< Genesis 35 >

1 And God said to Jacob, "Arise, go up to Bethel, and live there. Make an altar there to God, who appeared to you when you fled from your brother Esau."
Nzambe alobaki na Jakobi: « Kende na Beteli, vanda kuna mpe tonga kuna etumbelo mpo na Nzambe oyo abimelaki yo tango ozalaki kokima ndeko na yo Ezawu. »
2 Then Jacob said to his household and to all who were with him, "Get rid of the foreign gods that you have among you, and purify yourselves and change your clothes.
Jakobi alobaki na bato ya libota na ye mpe na bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo: « Bolongola banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino, bomipetola mpe bolata bilamba mosusu.
3 Let us arise and go up to Bethel, and I will make an altar there to God, who answered me in the day of my distress, and has been with me wherever I went."
Tokomata na Beteli epai wapi nakotonga etumbelo mpo na Nzambe oyo ayanolaki ngai na mokolo oyo nazalaki na pasi mpe azalaki elongo na ngai bisika nyonso oyo nazalaki kokende. »
4 So they gave to Jacob all the foreign gods which were in their possession, and the rings that were in their ears, and Jacob buried them under the oak that was near Shechem.
Bapesaki Jakobi banzambe nyonso ya bapaya, oyo bazalaki na yango mpe biloko na bango ya matoyi. Boye Jakobi akundaki yango na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki pene ya Sishemi.
5 Then they set out, and a terror of God was upon the cities that were around them, so that they did not pursue the sons of Jacob.
Sima, bakendeki. Kanda na Nzambe ekweyelaki bingumba nyonso ya zingazinga na bango, mpe moko te alandaki bana mibali ya Jakobi.
6 So Jacob came to Luz (that is, Bethel), which is in the land of Canaan, he and all the people who were with him.
Jakobi mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bakomaki na Luze, oyo ezali Beteli, kati na mokili ya Kanana.
7 He built an altar there, and called the place El Bethel, because there God had revealed himself to him when he was fleeing from his brother.
Kuna nde atongaki etumbelo mpe abengaki esika yango « Eli Beteli, » pamba te ezalaki kuna nde Nzambe amimonisaki epai na ye tango azalaki kokima ndeko na ye.
8 Now Deborah, Rebekah's nurse, died, and she was buried under an oak outside Bethel. So he called its name Allon Bakuth.
Ezalaki wana nde Debora, mama mobokoli ya Rebeka, akufaki. Bakundaki ye pembeni ya Beteli, na se ya nzete oyo, wuta na tango wana, bakomaki kobenga « Aloni-Bakuti. »
9 And God appeared to Jacob again after he returned from Paddan Aram, and blessed him.
Nzambe abimelaki lisusu Jakobi tango azongaki wuta na Padani-Arami mpe apambolaki ye.
10 God said to him, "Your name is Jacob. Your name will no longer be called Jacob, but your name will be Israel." So he called his name Israel.
Nzambe alobaki na ye: « Kombo na yo ezali Jakobi; kasi okobengama lisusu Jakobi te, kombo na yo ekomi Isalaele. » Yango wana Nzambe apesaki ye kombo « Isalaele. »
11 And God said to him, "I am El Shaddai. Be fruitful and multiply. A nation and a company of nations will come from you, and kings will come from your body.
Nzambe alobaki na ye lisusu: « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Bota bana mpe bokoma ebele; bokoma ekolo moko mpe bikolo ebele ekobima na nzela na yo, bakonzi bakobima kati na yo.
12 The land which I gave to Abraham and Isaac, I will give to you, and I will give the land to your descendants after you."
Mokili oyo napesaki na Abrayami mpe na Izaki, napesi yango mpe na yo. Nakopesa yango lisusu na bakitani na yo. »
13 Then God went up from him in the place where he spoke with him.
Sima, Nzambe atikaki ye na esika oyo asololaki na ye.
