< Ezekiel 3 >

1 He said to me, "Son of man, eat that which you find. Eat this scroll, and go, speak to the house of Israel."
Bongo alobaki na ngai: « Mwana na moto, lia eloko oyo ezali liboso na yo, lia buku oyo elingama mpe kende koloba na libota ya Isalaele. »
2 So I opened my mouth, and he caused me to eat the scroll.
Boye, nafungolaki monoko na ngai, mpe aleisaki ngai buku yango oyo elingama.
3 He said to me, "Son of man, cause your belly to eat, and fill your belly with this scroll that I give you." Then I ate it; and it was as sweet as honey in my mouth.
Alobaki na ngai lisusu: « Mwana na moto, lia mokanda oyo nazali kopesa yo mpe tondisa libumu na yo na yango. » Boye, naliaki yango, mpe ezalaki elengi na monoko na ngai lokola mafuta ya nzoyi.
4 He said to me, "Son of man, go to the house of Israel, and speak my words to them.
Alobaki na ngai: « Mwana na moto, kende sik’oyo na libota ya Isalaele mpe yebisa bango maloba na Ngai.
5 For you are not sent to a people of a strange speech and of a hard language, but to the house of Israel;
Otindami te epai ya bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola, kasi epai ya bana ya Isalaele.
6 not to many peoples of a strange speech and of a hard language, whose words you can not understand. Surely, if I sent you to them, they would listen to you.
Otindami te kati na bikolo ebele oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola. Solo, soki natindaki yo epai ya bikolo wana, balingaki kososola sango oyo omemeli bango.
7 But the house of Israel will not listen to you; for they will not listen to me: for all the house of Israel are obstinate and hard-hearted.
Kasi libota ya Isalaele bakolinga koyokela yo te, mpo ete balingaka koyokela Ngai te; pamba te libota mobimba ya Isalaele bazali mitema mpe mito makasi.
8 Look, I have made your face hard against their faces, and your forehead hard against their foreheads.
Nakokomisa yo motema mpe moto makasi lokola bango.
9 As an adamant harder than flint have I made your forehead. Do not be afraid of them, nor be dismayed at their looks, though they are a rebellious house."
Nakokomisa mbunzu na yo makasi lokola diama to mpe makasi koleka ata libanga. Kobanga te mpe kolenga te liboso na bango, atako bazali libota ya batomboki. »
10 Moreover he said to me, "Son of man, all my words that I shall speak to you receive in your heart, and hear with your ears.
Alobaki na ngai lisusu: « Mwana na moto, yoka malamu maloba oyo nakoloba na yo mpe batela yango malamu kati na motema na yo.
11 And go to the exiles, to the children of your people, and speak to them, and tell them, 'Thus says YHWH'; whether they will hear, or whether they will forbear.
Kende sik’oyo epai ya bandeko na yo, oyo bozali elongo na bango kati na bowumbu; okoyebisa bango mpe, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, okoloba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › »
12 Then the Spirit lifted me up, and I heard behind me the voice of a great rushing, saying, "Blessed be the glory of YHWH from his place."
Boye, Molimo atelemisaki ngai mpe nayokaki sima na ngai makelele moko ya makasi: « Tika ete nkembo ya Yawe epambolama wuta na esika oyo Ye avandaka! »
13 I heard the noise of the wings of the living creatures as they touched one another, and the noise of the wheels beside them, even the noise of a great rushing.
Nayokaki lisusu makelele ya mapapu ya bikelamu ya bomoi, tango ezalaki kotutana lipapu moko na mosusu, makelele ya bapine mpe lokito moko ya makasi.
14 So the Spirit lifted me up, and took me away; and I went in bitterness, in the anger of my spirit; and the hand of YHWH was strong on me.
Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai mosika. Boye, nazalaki kokende na pasi na motema, mpe molimo na ngai etondisamaki na kanda; nzokande loboko na Yawe ezalaki kosala kati na ngai na nguya makasi.
15 Then I came to them of the exiles at Tel Aviv, that lived by the river Chebar, and to where they lived; and I sat there overwhelmed among them seven days.
Nakomaki kino na Teli-Avivi epai wapi bato oyo bamemaki na bowumbu bazalaki kovanda, pembeni ya ebale Kebari. Navandaki kuna elongo na bango mikolo sambo; nazalaki kokamwa mingi.
