they bowed and prostrated themselves.
Bazongisaki: — Mosali na yo, tata na biso, azali nanu na bomoi mpe azali malamu. Bakitisaki mito mpe bagumbamaki liboso na ye.
29 And he looked up and saw his brother Benjamin, his mother's son, and said, "Is this your youngest brother, of whom you told me about?" Then he said, "God be gracious to you, my son."
Tango Jozefi atombolaki miso, amonaki Benjame, ndeko na ye ya mobali, mwana ya mama na ye. Atunaki: — Ye wana nde ndeko na bino ya suka oyo boyebisaki ngai? Abakisaki: — Tika ete Nzambe atalisa yo ngolu na Ye.
30 Then Joseph hurried out, for he was overcome with emotion because of his brother, and he was at the point of tears. So he entered into his chamber and wept there.
Jozefi ayokaki pasi makasi na motema tango amonaki ndeko na ye, akimaki mbangu na libanda mpe alukaki esika mpo na kolela. Akotaki na shambre na ye mpe alelaki kuna.
31 Then he washed his face and came out. And he controlled himself and said, "Serve the food."
Tango asilisaki kosukola elongi na ye, abimaki libanda, akangaki motema mpe alobaki: — Botia biloko ya kolia na mesa.
32 They served him by himself, and them by themselves, and the Egyptians who ate with him by themselves, because the Egyptians could not eat food with the Hebrews, for that is disgraceful to the Egyptians.
Batielaki Jozefi bilei na mesa na ye moko, bandeko na ye mpe na mesa na bango; bongo bato ya Ejipito oyo bazalaki kolia na ye esika moko, bango mpe na mesa na bango, pamba te bato ya Ejipito bakokaki te kolia esika moko na Ba-Ebre, pamba te ezalaki ekila mpo na bato ya Ejipito.
33 And they sat before him, the firstborn according to his birthright, and the youngest according to his youth, and the men looked at each other with amazement.
Bavandisaki bango, kobanda na mwana ya liboso kino na oyo ya suka, bazalaki kotalana bango na bango na kokamwa.
34 Then he gave portions to them in front of him, but Benjamin's portion was five times as much as any of theirs. So they drank until they all became drunk.
Jozefi apesaki bango biloko oyo ewutaki na mesa na ye; mpe Benjame azwaki mbala mitano koleka bango nyonso. Na bongo, bamelaki elongo na ye mpe balangwaki.

< Genesis 43 >