14 And Jacob set up a standing-stone in the place where he spoke with him, a pillar of stone. And he poured out a drink offering on it, and poured oil on it.
Jakobi atelemisaki libanga ya elembo na esika oyo Nzambe asololaki na ye; asopaki likolo ya libanga yango likabo ya masanga mpe mafuta.
15 Jacob called the name of the place where God spoke with him Bethel.
Jakobi apesaki esika oyo Nzambe asololaki na ye kombo « Beteli. »
16 Then they set out from Bethel. There was still some distance to come to Ephrath, and Rachel went into labor, and her labor was difficult.
Jakobi mpe libota na ye balongwaki na Beteli. Wana bazalaki nanu mwa mosika na Efrata, Rasheli abotaki, kasi na pasi makasi.
17 When she was in the difficult labor, the midwife said to her, "Do not be afraid, for now you have another son."
Lokola azalaki na pasi makasi ya kobota, mwasi mobotisi ayebisaki ye: « Kobanga te! Pamba te ozali na mwana mobali mosusu. »
18 It happened, as her life was departing (for she died), that she named him Ben-Oni, but his father named him Benjamin.
Lokola azalaki kobundana mpo na kokufa, liboso ya kokata motema, apesaki mwana na ye ya mobali kombo Beni-Oni. Kasi tata na ye apesaki ye kombo Benjame.
19 So Rachel died and was buried on the way to Ephrath (that is, Bethlehem).
Rasheli akufaki mpe bakundaki ye na nzela ya Efrata, elingi koloba Beteleemi.
20 Jacob set up a standing-stone on her grave. It is the standing-stone of Rachel's grave to this day.
Jakobi atelemisaki libanga ya elembo likolo ya kunda ya Rasheli; mpe kino lelo oyo, libanga wana ya elembo elakisaka kunda ya Rasheli.
21 And Israel traveled and pitched his tent beyond Migdal Eder.
Sima, Isalaele alongwaki mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo mosika ya Migidali-Ederi.
22 It happened, while Israel lived in that land, that Reuben went and slept with Bilhah, his father's secondary wife, and Israel heard about it. Now the sons of Jacob were twelve.
Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale:
23 The sons of Leah: Reuben, Jacob's firstborn, and Simeon, and Levi, and Judah, and Issachar, and Zebulun.
Bana mibali ya Lea: Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Jakobi; Simeoni, Levi, Yuda, Isakari mpe Zabuloni.
24 The sons of Rachel: Joseph and Benjamin.
Bana mibali ya Rasheli: Jozefi mpe Benjame.
25 And the sons of Bilhah, Rachel's servant: Dan and Naphtali.
Bana mibali ya Bila, mwasi mosali ya Rasheli: Dani mpe Nefitali.
26 And the sons of Zilpah, Leah's servant: Gad and Asher. These are the sons of Jacob who were born to him in Paddan Aram.
Bana mibali ya Zilipa, mwasi mosali ya Lea: Gadi mpe Aseri. Bango nde bana mibali ya Jakobi oyo babotelaki ye na Padani-Arami.
27 So Jacob came to Isaac his father at Mamre in Kiriath Arba (which is Hebron), where Abraham and Isaac had sojourned.
Jakobi azongaki epai ya Izaki, tata na ye, na Mamire, pene ya Kiriati-Ariba oyo ebengami Ebron, epai wapi Abrayami mpe Izaki bazalaki kovanda.
28 Now the days of Isaac were one hundred eighty years.
Izaki awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku mwambe.
29 And Isaac took his last breath and died, and was gathered to his people, old and full of days. And his sons Esau and Jacob buried him.
Sima, Izaki akataki motema mpe akufaki; awumelaki na bomoi mibu ebele, akomaki mobange mpe alandaki bakoko na ye. Bana na ye ya mibali, Ezawu mpe Jakobi, bakundaki ye.

< Genesis 35 >