16 It happened at the end of seven days, that the word of YHWH came to me, saying,
Sima na mikolo sambo, Yawe alobaki na ngai:
17 "Son of man, I have made you a watchman to the house of Israel: therefore hear the word from my mouth, and give them warning from me.
« Mwana na moto, nasili kotia yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele; boye yoka maloba oyo nazali koloba mpe kebisa bango na Kombo na Ngai.
18 When I tell the wicked, 'You shall surely die'; and you give him no warning, nor speak to warn the wicked from his wicked way, to save his life; that wicked man shall die in his iniquity; but his blood will I require at your hand.
Soki Ngai nalobi na moto mabe: ‹ Solo, okokufa, › kasi yo okebisi ye te to oyebisi ye te ete atika nzela na ye ya mabe mpo ete abikisa bomoi na ye, moto wana ya mabe akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
19 Yet if you warn the wicked, and he doesn't turn from his wickedness, nor from his wicked way, he shall die in his iniquity; but you have delivered your soul.
Kasi soki, yo, okebisi moto wana ya mabe, mpe atiki mabe na ye te to abongwani na nzela na ye ya mabe te, akokufa solo na masumu na ye, mpe yo okobikisa bomoi na yo.
20 "Again, when a righteous man does turn from his righteousness, and commit iniquity, and I lay a stumbling block before him, he shall die: because you have not given him warning, he shall die in his sin, and his righteous deeds which he has done shall not be remembered; but his blood will I require at your hand.
Soki moto ya sembo atiki kosalela bosembo na ye mpe akomi kosala mabe, nakotia libaku liboso na ye, mpe moto yango akokufa, solo. Soki okebisaki ye te, akokufa penza mpo na masumu na ye, mpe bakotikala kokanisa lisusu te bolamu nyonso oyo ye asilaki kosala; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
21 Nevertheless if you warn the righteous man, that the righteous not sin, and he does not sin, he shall surely live, because he took warning; and you have delivered your soul."
Kasi soki, yo, okebisi moto ya sembo mpo ete asala masumu te, bongo ye mpe asali masumu te, akobikisa solo bomoi na ye, pamba te ayoki likebisi na yo, mpe yo, okobikisa bomoi na yo. »
22 The hand of YHWH was there on me; and he said to me, "Arise, go forth into the plain, and I will there talk with you."
Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai, mpe alobaki na ngai: « Telema mpe kende na lubwaku; nazali na makambo ya koyebisa yo kuna. »
23 Then I arose, and went forth into the plain: and look, the glory of YHWH stood there, as the glory which I saw by the river Chebar; and I fell on my face.
Natelemaki mpe nakendeki na lubwaku. Nkembo ya Yawe ezalaki kuna: ezalaki lokola nkembo oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye nakweyaki elongi na ngai kino na mabele.
24 Then the Spirit entered into me, and set me on my feet; and he spoke with me, and said to me, "Go, shut yourself inside your house.
Bongo Molimo akotaki kati na ngai mpe atelemisaki ngai na makolo na ngai. Alobaki na ngai: « Kende komikangela kati na ndako na yo.
25 But you, son of man, look, they shall lay bands on you, and shall bind you with them, and you shall not go out among them:
Yo, mwana na moto, bakokanga yo basinga, bakolinga-linga yo mpo ete okoka te kobima kati na bato.
26 and I will make your tongue stick to the roof of your mouth, that you shall be mute, and shall not be to them a reprover; for they are a rebellious house.
Nakokangisa lolemo na yo na monoko na yo mpo ete okoka koloba te mpe okoka kopamela bango te, pamba te bazali libota ya batomboki.
27 But when I speak with you, I will open your mouth, and you shall tell them, 'Thus says the Lord YHWH': He who hears, let him hear; and he who forbears, let him forbear: for they are a rebellious house.
Kasi tango nakoloba na yo mpe nakofungola monoko na yo mpo ete oyebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › Tika ete moto oyo akolinga koyoka ayoka, mpe oyo akoboya koyoka aboya na ye! Pamba te bazali libota ya batomboki. »

< Ezekiel 3 >